< Numbers 16 >

1 Now Korah, the son of Izhar, the son of Kohath, the son of Levi, with Dathan and Abiram, the sons of Eliab, and On, the son of Peleth, sons of Reuben, took some men.
Molevi Kore, mwana mobali ya Yitseari, ya libota ya bato ya Keati, elongo na bato misato ya libota ya bato ya Ribeni basalelaki Moyize likita; ezalaki: Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, elongo na Oni, mwana mobali ya Peleti.
2 They rose up before Moses, with some of the children of Israel, two hundred fifty princes of the congregation, called to the assembly, men of renown.
Batombokelaki Moyize. Elongo na bango, ezalaki na bana ya Isalaele nkama mibale na tuku mitano oyo bayebanaki malamu lokola bakambi ya lisanga mpe bazalaki kosangana kati na mayangani ya bakambi ya lisanga.
3 They assembled themselves together against Moses and against Aaron, and said to them, “You take too much on yourself, since all the congregation are holy, everyone of them, and Yahweh is among them! Why do you lift yourselves up above Yahweh’s assembly?”
Bayaki lisanga mpo na kotelemela Moyize mpe Aron. Balobaki na bango: — Bino mpe bolekisi! Lingomba mobimba ezali bule mpe moto nyonso kati na yango azali bule, mpe Yawe azali elongo na bango. Boye, mpo na nini bozali komitia likolo ya lisanga ya Yawe?
4 When Moses heard it, he fell on his face.
Tango Moyize ayokaki bongo, akweyaki elongi kino na mabele.
5 He said to Korah and to all his company, “In the morning, Yahweh will show who are his, and who is holy, and will cause him to come near to him. Even him whom he shall choose, he will cause to come near to him.
Alobaki na Kore mpe na bato na ye nyonso oyo balandaki ye: — Lobi na tongo, Yawe akolakisa nani azali moto na Ye mpe nani oyo azali bule, mpe akotika ye kopusana pene na Ye; akotika solo moponami na Ye kopusana pene na Ye.
6 Do this: have Korah and all his company take censers,
Yo, Kore, elongo na bato nyonso oyo bazali kolanda yo, bokosala likambo oyo: Bokamata bambabola oyo batumbelaka malasi
7 put fire in them, and put incense on them before Yahweh tomorrow. It shall be that the man whom Yahweh chooses, he shall be holy. You have gone too far, you sons of Levi!”
mpe, lobi, botia moto mpe malasi ya ansa kati na yango liboso ya Yawe. Moto oyo Yawe akopona, ye nde azali bule. Bino Balevi, bino mpe bolekisi!
8 Moses said to Korah, “Hear now, you sons of Levi!
Moyize alobaki lisusu na Kore: — Bino Balevi, boyoka sik’oyo!
9 Is it a small thing to you that the God of Israel has separated you from the congregation of Israel, to bring you near to himself, to do the service of Yahweh’s tabernacle, and to stand before the congregation to minister to them;
Ekoki na bino te ete Nzambe ya Isalaele atia bino pembeni kati na lisanga ya Isalaele mpe abenda bino pembeni na Ye mpo na kosala mosala na Mongombo ya Yawe mpe kotelema liboso ya lisanga mpo na kosalela bango?
10 and that he has brought you near, and all your brothers the sons of Levi with you? Do you seek the priesthood also?
Abendaki bino pembeni na Ye elongo na Balevi nyonso oyo bazali kolanda bino; kasi sik’oyo, bazali lisusu koluka kozwa bonganga-Nzambe!
11 Therefore you and all your company have gathered together against Yahweh! What is Aaron that you complain against him?”
Ezali Yawe nde bosalelaki likita, yo elongo na bato oyo bazali kolanda yo. Aron nde nani mpo ete bokoka koyimayima na tina na ye?
12 Moses sent to call Dathan and Abiram, the sons of Eliab; and they said, “We won’t come up!
Mpe na sima, Moyize abengisaki Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi. Kasi bazongisaki: — Tokoya te!
13 Is it a small thing that you have brought us up out of a land flowing with milk and honey, to kill us in the wilderness, but you must also make yourself a prince over us?
Ekoki kaka te mpo na yo kobimisa biso na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpo na koya kobomisa biso kati na esobe? Sik’oyo olingi lisusu kokoma mokonzi na biso?
14 Moreover you haven’t brought us into a land flowing with milk and honey, nor given us inheritance of fields and vineyards. Will you put out the eyes of these men? We won’t come up.”
Te, okotisi biso kutu te na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi to opesi biso ata libula moko te ya bilanga to ya bilanga ya vino. Boni, okanisi ete bato oyo bakufa miso? Te, tokoya te!
15 Moses was very angry, and said to Yahweh, “Don’t respect their offering. I have not taken one donkey from them, neither have I hurt one of them.”
Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe: — Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango.
16 Moses said to Korah, “You and all your company go before Yahweh, you, and they, and Aaron, tomorrow.
Moyize alobaki na Kore: — Lobi, yo mpe bato nyonso oyo bazali kolanda yo, bokotelema elongo na Aron liboso ya Yawe.
17 Each man take his censer and put incense on it, and each man bring before Yahweh his censer, two hundred fifty censers; you also, and Aaron, each with his censer.”
Moko na moko akokamata mbabola na ye, oyo batumbelaka malasi, bongo akotia malasi ya ansa kati na yango mpe akomema yango liboso ya Yawe. Bambabola nyonso ekozala nkama mibale na tuku mitano; yo mpe elongo na Aron bokomema bambabola na bino.
18 They each took his censer, and put fire in it, and laid incense on it, and stood at the door of the Tent of Meeting with Moses and Aaron.
Moto na moto akamataki mbabola na ye, atiaki moto mpe malasi ya ansa kati na yango; bongo atelemaki esika moko na Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
19 Korah assembled all the congregation opposite them to the door of the Tent of Meeting. Yahweh’s glory appeared to all the congregation.
Tango Kore asangisaki bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, nkembo ya Yawe ebimelaki lisanga mobimba,
20 Yahweh spoke to Moses and to Aaron, saying,
mpe Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
21 “Separate yourselves from among this congregation, that I may consume them in a moment!”
— Bokabwana na lisanga ya bato oyo mpo ete nalingi kosilisa bango kaka na mbala moko.
22 They fell on their faces, and said, “God, the God of the spirits of all flesh, shall one man sin, and will you be angry with all the congregation?”
Kasi Moyize mpe Aron bakweyaki bilongi kino na mabele mpe bagangaki: — Eh Nzambe ya milimo nyonso ya bato! Okosilikela lisanga mobimba likolo ya lisumu ya moto moko kaka?
23 Yahweh spoke to Moses, saying,
Bongo, Yawe alobaki na Moyize:
24 “Speak to the congregation, saying, ‘Get away from around the tent of Korah, Dathan, and Abiram!’”
— Loba na lisanga ete bakende mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami.
25 Moses rose up and went to Dathan and Abiram; and the elders of Israel followed him.
Moyize atelemaki mpe akendeki epai ya Datani mpe Abirami; mpe bakambi nyonso ya Isalaele balandaki ye.
26 He spoke to the congregation, saying, “Depart, please, from the tents of these wicked men, and touch nothing of theirs, lest you be consumed in all their sins!”
Akebisaki lisanga mobimba: « Bozala mosika ya bandako ya kapo ya bato oyo ya mabe. Bosimba ata eloko moko te ya bango, noki te bokokufa likolo ya masumu na bango! »
27 So they went away from the tent of Korah, Dathan, and Abiram, on every side. Dathan and Abiram came out, and stood at the door of their tents with their wives, their sons, and their little ones.
Boye bakendeki mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami. Datani mpe Abirami elongo na basi, bana mpe bakoko na bango babimaki libanda mpe bakendeki kotelema liboso ya bikotelo ya bandako na bango ya kapo.
28 Moses said, “Hereby you shall know that Yahweh has sent me to do all these works; for they are not from my own mind.
Bongo Moyize alobaki: « Tala ndenge nini bokoyeba solo ete Yawe atindaki ngai kosala makambo oyo nyonso, kasi ezali makanisi ya motema na ngai moko te:
29 If these men die the common death of all men, or if they experience what all men experience, then Yahweh hasn’t sent me.
Soki bato oyo bakufi kufa ya bato nyonso mpe bamoni makambo oyo bato nyonso bamonaka, wana nde Yawe atindaki ngai te!
30 But if Yahweh makes a new thing, and the ground opens its mouth, and swallows them up with all that belong to them, and they go down alive into Sheol, then you shall understand that these men have despised Yahweh.” (Sheol h7585)
Kasi soki Yawe asali penza likambo moko ya sika, bongo mabele efungoli monoko na yango mpe emeli bango elongo na biloko na bango nyonso, mpe bakiti ya bomoi kati na mokili ya bakufi, wana nde bokoyeba solo ete bato oyo batiolaki Yawe. » (Sheol h7585)
31 As he finished speaking all these words, the ground that was under them split apart.
Tango kaka asilisaki koloba makambo oyo nyonso, mabele efungwamaki na se ya matambe ya Datani mpe Abirami;
32 The earth opened its mouth and swallowed them up with their households, all of Korah’s men, and all their goods.
efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bato ya Kore nyonso elongo na bozwi na bango nyonso.
33 So they, and all that belonged to them went down alive into Sheol. The earth closed on them, and they perished from among the assembly. (Sheol h7585)
Bakitaki ya bomoi kati na mokili ya bakufi elongo na biloko na bango nyonso, mabele ezipaki bango mpe bakufaki ndenge wana. Mpe balimwaki kati na lisanga. (Sheol h7585)
34 All Israel that were around them fled at their cry; for they said, “Lest the earth swallow us up!”
Bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki pembeni na bango bakimaki tango bayokaki bango koganga. Bazalaki komilobela: « Mabele ekomela biso mpe lokola! »
35 Fire came out from Yahweh, and devoured the two hundred fifty men who offered the incense.
Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa.
36 Yahweh spoke to Moses, saying,
Yawe alobaki na Moyize:
37 “Speak to Eleazar the son of Aaron the priest, that he take up the censers out of the burning, and scatter the fire away from the camp; for they are holy,
« Loba na Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, ete balongola bambabola oyo batumbelaka malasi na kati-kati ya moto, mpe bapanza makala ya moto mosika, pamba te bambabola wana ezali bule.
38 even the censers of those who sinned against their own lives. Let them be beaten into plates for a covering of the altar, for they offered them before Yahweh. Therefore they are holy. They shall be a sign to the children of Israel.”
Tika ete bakamata bambabola yango, atako ezali ya bato oyo bakufaki likolo ya masumu na bango; mpe tika ete batuta yango na marto mpo ete ekoma papala mpe batia yango likolo ya etumbelo, pamba te bamemaki yango liboso ya Yawe mpe ekomaki bule. Tika ete yango ekoma elembo mpo na bana ya Isalaele. »
39 Eleazar the priest took the bronze censers which those who were burned had offered; and they beat them out for a covering of the altar,
Boye, Nganga-Nzambe Eleazari alokotaki bambabola nyonso ya bronze oyo bato oyo bazikaki na moto bamemaki, mpe atutaki yango na marto mpo na kotia yango likolo ya etumbelo;
40 to be a memorial to the children of Israel, to the end that no stranger who isn’t of the offspring of Aaron, would come near to burn incense before Yahweh, that he not be as Korah and as his company; as Yahweh spoke to him by Moses.
ndenge Yawe atindaki ye, na nzela ya Moyize. Yango ekozala lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele ete moto moko te, moto oyo abulisama te, moto oyo azali mopaya liboso ya bakitani ya Aron, akoki koya kotumba malasi ya ansa liboso ya Yawe, noki te akokoma lokola Kore mpe bato oyo balandaki ye.
41 But on the next day all the congregation of the children of Israel complained against Moses and against Aaron, saying, “You have killed Yahweh’s people!”
Mokolo oyo elandaki, lisanga mobimba ya bana ya Isalaele ekomaki koyimayima mpo na Moyize mpe Aron. Bazalaki koloba: « Bino bobomi bato na Yawe. »
42 When the congregation was assembled against Moses and against Aaron, they looked toward the Tent of Meeting. Behold, the cloud covered it, and Yahweh’s glory appeared.
Kasi tango lisanga mobimba esanganaki mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, babalukaki na ngambo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe mbala moko lipata ezipaki yango mpe nkembo na Yawe emonisamaki.
43 Moses and Aaron came to the front of the Tent of Meeting.
Boye, Moyize mpe Aron bakendeki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani
44 Yahweh spoke to Moses, saying,
mpe Yawe alobaki na Moyize:
45 “Get away from among this congregation, that I may consume them in a moment!” They fell on their faces.
« Bokende mosika ya lisanga oyo mpo ete nasilisa bango kaka na mbala moko. » Mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.
46 Moses said to Aaron, “Take your censer, put fire from the altar in it, lay incense on it, carry it quickly to the congregation, and make atonement for them; for wrath has gone out from Yahweh! The plague has begun.”
Moyize alobaki na Aron: « Kamata mbabola na yo mpe tia malasi ya ansa kati na yango elongo na moto ya etumbelo. Bongo, kima mbangu kati na lisanga mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, pamba te kanda makasi ebimi liboso ya Yawe, etumbu ezali koya. »
47 Aaron did as Moses said, and ran into the middle of the assembly. The plague had already begun among the people. He put on the incense, and made atonement for the people.
Aron asalaki ndenge kaka Moyize alobaki, mpe akimaki mbangu na kati-kati ya lisanga. Nzokande, etumbu emibandelaki kosala mosala na yango na kati-kati ya bato, kasi Aron abonzaki malasi ya ansa mpe asalaki mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango.
48 He stood between the dead and the living; and the plague was stayed.
Atelemaki na kati-kati ya bato oyo bazalaki na bomoi mpe oyo bazalaki ya kokufa mpe etumbu esilaki.
49 Now those who died by the plague were fourteen thousand seven hundred, in addition to those who died about the matter of Korah.
Nzokande, bato nkoto zomi na minei na nkama sambo bakufaki na etumbu wana, bakisa oyo bakufaki likolo ya Kore.
50 Aaron returned to Moses to the door of the Tent of Meeting, and the plague was stopped.
Bongo, Aron azongaki epai ya Moyize na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, pamba te etumbu esilaki.

< Numbers 16 >