< Genesis 34 >

1 Dinah, the daughter of Leah, whom she bore to Jacob, went out to see the daughters of the land.
Nzokande, Dina, mwana mwasi oyo Lea abotelaki Jakobi, abimaki mpo na kokende kotala basi ya mokili wana.
2 Shechem the son of Hamor the Hivite, the prince of the land, saw her. He took her, lay with her, and humbled her.
Tango Sishemi, mokambi ya mokili wana mpe mwana mobali ya Amori, moto ya Evi, amonaki ye, akangaki ye mpe asangisaki na ye nzoto na makasi.
3 His soul joined to Dinah, the daughter of Jacob, and he loved the young lady, and spoke kindly to the young lady.
Motema na ye emipesaki mobimba epai ya Dina, mwana mwasi ya Jakobi, alingaki ye mpe akomaki koloba na ye maloba ya bolingo.
4 Shechem spoke to his father, Hamor, saying, “Get me this young lady as a wife.”
Sishemi alobaki na Amori, tata na ye: « Balela ngai elenge mwasi oyo. »
5 Now Jacob heard that he had defiled Dinah, his daughter; and his sons were with his livestock in the field. Jacob held his peace until they came.
Tango Jakobi ayokaki ete lokumu ya Dina, mwana na ye ya mwasi, ebebisami, abatelaki kimia kino bana na ye ya mibali bazongaki na ndako, pamba te bazalaki na esobe elongo na bibwele.
6 Hamor the father of Shechem went out to Jacob to talk with him.
Boye, Amori, tata na Sishemi, akendeki kosolola na Jakobi.
7 The sons of Jacob came in from the field when they heard it. The men were grieved, and they were very angry, because he had done folly in Israel in lying with Jacob’s daughter, a thing that ought not to be done.
Tango bana mibali ya Jakobi bazongaki wuta na esobe, bayokaki sango ya makambo oyo esalemaki. Bongo, bayokaki pasi mingi na mitema mpe basilikaki makasi, pamba te Sishemi asalaki likambo ya soni na Isalaele, wana asangisaki nzoto na makasi na mwana mwasi ya Jakobi. Likambo ya bongo esengelaki kosalema te.
8 Hamor talked with them, saying, “The soul of my son, Shechem, longs for your daughter. Please give her to him as a wife.
Kasi Amori alobaki na bango: « Motema ya Sishemi, mwana na ngai ya mobali ezali kopela na bolingo mpo na mwana na bino ya mwasi. Nabondeli bino, bopesa ye na libala mpo na Sishemi.
9 Make marriages with us. Give your daughters to us, and take our daughters for yourselves.
Na bongo, bokoki kosala elongo na biso boyokani na nzela ya libala: bokobalisa biso bana na bino ya basi mpe biso tokobalisa bino bana na biso ya basi,
10 You shall dwell with us, and the land will be before you. Live and trade in it, and get possessions in it.”
bokovanda elongo na biso. Mboka ezali liboso na bino, bovanda, bosala mombongo mpe bokoma bankolo mabele. »
11 Shechem said to her father and to her brothers, “Let me find favor in your eyes, and whatever you will tell me I will give.
Boye, Sishemi alobaki na tata mpe na bandeko mibali ya Dina: — Tika ete nazwa ngolu na miso na bino mpe nakopesa bino nyonso oyo bokosenga ngai.
12 Ask me a great amount for a dowry, and I will give whatever you ask of me, but give me the young lady as a wife.”
Bokatela ngai motuya makasi ya mbongo ya libala mpe biloko ebele ya libala; nakofuta bino eloko nyonso oyo bokosenga ngai. Kasi bopesa ngai kaka elenge mwasi oyo na libala.
13 The sons of Jacob answered Shechem and Hamor his father with deceit when they spoke, because he had defiled Dinah their sister,
Lokola lokumu ya Dina, ndeko mwasi na bango, ebebaki, bana mibali ya Jakobi basalelaki mayele mabe mpo na kopesa eyano epai ya Sishemi mpe tata na ye Amori.
14 and said to them, “We can’t do this thing, to give our sister to one who is uncircumcised; for that is a reproach to us.
Balobaki na bango: — Tokoki kosala likambo ya boye te, tokoki te kopesa na libala ndeko na biso ya mwasi epai ya mobali oyo akatama ngenga te, pamba te ezali likambo ya soni mpo na biso.
15 Only on this condition will we consent to you. If you will be as we are, that every male of you be circumcised,
Tokoki kondima yango kaka soki bokomi lokola biso, soki bana na bino nyonso ya mibali bakatisi ngenga.
16 then will we give our daughters to you; and we will take your daughters to us, and we will dwell with you, and we will become one people.
Boye biso tokopesa na libala bana na biso ya basi mpe tokozwa bana na bino ya basi na libala. Tokovanda elongo na bino mpe tokokoma libota moko.
17 But if you will not listen to us and be circumcised, then we will take our sister, and we will be gone.”
Kasi soki boboyi kokatisa ngenga ndenge biso tolobi, tokozwa ndeko na biso ya mwasi mpe tokokende na biso.
18 Their words pleased Hamor and Shechem, Hamor’s son.
Likanisi na bango emonanaki malamu epai ya Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali.
19 The young man didn’t wait to do this thing, because he had delight in Jacob’s daughter, and he was honored above all the house of his father.
Lokola elenge mobali, oyo azalaki na lokumu koleka bato nyonso ya ndako ya tata na ye, alingaki mwana mwasi ya Jakobi, akokisaki na lombangu likambo oyo bayebisaki ye.
20 Hamor and Shechem, his son, came to the gate of their city, and talked with the men of their city, saying,
Boye, Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali, bakendeki na ekuke ya engumba na bango mpo na koloba na bana mboka na bango:
21 “These men are peaceful with us. Therefore let them live in the land and trade in it. For behold, the land is large enough for them. Let’s take their daughters to us for wives, and let’s give them our daughters.
« Bato oyo bazali na boboto epai na biso; tika ete bavanda elongo na biso mpe basala mombongo, mpo ete mboka ezali na yango monene! Tokoki na biso kobala bana na bango ya basi, mpe bango bakoki na bango kobala bana na biso ya basi.
22 Only on this condition will the men consent to us to live with us, to become one people, if every male among us is circumcised, as they are circumcised.
Kasi mibali bakondima kovanda elongo na biso lokola bandeko ya libota moko soki kaka mibali nyonso kati na biso bakatisi ngenga lokola bango.
23 Won’t their livestock and their possessions and all their animals be ours? Only let’s give our consent to them, and they will dwell with us.”
Bibwele na bango, bomengo na bango, banyama na bango nyonso; boni ekokoma ya biso te soki kaka tondimi ete bavanda elongo na biso? »
24 All who went out of the gate of his city listened to Hamor, and to Shechem his son; and every male was circumcised, all who went out of the gate of his city.
Boye, bato nyonso oyo bazalaki kobima na ekuke ya engumba bandimaki Amori mpe mwana na ye ya mobali, Sishemi; mpe mibali nyonso bakatisaki ngenga.
25 On the third day, when they were sore, two of Jacob’s sons, Simeon and Levi, Dinah’s brothers, each took his sword, came upon the unsuspecting city, and killed all the males.
Sima na mikolo misato, wana mibali nyonso kati na bango bazalaki nanu na pasi ya bapota, bana mibali mibale ya Jakobi, bandeko mibali ya Dina, Simeoni mpe Levi, bakamataki mipanga na bango, bakotaki na pwasa kati na engumba mpe babomaki mibali nyonso.
26 They killed Hamor and Shechem, his son, with the edge of the sword, and took Dinah out of Shechem’s house, and went away.
Babomaki na mopanga Amori mpe mwana na ye ya mobali Sishemi. Bakamataki Dina wuta na ndako ya Sishemi mpe bazongaki na ye.
27 Jacob’s sons came on the dead, and plundered the city, because they had defiled their sister.
Bana mibali mosusu ya Jakobi bayaki kosasa mibali oyo bazalaki na bapota mpe kobebisa engumba mpo ete babebisaki lokumu ya ndeko na bango ya mwasi.
28 They took their flocks, their herds, their donkeys, that which was in the city, that which was in the field,
Babotolaki bangombe na bango, bameme mpe bantaba na bango, ba-ane na bango, biloko nyonso oyo ezalaki kati na engumba mpe na bilanga.
29 and all their wealth. They took captive all their little ones and their wives, and took as plunder everything that was in the house.
Bakamataki bomengo na bango nyonso: bana, basi mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na bandako na bango.
30 Jacob said to Simeon and Levi, “You have troubled me, to make me odious to the inhabitants of the land, among the Canaanites and the Perizzites. I am few in number. They will gather themselves together against me and strike me, and I will be destroyed, I and my house.”
Boye, Jakobi alobaki na Simeoni mpe na Levi: — Bopesi ngai pasi mpe bobimisi ngai moto mabe na miso ya bato ya Kanana mpe ya Perizi oyo bazali kovanda na mboka oyo. Biso tozali kaka moke; mpe soki basangisi makasi na bango mpo na kobundisa ngai, bakoboma ngai elongo na ndako na ngai mobimba.
31 They said, “Should he deal with our sister as with a prostitute?”
Bango bazongisaki: — Boni, esengelaki bazwa ndeko na biso lokola mwasi ya ndumba?

< Genesis 34 >