< Philemon 1 >

1 Paul, a prisoner of Christ Jesus, and Timothy our brother, to Philemon, our beloved fellow worker,
Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto, mpe Timote, ndeko na biso; Epai ya Filemo, molingami na biso mpe moninga ya mosala;
2 to the beloved Apphia, to Archippus our fellow soldier, and to the assembly in your house:
epai ya Apia, ndeko na biso ya mwasi; epai ya Arshipe, moninga na biso ya etumba; mpe epai ya Lingomba oyo esanganaka na ndako ya Filemo:
3 Grace to you and peace from God our Father and the Lord Jesus Christ.
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
4 I thank my God always, making mention of you in my prayers,
Tango nyonso nasambelaka, natangaka kombo na yo mpe nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai,
5 hearing of your love and of the faith which you have toward the Lord Jesus and toward all the saints,
pamba te nazali koyoka sango ya bolingo na yo mpo na basantu nyonso, mpe ya kondima na yo kati na Nkolo Yesu.
6 that the fellowship of your faith may become effective in the knowledge of every good thing which is in us in Christ Jesus.
Nabondelaka ete kondima oyo ezali kosangisa biso emonisama na misala, mpo ete ososola malamu bolamu nyonso oyo tozali na yango kati na Klisto.
7 For we have much joy and comfort in your love, because the hearts of the saints have been refreshed through you, brother.
Ndeko na ngai, bolingo na yo mpo na basantu ezali penza kopesa ngai esengo mingi mpe kolendisa ngai, pamba te okitisaki bango mitema.
8 Therefore though I have all boldness in Christ to command you that which is appropriate,
Yango wana, atako, kati na Klisto, nazali na makoki ya kotinda yo kosala likambo songolo to pakala,
9 yet for love’s sake I rather appeal to you, being such a one as Paul, the aged, but also a prisoner of Jesus Christ.
kasi nasepeli kosenga na yo na kombo ya bolingo, ngai Polo, mobange mpe sik’oyo mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto;
10 I appeal to you for my child Onesimus, whom I have become the father of in my chains,
nasepeli kosenga na yo na tina na Onezime oyo azali mwana na ngai kati na Klisto, pamba te nakomaki tata na ye ya molimo awa, kati na boloko.
11 who once was useless to you, but now is useful to you and to me.
Na kala, azalaki na tina ata moko te na miso na yo, kasi sik’oyo akomi na tina mingi na miso na yo mpe na miso na ngai.
12 I am sending him back. Therefore receive him, that is, my own heart,
Nazali kozongisa ye epai na yo, pamba te azali penza motema na ngai.
13 whom I desired to keep with me, that on your behalf he might serve me in my chains for the Good News.
Nalingaki ete atikala elongo na ngai awa, na boloko epai wapi nazali mpo na Sango Malamu, mpo ete asalisa ngai na esika na yo.
14 But I was willing to do nothing without your consent, that your goodness would not be as of necessity, but of free will.
Nzokande nakokaki te kosala yango, pamba te nazwaki ndingisa na yo te, mpo ete bolamu oyo okosala ezala oyo ewuti na motema na yo moko, kasi na kotindika te.
15 For perhaps he was therefore separated from you for a while that you would have him forever, (aiōnios g166)
Tango mosusu, mwa tango moke oyo bozalaki ya kokabwana na Onezime ezalaki mpo ete ozwa ye mpo na libela, (aiōnios g166)
16 no longer as a slave, but more than a slave, a beloved brother—especially to me, but how much rather to you, both in the flesh and in the Lord.
lokola mowumbu lisusu te kasi koleka kutu ata mowumbu, lokola ndeko ya bolingo. Azali na litomba mingi mpo na ngai, kasi azali mpe na litomba mingi lisusu koleka mpo na yo, lokola moto mpe lokola ndeko kati na Nkolo.
17 If then you count me a partner, receive him as you would receive me.
Soki ya solo ozwaka ngai lokola ndeko na yo kati na kondima, yamba ye lokola nde oyambi ngai.
18 But if he has wronged you at all or owes you anything, put that to my account.
Soki asalaki yo mabe to mpe azali na niongo na yo, tanga yango na moto na ngai.
19 I, Paul, write this with my own hand: I will repay it (not to mention to you that you owe to me even your own self besides).
Ezali loboko na ngai moko Polo nde ezali kokoma makambo oyo: ngai moko nakofuta yo niongo yango. Nazali mpe na posa te ya kokanisela yo ete yo mpe ozali na niongo na ngai: niongo yango ezali nde bomoi na yo.
20 Yes, brother, let me have joy from you in the Lord. Refresh my heart in the Lord.
Ndeko na ngai, mpo na bolingo ya Nkolo, salela ngai bolamu wana; kitisa ngai motema lokola ndeko na yo kati na Klisto.
21 Having confidence in your obedience, I write to you, knowing that you will do even beyond what I say.
Nakomeli yo na elikya ete okosala makambo oyo nasengi yo, mpe nayebi ete okosala kutu koleka.
22 Also, prepare a guest room for me, for I hope that through your prayers I will be restored to you.
Nasengi na yo lisusu ete obongisela ngai esika ya kolala, pamba te nazali na elikya ete Nzambe akozongisa ngai epai na bino lokola eyano na mabondeli na bino.
23 Epaphras, my fellow prisoner in Christ Jesus, greets you,
Epafrasi, moninga na ngai ya boloko kati na Yesu-Klisto, atindeli yo mbote.
24 as do Mark, Aristarchus, Demas, and Luke, my fellow workers.
Ndenge moko mpe Malako, Arisitarke, Demasi mpe Luka, baninga na ngai ya mosala, bango mpe batindeli yo mbote.
25 The grace of our Lord Jesus Christ be with your spirit. Amen.
Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala elongo na molimo na yo!

< Philemon 1 >