< Psalms 80 >

1 For the Chief Musician. To the tune of “The Lilies of the Covenant.” A Psalm by Asaph. Hear us, Shepherd of Israel, you who lead Joseph like a flock, you who sit above the cherubim, shine out.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi. Mobateli ya Isalaele, Yo oyo otambolisaka Jozefi lokola etonga ya bameme, yoka; Yo oyo Kiti ya Bokonzi na Yo ezali kati na basheribe, mimonisa
2 Before Ephraim, Benjamin, and Manasseh, stir up your might! Come to save us!
liboso ya Efrayimi, ya Benjame mpe ya Manase. Monisa nguya na Yo mpe yaka kobikisa biso!
3 Turn us again, God. Cause your face to shine, and we will be saved.
Oh Nzambe, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.
4 Yahweh God of Armies, how long will you be angry against the prayer of your people?
Eh Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kino tango nini okotombokela mabondeli ya bato na Yo?
5 You have fed them with the bread of tears, and given them tears to drink in large measure.
Oleisaki bango lipa esangana na mayi ya miso mpe olangwisaki bango na kopo etonda na mpinzoli;
6 You make us a source of contention to our neighbors. Our enemies laugh among themselves.
okomisaki biso eloko ya kotiola mpo na bazalani na biso, mpe banguna na biso bakomi kotiola biso.
7 Turn us again, God of Armies. Cause your face to shine, and we will be saved.
Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.
8 You brought a vine out of Egypt. You drove out the nations, and planted it.
Nzete ya vino oyo opikolaki wuta na Ejipito, olonaki yango wana obenganaki bikolo ebele.
9 You cleared the ground for it. It took deep root, and filled the land.
Obongiselaki yango mabele mpo ete ezwa misisa mpe etondisa mokili.
10 The mountains were covered with its shadow. Its boughs were like God’s cedars.
Elili na yango ezipaki bangomba, bitape na yango ezalaki lokola banzete minene ya sedele.
11 It sent out its branches to the sea, its shoots to the River.
Epanzaki bitape na yango kino na ebale monene, mpe mito na yango ya sika kino na ebale.
12 Why have you broken down its walls, so that all those who pass by the way pluck it?
Mpo na nini otoboli madusu kati na bamir na yango? Tala ndenge baleki nzela bazali kobuka bambuma na yango!
13 The boar out of the wood ravages it. The wild animals of the field feed on it.
Ngulu ya zamba ezali kobebisa yango, mpe nyama ya zamba ezali kolia yango.
14 Turn again, we beg you, God of Armies. Look down from heaven, and see, and visit this vine,
Zongela biso lisusu, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso! Wuta na likolo, tala mpe mona! Senzela mpo na nzete oyo ya vino!
15 the stock which your right hand planted, the branch that you made strong for yourself.
Batela nzete oyo loboko na Yo ya mobali elonaki, batela solo mwana oyo Yo moko obokolaki.
16 It’s burned with fire. It’s cut down. They perish at your rebuke.
Bakati nzete na Yo ya vino mpe batumbi yango na moto; tika ete bakufa na pamela ya elongi na Yo!
17 Let your hand be on the man of your right hand, on the son of man whom you made strong for yourself.
Tika ete loboko na Yo ezala na likolo ya mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe na likolo ya mwana na moto oyo Yo moko okomisaki makasi.
18 So we will not turn away from you. Revive us, and we will call on your name.
Boye, tokozala lisusu mosika na Yo te; zongisela biso lisusu bomoi, mpe tokobelela Kombo na Yo.
19 Turn us again, Yahweh God of Armies. Cause your face to shine, and we will be saved.
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.

< Psalms 80 >