< Jeremiah 2 >

1 Yahweh’s word came to me, saying,
Yawe alobaki na ngai:
2 “Go and proclaim in the ears of Jerusalem, saying, ‘Yahweh says, “I remember for you the kindness of your youth, your love as a bride, how you went after me in the wilderness, in a land that was not sown.
« Kende kotatola na matoyi ya Yelusalemi: Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Nakanisi lisusu bolingo oyo ozalaki na yango epai na Ngai tango ozalaki elenge; ozalaki kolinga Ngai makasi ndenge kaka mwasi mpe mobali balinganaka, mpe ozalaki kolanda Ngai na esobe, kati na mokili oyo ekawuka.
3 Israel was holiness to Yahweh, the first fruits of his increase. All who devour him will be held guilty. Evil will come on them,”’ says Yahweh.”
Isalaele abulisamaki mpo na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na Ye: moto nyonso oyo azalaki kolia yango azalaki komema ngambo, mpe pasi ezalaki kokomela ye, › » elobi Yawe.
4 Hear Yahweh’s word, O house of Jacob, and all the families of the house of Israel!
Oh libota ya Jakobi, bino bituka nyonso ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe!
5 Yahweh says, “What unrighteousness have your fathers found in me, that they have gone far from me, and have walked after worthless vanity, and have become worthless?
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Mabe nini batata na bino bazwaki Ngai mpo ete basundola Ngai? Basepelaki kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, mpe bango moko bakomaki bato pamba.
6 They didn’t say, ‘Where is Yahweh who brought us up out of the land of Egypt, who led us through the wilderness, through a land of deserts and of pits, through a land of drought and of the shadow of death, through a land that no one passed through, and where no man lived?’
Bamitunaki te: ‹ Wapi Yawe oyo abimisaki biso na Ejipito mpe amemaki biso kati na esobe? Wapi Yawe oyo atambolisaki biso na mokili oyo ekawuka mpe ya mabulu, mokili ya molili mpe ya kufa, mokili oyo baleki nzela balekelaka te mpe mokili oyo bato bavandaka soki moke te? ›
7 I brought you into a plentiful land to eat its fruit and its goodness; but when you entered, you defiled my land, and made my heritage an abomination.
Namemaki bino na mokili oyo mabele na yango ebotaka malamu mpo ete bolia mbuma na yango ya kitoko; kasi boyaki nde kokomisa mokili na Ngai mbindo mpe kokomisa libula na Ngai eloko ya nkele.
8 The priests didn’t say, ‘Where is Yahweh?’ and those who handle the law didn’t know me. The rulers also transgressed against me, and the prophets prophesied by Baal and followed things that do not profit.
Banganga-Nzambe bamitunaki te mpo na koluka koyeba: ‹ Yawe azali wapi? › Balakisi ya Mobeko balukaki koyeba Ngai te, bakambi batombokelaki Ngai; basakoli bazalaki kosakola na kombo ya Bala mpe balandaki banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.
9 “Therefore I will yet contend with you,” says Yahweh, “and I will contend with your children’s children.
Yango wana, nakosambisa bino, » elobi Yawe. « Nakosambisa bino elongo na bakitani na bino,
10 For pass over to the islands of Kittim, and see. Send to Kedar, and consider diligently, and see if there has been such a thing.
Bokatisa na ngambo ya bisanga ya kitimi mpe botala malamu, botinda bato na Kedari mpe botala malamu; botala malamu penza soki likambo ya boye esila kosalema.
11 Has a nation changed its gods, which really are no gods? But my people have changed their glory for that which doesn’t profit.
Boni, ezali na ekolo oyo etikaka banzambe na yango mpo na kosambela banzambe mosusu? Nzokande, banzambe yango ezalaka kutu banzambe ya solo te. Kasi bato na Ngai basundoli Ye oyo azali Nkembo na bango mpo na kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.
12 “Be astonished, you heavens, at this and be horribly afraid. Be very desolate,” says Yahweh.
Oh likolo, tika ete likambo oyo ekamwisa yo mpe epesa yo somo makasi, » elobi Yawe.
13 “For my people have committed two evils: they have forsaken me, the spring of living waters, and cut out cisterns for themselves: broken cisterns that can’t hold water.
« Bato na Ngai basali masumu mibale: Basundoli Ngai oyo nazali etima ya bomoi, mpe batimoli bango moko mabulu ya mayi, mabulu oyo ekawukaka noki.
14 Is Israel a slave? Is he born into slavery? Why has he become a captive?
Boni, Isalaele azali solo mowumbu to abotama kati na ndako ya bowumbu? Mpo na nini akomi lokola eloko pamba na miso ya bikolo mosusu?
15 The young lions have roared at him and raised their voices. They have made his land waste. His cities are burned up, without inhabitant.
Bankosi engalaki na koganga mpo na kolengisa ye, ekomisaki mokili na ye lokola esobe; batumbaki bingumba na ye mpe etikalaki lisusu na bato te.
16 The children also of Memphis and Tahpanhes have broken the crown of your head.
Mpe lisusu, bato ya Mefisi mpe ya Dafine babuki moto na yo.
17 “Haven’t you brought this on yourself, in that you have forsaken Yahweh your God, when he led you by the way?
Mpo na nini makambo oyo nyonso ezali kokomela yo? Boni, ezali te mpo ete osundulaki Yawe, Nzambe na yo, tango azalaki nanu kotambolisa yo na nzela?
18 Now what do you gain by going to Egypt, to drink the waters of the Shihor? Or why do you go on the way to Assyria, to drink the waters of the River?
Bongo sik’oyo, mpo na nini ozali kokende komela mayi ya ebale Nili kati na Ejipito? Mpo na nini ozali kokende komela mayi ya ebale Efrate kati na Asiri?
19 “Your own wickedness will correct you, and your backsliding will rebuke you. Know therefore and see that it is an evil and bitter thing, that you have forsaken Yahweh your God, and that my fear is not in you,” says the Lord, Yahweh of Armies.
Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
20 “For long ago I broke off your yoke, and burst your bonds. You said, ‘I will not serve;’ for on every high hill and under every green tree you bowed yourself, playing the prostitute.
« Wuta kala, ozalaki kobuka ekangiseli na yo mpe kokata minyololo na yo. Ozalaki koloba: ‹ Nakozala lisusu mowumbu na yo te. › Yango wana, okomaki komilalisa na bangomba nyonso ya milayi mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu lokola mwasi ya ndumba.
21 Yet I had planted you a noble vine, a pure and faithful seed. How then have you turned into the degenerate branches of a foreign vine to me?
Nzokande, Ngai nalonaki yo lokola nzete kitoko ya vino mpo ete obotaka mbuma ya malamu na tembe te. Bongo, ndenge nini sik’oyo obalukeli Ngai mpe okomi nzete oyo nayebi te, nzete oyo ebotaka mbuma mabe?
22 For though you wash yourself with lye, and use much soap, yet your iniquity is marked before me,” says the Lord Yahweh.
Ata soki omisukoli na kisi oyo basalelaka sabuni to omipakoli sabuni ndenge nini, masumu na yo ekolongwa te liboso na Ngai, » elobi Nkolo Yawe.
23 “How can you say, ‘I am not defiled. I have not gone after the Baals’? See your way in the valley. Know what you have done. You are a swift dromedary traversing her ways,
« Ndenge nini okoki penza koloba: ‹ Namikomisi na ngai mbindo te, nazali kolanda banzambe ya Bala te? › Tala nanu ndenge ozalaki kotambola kati na lubwaku mpe kanisa malamu makambo oyo ozalaki kosala. Okomaki lokola shamo ya mwasi oyo eyengaka-yengaka bisika nyonso;
24 a wild donkey used to the wilderness, that sniffs the wind in her craving. When she is in heat, who can turn her away? All those who seek her will not weary themselves. In her month, they will find her.
lokola ane ya zamba oyo emesana na esobe, oyo ebendaka mopepe na zolo soki ekomi na posa ya kosangisa nzoto. Bongo, nani akoki kokanga posa na yango ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali? Mpunda nyonso ya mobali oyo ekolanda yango ekomona pasi te, pamba te ekozwa yango na tango ya posa ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali.
25 “Keep your feet from being bare, and your throat from thirst. But you said, ‘It is in vain. No, for I have loved strangers, and I will go after them.’
Sala keba! Noki te okotikala makolo ngulu mpe okokawuka mongongo likolo ya bitambola-tambola! Kasi ozali koloba: ‹ Tika na yo! Ngai nalingaka banzambe ya bapaya mpe nakolanda kaka bango. ›
26 As the thief is ashamed when he is found, so the house of Israel is ashamed— they, their kings, their princes, their priests, and their prophets,
Ndenge basambwisaka moyibi soki bakangi ye, ndenge wana mpe ekosalema mpo na libota ya Isalaele: bakonzi mpe bakambi na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango bakosambwa.
27 who tell wood, ‘You are my father,’ and a stone, ‘You have given birth to me,’ for they have turned their back to me, and not their face, but in the time of their trouble they will say, ‘Arise, and save us!’
Balobaka na nzete: ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na libanga: ‹ Yo nde obotaki ngai. › Bapesaki Ngai mikongo, kasi bilongi na bango te. Nzokande soki bakomi na pasi, babelelaka: ‹ Yaka kobikisa biso! ›
28 “But where are your gods that you have made for yourselves? Let them arise, if they can save you in the time of your trouble, for you have as many gods as you have towns, O Judah.
Wapi sik’oyo banzambe na bino, banzambe oyo bosalaki na maboko na bino? Tika ete eya kobikisa bino na tango ya pasi, soki penza ekokoka! Pamba te, oh bato na Yuda, ndenge motango ya bingumba na bino ezali, ndenge wana mpe motango ya banzambe na bino ezali.
29 “Why will you contend with me? You all have transgressed against me,” says Yahweh.
Mpo na nini bozali kosambisa Ngai? Nzokande, ezali bino nyonso nde botombokelaki Ngai, » elobi Yawe.
30 “I have struck your children in vain. They received no correction. Your own sword has devoured your prophets, like a destroying lion.
« Napesaki bato na yo etumbu ya pamba; pamba te bazwaki na bango kaka mayele te. Mopanga na yo ebomi basakoli na yo ndenge nkosi ebomaka bato.
31 Generation, consider Yahweh’s word. Have I been a wilderness to Israel? Or a land of thick darkness? Why do my people say, ‘We have broken loose. We will come to you no more’?
Bino bato ya tango oyo, boyoka Liloba na Yawe: Boni, nazali lokola esobe to mokili ya molili makasi mpo na mokili ya Isalaele? Mpo na nini bato na Ngai bazali koloba: ‹ Tozali na bonsomi ya kokende epai tolingi mpe tokoya lisusu epai na yo te? ›
32 “Can a virgin forget her ornaments, or a bride her attire? Yet my people have forgotten me for days without number.
Boni, elenge mwasi abosanaka penza biloko na ye ya monzele? Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye? Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele.
33 How well you prepare your way to seek love! Therefore you have even taught the wicked women your ways.
Oh, tala ndenge otondi na mayele ya koluka bolingo! Na etamboli na yo, okoki ata kopesa mayele yango ezala na basi oyo baleki mabe!
34 Also the blood of the souls of the innocent poor is found in your skirts. You didn’t find them breaking in, but it is because of all these things.
Kino na bilamba na yo, bato bamonaka makila ya babola, ya bato oyo bayebi likambo te mpe okangi bango na mabe te.
35 “Yet you said, ‘I am innocent. Surely his anger has turned away from me.’ “Behold, I will judge you, because you say, ‘I have not sinned.’
Kati na makambo oyo nyonso, ozali koloba: ‹ Nayebi ata likambo moko te, kanda ya Nzambe ekokweyela ngai te. › Kasi Ngai nakopesa yo etumbu mpo ete ozali koloba: ‹ Nasali masumu te. ›
36 Why do you go about so much to change your ways? You will be ashamed of Egypt also, as you were ashamed of Assyria.
Mpo na nini omipesi na koyengayenga na nzela nyonso? Okosambwa mpo na Ejipito ndenge osambwaki mpo na Asiri.
37 You will also leave that place with your hands on your head; for Yahweh has rejected those in whom you trust, and you won’t prosper with them.
Okotika lisusu esika yango, maboko na moto, pamba te Yawe asundoli bato oyo ozalaki kotiela motema; mpe bango bakosunga yo te. »

< Jeremiah 2 >