< Matthew 26 >

1 When Jesus had finished all these words, he said to his disciples,
Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, ayebisaki bayekoli na Ye:
2 “You know that after two days the Passover is coming, and the Son of Man will be delivered up to be crucified.”
« Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu. »
3 Then the chief priests, the scribes, and the elders of the people were gathered together in the court of the high priest, who was called Caiaphas.
Boye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basanganaki kati na ndako ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe;
4 They took counsel together that they might take Jesus by deceit and kill him.
bayokanaki kosalela mayele mabe mpo na kokanga Yesu mpe koboma Ye.
5 But they said, “Not during the feast, lest a riot occur among the people.”
Kasi balobaki: « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »
6 Now when Jesus was in Bethany, in the house of Simon the leper,
Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba,
7 a woman came to him having an alabaster jar of very expensive ointment, and she poured it on his head as he sat at the table.
mwasi moko apusanaki pene na Ye. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya motuya makasi. Wana Yesu azalaki na mesa, mwasi yango asopaki malasi yango na moto ya Yesu.
8 But when his disciples saw this, they were indignant, saying, “Why this waste?
Tango bayekoli bamonaki bongo, basilikaki mpe balobaki: — Mpo na nini kobebisa malasi boye?
9 For this ointment might have been sold for much and given to the poor.”
Bakokaki ata koteka yango na motuya makasi mpe kopesa mbongo epai ya babola!
10 However, knowing this, Jesus said to them, “Why do you trouble the woman? She has done a good work for me.
Tango Yesu amonaki bongo, alobaki na bango: — Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo? Asali Ngai likambo moko ya malamu.
11 For you always have the poor with you, but you don’t always have me.
Bokozalaka na babola tango nyonso; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.
12 For in pouring this ointment on my body, she did it to prepare me for burial.
Wana asopi malasi oyo na nzoto na Ngai, asali yango mpo na kobongisa kokundama na Ngai.
13 Most certainly I tell you, wherever this Good News is preached in the whole world, what this woman has done will also be spoken of as a memorial of her.”
Nazali koloba na bino penza ya solo: esika nyonso bakosakola Sango Malamu oyo kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.
14 Then one of the twelve, who was called Judas Iscariot, went to the chief priests
Moko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe
15 and said, “What are you willing to give me if I deliver him to you?” So they weighed out for him thirty pieces of silver.
mpe atunaki bango: — Bozali kokanisa kopesa ngai nini soki nateki Yesu epai na bino? Boye bafutaki ye mbongo ya bibende tuku misato.
16 From that time he sought opportunity to betray him.
Banda na tango wana, Yuda akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu.
17 Now on the first day of unleavened bread, the disciples came to Jesus, saying to him, “Where do you want us to prepare for you to eat the Passover?”
Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, bayekoli bayaki kotuna Yesu: — Esika nini olingi ete tobongisela Yo bilei ya Pasika?
18 He said, “Go into the city to a certain person, and tell him, ‘The Teacher says, “My time is at hand. I will keep the Passover at your house with my disciples.”’”
Azongiselaki bango: — Bokende na engumba epai ya moto songolo mpe boloba na ye: « Moteyi alobi: ‹ Tango na Ngai ekomi pene; nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai epai na yo. › »
19 The disciples did as Jesus commanded them, and they prepared the Passover.
Bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.
20 Now when evening had come, he was reclining at the table with the twelve disciples.
Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bayekoli zomi na mibale.
21 As they were eating, he said, “Most certainly I tell you that one of you will betray me.”
Wana bazalaki kolia, Yesu alobaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: moko kati na bino akoteka Ngai.
22 They were exceedingly sorrowful, and each began to ask him, “It isn’t me, is it, Lord?”
Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga: — Nkolo, ezali ngai?
23 He answered, “He who dipped his hand with me in the dish will betray me.
Yesu azongisaki: — Moto oyo akoteka Ngai azali kolia sani moko elongo na Ngai.
24 The Son of Man goes even as it is written of him, but woe to that man through whom the Son of Man is betrayed! It would be better for that man if he had not been born.”
Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.
25 Judas, who betrayed him, answered, “It isn’t me, is it, Rabbi?” He said to him, “You said it.”
Yuda, ye oyo asengeli koteka Ye, alobaki: — Moteyi, ezali ngai? Yesu azongiselaki ye: — Olobi yango.
26 As they were eating, Jesus took bread, gave thanks for it, and broke it. He gave to the disciples and said, “Take, eat; this is my body.”
Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki yango na bayekoli na koloba: — Oyo ezali nzoto na Ngai! Bozwa mpe bolia.
27 He took the cup, gave thanks, and gave to them, saying, “All of you drink it,
Azwaki lisusu kopo; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango na koloba: — Bomela yango bino nyonso;
28 for this is my blood of the new covenant, which is poured out for many for the remission of sins.
ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele, mpo ete masumu na bango elimbisama.
29 But I tell you that I will not drink of this fruit of the vine from now on, until that day when I drink it anew with you in my Father’s Kingdom.”
Nazali koloba na bino penza ya solo: kobanda sik’oyo, nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, elongo na bino, kati na Bokonzi ya Tata na Ngai.
30 When they had sung a hymn, they went out to the Mount of Olives.
Sima na yango, bayembaki banzembo; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.
31 Then Jesus said to them, “All of you will be made to stumble because of me tonight, for it is written, ‘I will strike the shepherd, and the sheep of the flock will be scattered.’
Yesu alobaki na bango: — Na butu ya lelo, bokokweyisa kondima na bino mpo na Ngai; pamba te ekomama: « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ya etonga ekopalangana. »
32 But after I am raised up, I will go before you into Galilee.”
Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.
33 But Peter answered him, “Even if all will be made to stumble because of you, I will never be made to stumble.”
Petelo alobaki: — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango likolo na Yo, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.
34 Jesus said to him, “Most certainly I tell you that tonight, before the rooster crows, you will deny me three times.”
Yesu azongiselaki ye: — Nazali koloba na yo penza ya solo: kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.
35 Peter said to him, “Even if I must die with you, I will not deny you.” All of the disciples also said likewise.
Petelo alobaki na Ye: — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana Yo te. Mpe bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.
36 Then Jesus came with them to a place called Gethsemane, and said to his disciples, “Sit here, while I go there and pray.”
Elongo na bayekoli na Ye, Yesu akomaki na esika oyo babengaka Getisemane mpe alobaki na bango: — Botikala awa, wana Ngai nakeyi kosambela kuna.
37 He took with him Peter and the two sons of Zebedee, and began to be sorrowful and severely troubled.
Wana amemaki Petelo mpe bana mibali mibale ya Zebede, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa;
38 Then Jesus said to them, “My soul is exceedingly sorrowful, even to death. Stay here and watch with me.”
alobaki na bango: — Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa; botikala awa mpe bosenzela elongo na Ngai.
39 He went forward a little, fell on his face, and prayed, saying, “My Father, if it is possible, let this cup pass away from me; nevertheless, not what I desire, but what you desire.”
Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye: — Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.
40 He came to the disciples and found them sleeping, and said to Peter, “What, couldn’t you watch with me for one hour?
Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi; alobaki na Petelo: — Boni, bokokaki te kosenzela elongo na Ngai mpo na ngonga moko?
41 Watch and pray, that you don’t enter into temptation. The spirit indeed is willing, but the flesh is weak.”
Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.
42 Again, a second time he went away and prayed, saying, “My Father, if this cup can’t pass away from me unless I drink it, your desire be done.”
Akendeki lisusu mwa mosika, na mbala ya mibale, mpe abondelaki: — Tata na Ngai, soki ekoki kosalema te ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai, wana tika ete mokano na Yo esalema!
43 He came again and found them sleeping, for their eyes were heavy.
Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo.
44 He left them again, went away, and prayed a third time, saying the same words.
Boye, atikaki bango mpe akendeki lisusu mosika; mpe, mpo na mbala ya misato, abondelaki na maloba kaka wana.
45 Then he came to his disciples and said to them, “Are you still sleeping and resting? Behold, the hour is at hand, and the Son of Man is betrayed into the hands of sinners.
Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki, mpe alobaki na bango: — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema? Ngonga ekoki; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.
46 Arise, let’s be going. Behold, he who betrays me is at hand.”
Botelema; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.
47 While he was still speaking, behold, Judas, one of the twelve, came, and with him a great multitude with swords and clubs, from the chief priests and elders of the people.
Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.
48 Now he who betrayed him had given them a sign, saying, “Whoever I kiss, he is the one. Seize him.”
Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko; alobaki na bango: « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye; bokanga ye. »
49 Immediately he came to Jesus, and said, “Greetings, Rabbi!” and kissed him.
Mbala moko, apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki na Ye: — Mbote, Moteyi! Mpe apesaki Ye beze.
50 Jesus said to him, “Friend, why are you here?” Then they came and laid hands on Jesus, and took him.
Yesu alobaki na ye: — Molingami na Ngai, likambo oyo oyei kosala awa, sala yango. Bongo bato mosusu oyo bayaki elongo na ye bapusanaki, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye.
51 Behold, one of those who were with Jesus stretched out his hand and drew his sword, and struck the servant of the high priest, and cut off his ear.
Moko kati na baninga ya Yesu asembolaki loboko, abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.
52 Then Jesus said to him, “Put your sword back into its place, for all those who take the sword will die by the sword.
Kasi Yesu alobaki na ye: — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango, pamba te bato nyonso oyo babundaka na mopanga bakokufa na nzela ya mopanga.
53 Or do you think that I couldn’t ask my Father, and he would even now send me more than twelve legions of angels?
Okanisi ete nakoki te kobenga Tata na Ngai, oyo akoki mpe mbala moko kotinda ba-anjelu koleka bankoto zomi mpo na koya kosunga Ngai?
54 How then would the Scriptures be fulfilled that it must be so?”
Nzokande, soki mpe esalemi ndenge wana, Makomi ekokokisama te; pamba te ezali koloba ete makambo nyonso wana esengeli kosalema bongo.
55 In that hour Jesus said to the multitudes, “Have you come out as against a robber with swords and clubs to seize me? I sat daily in the temple teaching, and you didn’t arrest me.
Kaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato: — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete? Nazalaki kovanda mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te.
56 But all this has happened that the Scriptures of the prophets might be fulfilled.” Then all the disciples left him and fled.
Kasi makambo oyo nyonso esalemi mpo ete Makomi ya basakoli ekokisama. Bongo bayekoli nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.
57 Those who had taken Jesus led him away to Caiaphas the high priest, where the scribes and the elders were gathered together.
Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki Ye liboso ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai wapi balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato basanganaki.
58 But Peter followed him from a distance to the court of the high priest, and entered in and sat with the officers, to see the end.
Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe; akotaki kati na lopango mpe avandaki elongo na bakengeli mpo na kotala ndenge makambo ekosuka.
59 Now the chief priests, the elders, and the whole council sought false testimony against Jesus, that they might put him to death,
Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa,
60 and they found none. Even though many false witnesses came forward, they found none. But at last two false witnesses came forward
kasi bazwaki yango te, atako bato mingi bakendeki mpo na kokosela Ye makambo. Bongo, bato mibale bayaki
61 and said, “This man said, ‘I am able to destroy the temple of God, and to build it in three days.’”
mpe balobaki: — Moto oyo alobaki: « Ngai nakoki kobuka Tempelo ya Nzambe mpe kotonga yango lisusu na mikolo misato. »
62 The high priest stood up and said to him, “Have you no answer? What is this that these testify against you?”
Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki mpe atunaki Yesu: — Boni, ozali te na liloba ya kozongisa? Olobi nini liboso ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango?
63 But Jesus stayed silent. The high priest answered him, “I adjure you by the living God that you tell us whether you are the Christ, the Son of God.”
Kasi Yesu abatelaki kimia. Boye mokonzi ya Banganga-Nzambe alobaki na Ye: — Na Kombo ya Nzambe na bomoi, napesi yo mitindo: « Yebisa biso soki ozali Klisto, Mwana na Nzambe. »
64 Jesus said to him, “You have said so. Nevertheless, I tell you, after this you will see the Son of Man sitting at the right hand of Power, and coming on the clouds of the sky.”
Yesu azongiselaki ye: — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino: Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.
65 Then the high priest tore his clothing, saying, “He has spoken blasphemy! Why do we need any more witnesses? Behold, now you have heard his blasphemy.
Mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki: — Afingi Nzambe! Mpo na nini koluka lisusu batatoli? Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe!
66 What do you think?” They answered, “He is worthy of death!”
Bokanisi nini mpo na yango? Bazongisaki: — Abongi na kufa.
67 Then they spat in his face and beat him with their fists, and some slapped him,
Babwakelaki Ye soyi na elongi mpe babetaki Ye makofi; bato mosusu babetaki Ye bambata
68 saying, “Prophesy to us, you Christ! Who hit you?”
mpe balobaki: — Klisto, sakola kati na biso; yebisa biso moto oyo abeti yo!
69 Now Peter was sitting outside in the court, and a maid came to him, saying, “You were also with Jesus, the Galilean!”
Na tango wana, Petelo avandaki libanda, kati na lopango ya kati. Mwasi mosali moko apusanaki pene na ye mpe alobaki: — Yo mpe, ozalaki elongo na Yesu, moto ya Galile.
70 But he denied it before them all, saying, “I don’t know what you are talking about.”
Kasi Petelo awanganaki na miso ya bato nyonso: — Nayebi te makambo oyo ozali koloba!
71 When he had gone out onto the porch, someone else saw him and said to those who were there, “This man also was with Jesus of Nazareth.”
Wana Petelo azalaki kokende na ekuke mpo na kobima, mwasi mosali mosusu amonaki ye mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana: — Moto oyo azalaki elongo na Yesu ya Nazareti.
72 Again he denied it with an oath, “I don’t know the man.”
Petelo awanganaki yango lisusu na kolapa ndayi: — Nayebi moto wana te!
73 After a little while those who stood by came and said to Peter, “Surely you are also one of them, for your speech makes you known.”
Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bapusanaki mpe balobaki na Petelo: — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bato wana; elobeli na yo ezali kofunda yo.
74 Then he began to curse and to swear, “I don’t know the man!” Immediately the rooster crowed.
Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe: — Tika ete Nzambe alakela ngai mabe soki nakosi! Nalapi ndayi: Nayebi moto yango te! Mpe, mbala moko, soso elelaki.
75 Peter remembered the word which Jesus had said to him, “Before the rooster crows, you will deny me three times.” Then he went out and wept bitterly.
Bongo Petelo akanisaki maloba ya Yesu: « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.

< Matthew 26 >