< Proverbs 6 >

1 My son, if you have become collateral for your neighbor, if you have struck your hands in pledge for a stranger,
Mwana na ngai, soki ondimi niongo ya moninga na yo, soki obeti tolo mpo na kondima niongo ya mopaya,
2 you are trapped by the words of your mouth; you are ensnared with the words of your mouth.
omikangi nde singa na maloba na yo, omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo.
3 Do this now, my son, and deliver yourself, since you have come into the hand of your neighbor. Go, humble yourself. Press your plea with your neighbor.
Boye, mwana na ngai, sala makambo oyo mpo ete omikangola, pamba te omikabaki na maboko ya moninga na yo; kende komikitisa liboso na ye mpe tingama na ye,
4 Give no sleep to your eyes, nor slumber to your eyelids.
kotika te ete miso na yo elala pongi to enimba;
5 Free yourself, like a gazelle from the hand of the hunter, like a bird from the snare of the fowler.
mikangola na motambo lokola mboloko na maboko ya mobomi banyama ya zamba, mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke.
6 Go to the ant, you sluggard. Consider her ways, and be wise;
Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya!
7 which having no chief, overseer, or ruler,
Yango ezalaka na mokambi te, mokengeli te to mokonzi te;
8 provides her bread in the summer, and gathers her food in the harvest.
ebongisaka bilei na yango na tango ya moyi makasi, ebombaka yango na tango ya kobuka mbuma.
9 How long will you sleep, sluggard? When will you arise out of your sleep?
Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini? Kino tango nini okolamuka na pongi na yo?
10 A little sleep, a little slumber, a little folding of the hands to sleep—
Mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala
11 so your poverty will come as a robber, and your scarcity as an armed man.
mpe bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.
12 A worthless person, a man of iniquity, is he who walks with a perverse mouth,
Moto oyo atambolaka na lokuta na monoko azali moto ya Beliali, moto mabe:
13 who winks with his eyes, who signals with his feet, who motions with his fingers,
Abetaka-betaka miso, apesaka bilembo na makolo na ye mpe alobaka na nzela ya bilembo ya misapi;
14 in whose heart is perverseness, who devises evil continually, who always sows discord.
azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.
15 Therefore his calamity will come suddenly. He will be broken suddenly, and that without remedy.
Yango wana, pasi ekoyela ye na pwasa, akobukana mbala moko, mpe kisi ya kobikisa ye ekozala te.
16 There are six things which Yahweh hates; yes, seven which are an abomination to him:
Yawe ayinaka makambo wana motoba; mpe makambo oyo sambo ezali mabe penza na miso na Ye:
17 arrogant eyes, a lying tongue, hands that shed innocent blood,
Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te,
18 a heart that devises wicked schemes, feet that are swift in running to mischief,
motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe, makolo oyo epotaka mbangu na mabe,
19 a false witness who utters lies, and he who sows discord among brothers.
motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.
20 My son, keep your father’s commandment, and don’t forsake your mother’s teaching.
Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo.
21 Bind them continually on your heart. Tie them around your neck.
Kanga yango tango nyonso na motema na yo, lata yango na kingo na yo.
22 When you walk, it will lead you. When you sleep, it will watch over you. When you awake, it will talk with you.
Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka.
23 For the commandment is a lamp, and the law is light. Reproofs of instruction are the way of life,
Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole, makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,
24 to keep you from the immoral woman, from the flattery of the wayward wife’s tongue.
mpo na kobatela yo mosika ya mwasi ya ndumba, mosika ya lokuta ya lolemo ya mwasi ya mopaya.
25 Don’t lust after her beauty in your heart, neither let her captivate you with her eyelids.
Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye, mpe miso na ye ekweyisa yo.
26 For a prostitute reduces you to a piece of bread. The adulteress hunts for your precious life.
Pamba te likolo ya mwasi ya ndumba, okoki kobungisa ezala eteni na yo ya lipa, mpe mwasi ya libala akoki kobebisa bomoi ya motuya.
27 Can a man scoop fire into his lap, and his clothes not be burned?
Boni, moto akoki solo kozika moto, bongo bilamba na ye ezika te?
28 Or can one walk on hot coals, and his feet not be scorched?
Moto akoki solo kotambola na likolo ya makala ya moto, bongo makolo na ye ezika te?
29 So is he who goes in to his neighbor’s wife. Whoever touches her will not be unpunished.
Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na ye akozanga te kozwa etumbu.
30 Men don’t despise a thief if he steals to satisfy himself when he is hungry,
Kotiola moyibi te soki ayibi mpo ete azali na nzala mpe azangi eloko ya kolia.
31 but if he is found, he shall restore seven times. He shall give all the wealth of his house.
Kasi soki bakangi ye, akozongisa mbala sambo, akopesa biloko nyonso ya ndako na ye.
32 He who commits adultery with a woman is void of understanding. He who does it destroys his own soul.
Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga azali lokola moto oyo azangi mayele; kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma;
33 He will get wounds and dishonor. His reproach will not be wiped away.
akobuka lokola mbuma: minyoko mpe kosambwa; bongo soni na ye ekosila te.
34 For jealousy arouses the fury of the husband. He won’t spare in the day of vengeance.
Pamba te zuwa epelisaka kanda makasi kati na mobali, mpe akozala na mawa te na mokolo oyo akozongisa mabe na mabe;
35 He won’t regard any ransom, neither will he rest content, though you give many gifts.
akotikala kondima ata lifuti moko te mpo ete akoka kolimbisa, mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.

< Proverbs 6 >