< 마태복음 20 >

1 천국은 마치 품군을 얻어 포도원에 들여 보내려고 이른 아침에 나간 집 주인과 같으니
Pamba te, tala ndenge nini Bokonzi ya Likolo ezali: Bokonzi ya Likolo ezali lokola nkolo elanga ya vino oyo abimaki na tongo makasi mpo na koluka bato oyo bakosala na elanga na ye.
2 저가 하루 한 데나리온씩 품군들과 약속하여 포도원에 들여 보내고
Ayokanaki na bango ete moko na moko akobanda kozwa lifuti ya mbongo moko ya ebende mpo na mokolo mobimba; bongo atindaki bango na elanga na ye ya vino.
3 또 제 삼시에 나가 보니 장터에 놀고 섰는 사람들이 또 있는지라
Na ngonga ya libwa ya tongo, abimaki lisusu mpe amonaki, na esika oyo bato bakutanaka, bato mosusu oyo bazalaki kosala eloko moko te.
4 저희에게 이르되 너희도 포도원에 들어가라 내가 너희에게 상당하게 주리라 하니 저희가 가고
Alobaki na bango: « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. Nakopesa bino lifuti ya sembo, oyo ekoki. »
5 제 육시와 제 구시에 또 나가 그와 같이 하고
Boye, bakendeki kuna. Nkolo elanga abimaki lisusu na ngonga ya midi mpe na ngonga ya misato sima na midi; mpe na mbala nyonso mibale, asalaki kaka ndenge moko.
6 제 십일 시에도 나가 보니 섰는 사람들이 또 있는지라
Abimaki lisusu na ngonga ya mitano ya pokwa mpe amonaki lisusu bato batelemi na esika wana oyo bato bakutanaka. Atunaki bango: « Mpo na nini botelemi kaka boye mokolo mobimba na kosala eloko moko te? »
7 가로되 너희는 어찌하여 종일토록 놀고 여기 섰느뇨 가로되 우리를 품군으로 쓰는 이가 없음이니이다 가로되 너희도 포도원에 들어가라 하니라
Bazongisaki: « Soki totelemi boye, ezali mpo ete moto moko te azwi biso na mosala. » Bongo alobaki na bango: « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. »
8 저물매 포도원 주인이 청지기에게 이르되 품군들을 불러 나중 온 자로부터 시작하여 먼저 온 자까지 삯을 주라 하니
Tango pokwa ekokaki, nkolo elanga ya vino alobaki na motambolisi ya misala ya elanga: « Benga basali nyonso mpe futa bango; banda na bato oyo nazwaki sima mpe sukisa na ba-oyo nazwaki liboso. »
9 제 십일 시에 온 자들이 와서 한 데나리온씩을 받거늘
Bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayaki, mpe moko na moko azwaki lokola lifuti, mbongo moko ya ebende.
10 먼저 온 자들이 와서 더 받을 줄 알았더니 저희도 한 데나리온씩 받은지라
Bongo ekomaki ngonga ya kofuta bato oyo nkolo elanga azwaki liboso na mosala; bakanisaki ete bakozwa mbongo mingi koleka, kasi moko na moko kati na bango azwaki lokola lifuti, mbongo moko kaka ya ebende.
11 받은 후 집 주인을 원망하여 가로되
Tango bazwaki yango, basilikelaki nkolo elanga.
12 나중 온 이 사람들은 한 시간만 일하였거늘 저희를 종일 수고와 더위를 견딘 우리와 같게 하였나이다
Balobaki: « Bato oyo ozwaki sima mpe basali kaka ngonga moko, ofuti bango ndenge moko na biso oyo tosali mosala makasi mokolo mobimba mpe na se ya moyi makasi! »
13 주인이 그 중의 한사람에게 대답하여 가로되 친구여 내가 네게 잘못한 것이 없노라 네가 나와 한 데나리온의 약속을 하지 아니 하였느냐
Kasi nkolo elanga azongiselaki moko kati na bango: « Moninga na ngai, nasali yo mabe te! Boni, toyokanaki te ete osala mpo na lifuti ya mbongo moko ya ebende?
14 네 것이나 가지고 가라 나중 온 이 사람에게 너와 같이 주는 것이 내 뜻이니라
Kamata lifuti na yo mpe kende. Ngai moko nde nalingi kopesa na moto oyo abandaki sima, lifuti ya ndenge moko na oyo napesi yo.
15 내 것을 가지고 내 뜻대로 할 것이 아니냐 내가 선하므로 네가 악하게 보느냐
Boni, nazali na ndingisa te ya kosala na mbongo na ngai nyonso oyo nalingi? Osilikeli ngai mpo ete nazali moto malamu? »
16 이와 같이 나중 된 자로서 먼저 되고 먼저 된 자로서 나중 되리라
Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka.
17 예수께서 예루살렘으로 올라 가려 하실 때에 열 두 제자를 따로 데리시고 길에서 이르시되
Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango wana bazali kotambola:
18 보라, 우리가 예루살렘으로 올라 가노니 인자가 대제사장들과 서기관들에게 넘기우매 저희가 죽이기로 결안하고
« Boyoka! Tozali solo kokende na Yelusalemi; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko; bakokatela Ye etumbu ya kufa
19 이방인들에게 넘겨 주어 그를 능욕하며 채찍질하며 십자가에 못박게 하리니 제 삼일에 살아나리라
mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano mpo ete baseka Ye, babeta Ye fimbu mpe babaka Ye na ekulusu. Mpe na mokolo ya misato, akosekwa. »
20 그 때에 세베대의 아들의 어미가 그 아들들을 데리고 예수께 와서 절하며 무엇을 구하니
Bongo mama ya bana mibali ya Zebede ayaki epai ya Yesu, elongo na bana na ye ya mibali, mpe agumbamaki liboso na Ye mpo na kosenga Ye eloko moko.
21 예수께서 가라사대 무엇을 원하느뇨? 가로되 `이 나의 두 아들을 주의 나라에서 하나는 주의 우편에 하나는 주의 좌편에 앉게 명하소서'
Yesu atunaki ye: — Olingi nini? Azongisaki: — Laka ngai ete bana na ngai mibale oyo ya mibali bakovanda kati na Bokonzi na Yo: moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.
22 예수께서 대답하여 가라사대 너희 구하는 것을 너희가 알지 못하는도다 나의 마시려는 잔을 너희가 마실 수 있느냐? 저희가 말하되 `할 수 있나이다'
Yesu azongiselaki bango: — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela? Bazongisaki: — Iyo, tokoki.
23 가라사대 너희가 과연 내 잔을 마시려니와 내 좌우편에 앉는 것은 나의 줄 것이 아니라 내 아버지께서 누구를 위하여 예비하셨든지 그들이 얻을 것이니라
Yesu alobaki na bango: — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela; kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.
24 열 제자가 듣고 그 두 형제에 대하여 분히 여기거늘
Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki bandeko mibale wana.
25 예수께서 제자들을 불러다가 가라사대 이방인의 집권자들이 저희를 임의로 주관하고 그 대인들이 저희에게 권세를 부리는 줄을 너희가 알거니와
Kasi Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango: — Boyebi malamu ete bakonzi ya bikolo bakonzaka bato ya bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango.
26 너희 중에는 그렇지 아니하니 너희 중에 누구든지 크고자 하는 자는 너희를 섬기는 자가 되고
Esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino;
27 너희 중에 누구든지 으뜸이 되고자 하는 자는 너희 종이 되어야 하리라
mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu na bino!
28 인자가 온 것은 섬김을 받으려 함이 아니라 도리어 섬기려 하고 자기 목숨을 많은 사람의 대속물로 주려 함이니라
Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
29 저희가 여리고에서 떠나갈 때에 큰 무리가 예수를 좇더라
Tango Yesu elongo na bayekoli na Ye balongwaki na Jeriko, bato ebele balandaki Yesu.
30 소경 둘이 길 가에 앉았다가 예수께서 지나가신다 함을 듣고 소리질러 가로되 `주여! 우리를 불쌍히 여기소서 다윗의 자손이여' 하니
Bakufi miso mibale bazalaki ya kovanda pembeni ya nzela; tango bayokaki ete Yesu azali koleka, bagangaki: — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela biso mawa!
31 무리가 꾸짖어 잠잠하라 하되 더욱 소리질러 가로되 `주여! 우리를 불쌍히 여기소서 다윗의 자손이여' 하는지라
Bato bazalaki kopamela bango mpo ete bakanga minoko na bango, kasi bango bagangaki lisusu makasi: — Nkolo, mwana ya Davidi, yokela biso mawa!
32 예수께서 머물러 서서 저희를 불러
Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango: — Bolingi nasala nini mpo na bino?
33 가라사대 너희에게 무엇을 하여주기를 원하느냐? 가로되 `주여! 우리 눈뜨기를 원하나이다'
Bazongiselaki Ye: — Nkolo, sala ete tomona.
34 예수께서 민망히 여기사 저희 눈을 만지시니 곧 보게 되어 저희가 예수를 좇으니라
Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango; mpe, mbala moko, bakomaki komona mpe balandaki Ye.

< 마태복음 20 >