< Judges 18 >

1 In those days there was no king in Israel. In those days the tribe of the Danites sought an inheritance to dwell in; for to that day, their inheritance had not fallen to them among the tribes of Israel.
Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te, mpe bato ya libota ya Dani bazalaki koluka esika ya kovanda; pamba te kino na tango wana, bazwaki nanu ya bango libula te kati na mabota nyonso ya Isalaele.
2 The children of Dan sent five men of their family from their whole number, men of valor, from Zorah and from Eshtaol, to spy out the land and to search it. They said to them, “Go, explore the land!” They came to the hill country of Ephraim, to the house of Micah, and lodged there.
Boye, bana ya libota ya Dani batindaki mibali mitano ya libota na bango, kowuta na Tsorea mpe na Eshitaoli, mpo na kokende kononga mpe koyeba mokili yango. Balobaki na bango: « Bokende koyeba mokili yango ndenge ezali. » Mibali mitano yango bakotaki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika, epai wapi balekisaki butu.
3 When they were by the house of Micah, they knew the voice of the young man the Levite; so they went over there and said to him, “Who brought you here? What do you do in this place? What do you have here?”
Tango bakomaki pembeni ya ndako ya Mika, bayokaki mongongo ya elenge mobali Molevi. Babalukaki epai ye azalaki mpe balobaki na ye: — Nani amemaki yo awa? Ozali kosala nini na esika oyo? Mpo na nini ozali awa?
4 He said to them, “Thus and thus has Micah dealt with me, and he has hired me, and I have become his priest.”
Elenge mobali ayebisaki bango: — Tala makambo oyo Mika asali mpo na ngai: Azwi ngai na mosala mpe akomisi ngai nganga-nzambe na ye.
5 They said to him, “Please ask counsel of God, that we may know whether our way which we go shall be prosperous.”
Balobaki na ye: — Tunela biso epai ya Nzambe mpo ete toyeba soki mobembo na biso ekozala malamu.
6 The priest said to them, “Go in peace. Your way in which you go is before Yahweh.”
Nganga-nzambe azongiselaki bango: — Bokende na kimia, Yawe andimi mobembo na bino.
7 Then the five men departed and came to Laish and saw the people who were there, how they lived in safety, in the way of the Sidonians, quiet and secure; for there was no one in the land possessing authority, that might put them to shame in anything, and they were far from the Sidonians, and had no dealings with anyone else.
Mibali mitano yango bakendeki mpe bakomaki na Laishi. Bamonaki ete, kuna, bazali na kimia mpe na kozanga nungunungu lokola bato ya Sidoni, oyo bazalaki na kimia mpe na kozanga bobangi. Mokonzi moko te ya mboka azalaki konyokola bango. Bazalaki mosika na bato ya Sidoni mpe basalaki boyokani ata na moto moko te.
8 They came to their brothers at Zorah and Eshtaol; and their brothers asked them, “What do you say?”
Tango mibali mitano yango bazongaki na Tsorea mpe na Eshitaoli, bandeko na bango batunaki bango: — Sango nini bomemeli biso?
9 They said, “Arise, and let’s go up against them; for we have seen the land, and behold, it is very good. Do you stand still? Don’t be slothful to go and to enter in to possess the land.
Bazongisaki: — Totelema, tokende kobotola mokili na bango! Tomoni ete mokili yango ezali malamu penza. Boni! Mpo na nini bovandi kimia boye? Bozala bagoyigoyi te mpo na kokende kokota mpe kobotola mokili yango.
10 When you go, you will come to an unsuspecting people, and the land is large; for God has given it into your hand, a place where there is no lack of anything that is in the earth.”
Tango bokokota kuna, bokomona bato bazali na kimia, mpe bazali na mokili monene oyo Nzambe akabi na maboko na bino, mokili oyo ezangi ata eloko moko te kati na biloko nyonso oyo ezalaka na mabele.
11 The family of the Danites set out from Zorah and Eshtaol with six hundred men armed with weapons of war.
Mibali nkama motoba ya libota ya Dani, elongo na bibundeli na bango, balongwaki na Tsorea mpe na Eshitaoli.
12 They went up and encamped in Kiriath Jearim in Judah. Therefore they call that place Mahaneh Dan to this day. Behold, it is behind Kiriath Jearim.
Bakendeki kotonga molako na bango na Kiriati-Yearimi, kati na mokili ya Yuda. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Maane Dani; ezali na ngambo ya weste ya Kiriati-Yearimi.
13 They passed from there to the hill country of Ephraim, and came to the house of Micah.
Balongwaki wana mpe bakendeki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika.
14 Then the five men who went to spy out the country of Laish answered and said to their brothers, “Do you know that there is in these houses an ephod, and teraphim, and a carved image, and a molten image? Now therefore consider what you have to do.”
Bongo mibali mitano oyo banongaki mokili ya Laishi balobaki na bandeko na bango: « Boni, boyebi ete kati na ndako oyo tovandi, ezali na efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende oyo banyangwisa na moto? Boyeba likambo nini bokosala. »
15 They went over there and came to the house of the young Levite man, even to the house of Micah, and asked him how he was doing.
Bongo babalukaki wana, na ndako epai wapi bazalaki mpe bakendeki na ndako ya elenge mobali Molevi, na ndako ya Mika, mpe bapesaki ye mbote.
16 The six hundred men armed with their weapons of war, who were of the children of Dan, stood by the entrance of the gate.
Mibali nkama motoba ya libota ya Dani, oyo bamilengelaki mpo na bitumba batelemaki na ekotelo ya ekuke.
17 The five men who went to spy out the land went up, and came in there, and took the engraved image, the ephod, the teraphim, and the molten image; and the priest stood by the entrance of the gate with the six hundred men armed with weapons of war.
Bato mitano oyo banongaki mokili bakotaki kati na ndako mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto. Nganga-nzambe atelemaki liboso ya ekuke elongo na mibali nkama motoba oyo bamilengelaki mpo na bitumba.
18 When these went into Micah’s house, and took the engraved image, the ephod, the teraphim, and the molten image, the priest said to them, “What are you doing?”
Tango mibali bakotaki na ndako ya Mika mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto, nganga-nzambe alobaki na bango: — Likambo nini bozali kosala?
19 They said to him, “Hold your peace, put your hand on your mouth, and go with us. Be a father and a priest to us. Is it better for you to be priest to the house of one man, or to be priest to a tribe and a family in Israel?”
Bazongisaki: — Kanga monoko! Tia loboko na monoko na yo, yaka elongo na biso mpe zala tata na biso mpe nganga-nzambe na biso. Boni, likambo nini eleki malamu: kozala nganga-nzambe ya moto to kozala nganga-nzambe ya libota mpe ya etuka moko ya Isalaele?
20 The priest’s heart was glad, and he took the ephod, the teraphim, and the engraved image, and went with the people.
Nganga-nzambe atondaki na esengo, akamataki efode, banzambe ya bikeko ya ndako mpe bikeko mosusu; akendeki elongo na bato ya libota ya Dani.
21 So they turned and departed, and put the little ones, the livestock, and the goods before them.
Babalukaki mpe bazongelaki nzela na bango ya mobembo, batiaki liboso bana na bango ya mike, bibwele mpe bozwi na bango ya talo.
22 When they were a good way from the house of Micah, the men who were in the houses near Micah’s house gathered together and overtook the children of Dan.
Tango bakomaki mwa mosika na ndako ya Mika, Mika mpe bato oyo bazalaki pene ya ndako na ye batelemaki na koganga mpe balandaki libota ya Dani.
23 As they called to the children of Dan, they turned their faces, and said to Micah, “What ails you, that you come with such a company?”
Awa bazalaki kobelela sima na libota ya Dani, bana ya Dani babalukaki mpe batunaki Mika: — Likambo nini ezwi yo mpo ete omemela biso ebele ya bato boye?
24 He said, “You have taken away my gods which I made, and the priest, and have gone away! What more do I have? How can you ask me, ‘What ails you?’”
Mika azongisaki: — Bozwi banzambe na ngai, oyo nasalaki, nganga-nzambe na ngai, mpe bokeyi na bino; eloko nini natikali na yango lisusu? Ndenge nini bokoki kotuna ngai: « Likambo nini ezwi yo? »
25 The children of Dan said to him, “Don’t let your voice be heard among us, lest angry fellows fall on you, and you lose your life, with the lives of your household.”
Bato ya libota ya Dani bazongiselaki ye: — Tika ete mongongo na yo eyokana te kati na biso, noki te bato ya kanda bakokweyela yo mpe bakoboma yo elongo na libota na yo mobimba.
26 The children of Dan went their way; and when Micah saw that they were too strong for him, he turned and went back to his house.
Bana ya libota ya Dani balandaki nzela na bango. Tango Mika amonaki ete bana ya Dani baleki ye na makasi, abalukaki mpe azongaki na ndako na ye.
27 They took that which Micah had made, and the priest whom he had, and came to Laish, to a people quiet and unsuspecting, and struck them with the edge of the sword; then they burned the city with fire.
Bana ya libota ya Dani babotolaki biloko oyo Mika asalaki mpe nganga-nzambe na ye. Bongo bakendeki kobundisa engumba Laishi, mboka ya bato ya kimia mpe ya kozanga nungunungu; babomaki bato nyonso na mopanga mpe batumbaki engumba na bango na moto.
28 There was no deliverer, because it was far from Sidon, and they had no dealings with anyone else; and it was in the valley that lies by Beth Rehob. They built the city and lived in it.
Moto moko te ayaki kobikisa mboka wana, pamba te ezalaki mosika na Sidoni mpe esalaki boyokani te elongo na ekolo mosusu. Engumba yango ezalaki na lubwaku oyo ezali pembeni ya Beti-Reobi. Bana ya libota ya Dani batongaki wana engumba na bango mpe bavandaki kuna.
29 They called the name of the city Dan, after the name of Dan their father, who was born to Israel; however the name of the city used to be Laish.
Bapesaki engumba yango kombo « Dani. » Ezalaki kombo ya koko na bango, Dani, mwana mobali ya Isalaele. Na kala, bazalaki kobenga engumba yango Laishi.
30 The children of Dan set up for themselves the engraved image; and Jonathan, the son of Gershom, the son of Moses, and his sons were priests to the tribe of the Danites until the day of the captivity of the land.
Bana ya libota ya Dani batelemisaki ekeko mpo na bango moko mpe batiaki Jonatan, mwana mobali ya Gerishomi, mwana mobali ya Manase mpe koko ya Moyize, mpo ete akoma Nganga-Nzambe ya bato ya libota ya Dani elongo na bana na ye. Basalaki mosala ya bonganga-Nzambe mpo na libota ya Dani kino tango bato ya mokili bakendeki na bowumbu.
31 So they set up for themselves Micah’s engraved image which he made, and it remained all the time that God’s house was in Shiloh.
Bakobaki kosalela bikeko oyo Mika asalaki na tango nyonso oyo Ndako ya Nzambe ezalaki na Silo.

< Judges 18 >