< Revelation 22 +

1 He showed me a river of water of life, clear as crystal, proceeding out of the throne of God and of the Lamb,
Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.
2 in the middle of its street. On this side of the river and on that was the tree of life, bearing twelve kinds of fruits, yielding its fruit every month. The leaves of the tree were for the healing of the nations.
Ezalaki kotiola na kati-kati ya balabala monene ya engumba. Na esika oyo ebale ekabwanaki na biteni mibale, ezalaki na nzete ya bomoi oyo ebotaka bambuma mbala zomi na mibale na mobu, elingi koloba ete ebotaka bambuma sanza na sanza; mpe makasa na yango ebikisaka bikolo.
3 There will be no curse any more. The throne of God and of the Lamb will be in it, and his servants will serve him.
Elakeli mabe ekozala lisusu te. Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate ekozala kati na engumba, mpe bawumbu na Ye bakosalela Ye.
4 They will see his face, and his name will be on their foreheads.
Bakomona elongi na Ye, mpe Kombo na Ye ekokomama na bambunzu na bango.
5 There will be no night, and they need no lamp light or sun light; for the Lord God will illuminate them. They will reign forever and ever. (aiōn g165)
Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko. (aiōn g165)
6 He said to me, “These words are faithful and true. The Lord God of the spirits of the prophets sent his angel to show to his bondservants the things which must happen soon.”
Anjelu alobaki na ngai: « Maloba oyo ezali ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. Nkolo, Nzambe ya milimo ya basakoli, atindaki anjelu na Ye mpo na kolakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli kosalema kala mingi te. »
7 “Behold, I am coming soon! Blessed is he who keeps the words of the prophecy of this book.”
Yoka! Nazali koya kala mingi te. Esengo na moto oyo abatelaka maloba ya masakoli oyo ekomama kati na buku oyo.
8 Now I, John, am the one who heard and saw these things. When I heard and saw, I fell down to worship before the feet of the angel who had shown me these things.
Ngai Yoane, nayokaki mpe namonaki makambo oyo. Mpe tango nayokaki mpe namonaki yango, nafukamaki na makolo ya anjelu oyo alakisaki ngai yango mpo na kogumbamela ye.
9 He said to me, “You must not do that! I am a fellow bondservant with you and with your brothers, the prophets, and with those who keep the words of this book. Worship God.”
Kasi anjelu alobaki na ngai: « Kosala bongo te! Nazali moninga na yo ya mosala, ya bandeko na yo, basakoli; mpe ya ba-oyo nyonso babatelaka maloba ya buku oyo. Gumbamela nde Nzambe! »
10 He said to me, “Don’t seal up the words of the prophecy of this book, for the time is at hand.
Bongo alobaki na ngai lisusu: « Kobomba te maloba ya masakoli ya buku oyo, pamba te tango ekomi pene.
11 He who acts unjustly, let him act unjustly still. He who is filthy, let him be filthy still. He who is righteous, let him do righteousness still. He who is holy, let him be holy still.”
Tika ete moto oyo asalaka mabe akoba kosala mabe, tika ete moto oyo azali mbindo akoba kozala mbindo, tika ete moto oyo azali sembo akoba kozala sembo, mpe tika ete moto azali bule akoba kozala bule! »
12 “Behold, I am coming soon! My reward is with me, to repay to each man according to his work.
Yoka! Nazali koya kala mingi te! Nakomema elongo na Ngai lifuti mpo na moto na moto kolanda misala na ye.
13 I am the Alpha and the Omega, the First and the Last, the Beginning and the End.
Nazali Alifa mpe Omega, Moto ya liboso mpe Moto ya suka, Ebandeli mpe Suka.
14 Blessed are those who do his commandments, that they may have the right to the tree of life, and may enter in by the gates into the city.
Esengo na bato oyo basukolaka bilamba na bango mpo na kozwa ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya koleka na bikuke mpo na kokota na engumba.
15 Outside are the dogs, the sorcerers, the sexually immoral, the murderers, the idolaters, and everyone who loves and practices falsehood.
Kasi bambwa, bato ya maji, bandumba, babomi, basambeli bikeko mpe bato nyonso oyo balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya engumba.
16 I, Jesus, have sent my angel to testify these things to you for the assemblies. I am the root and the offspring of David, the Bright and Morning Star.”
Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.
17 The Spirit and the bride say, “Come!” He who hears, let him say, “Come!” He who is thirsty, let him come. He who desires, let him take the water of life freely.
Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi: — Yaka! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba: « Yaka! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.
18 I testify to everyone who hears the words of the prophecy of this book: if anyone adds to them, God will add to him the plagues which are written in this book.
Ngai Yoane, nazali koyebisa moto nyonso oyo azali koyoka maloba ya masakoli ya buku oyo: soki moto abakisi ata likambo moko na likolo ya makambo oyo, Nzambe akobakisela ye bitumbu oyo ekomami kati na buku oyo;
19 If anyone takes away from the words of the book of this prophecy, God will take away his part from the tree of life, and out of the holy city, which are written in this book.
mpe soki moto alongoli ata likambo moko na maloba ya masakoli ya buku oyo, Nzambe mpe akolongola ye ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya kokota kati na Engumba ya Bule, oyo etalisami kati na buku oyo.
20 He who testifies these things says, “Yes, I am coming soon.” Amen! Yes, come, Lord Jesus!
Motatoli ya makambo oyo alobi: — Iyo, nazali koya kala mingi te. Amen: Nkolo Yesu, yaka!
21 The grace of the Lord Jesus Christ be with all the saints. Amen.
Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino nyonso!

< Revelation 22 +