< Acts 17 >

1 Now when they had passed through Amphipolis and Apollonia, they came to Thessalonica, where there was a Jewish synagogue.
Sima na Polo mpe Silasi kolekela na Afipolisi mpe na Apolonia, bakendeki na Tesalonika epai wapi ndako ya mayangani ya Bayuda ezalaki.
2 Paul, as was his custom, went in to them; and for three Sabbath days reasoned with them from the Scriptures,
Ndenge momesano na ye ezalaki, Polo akotaki na ndako ya mayangani. Basaba misato, asololaki na bato oyo bazalaki kuna na tina na Makomi.
3 explaining and demonstrating that the Christ had to suffer and rise again from the dead, and saying, “This Jesus, whom I proclaim to you, is the Christ.”
Azalaki kotalisa mpe kolakisa bango polele ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kosekwa kati na bakufi. Azalaki koloba na bango: — Yesu oyo nazali koteya bino, Ye nde azali Klisto.
4 Some of them were persuaded and joined Paul and Silas: of the devout Greeks a great multitude, and not a few of the chief women.
Ndambo ya Bayuda bandimisamaki mpe basanganaki na Polo mpe Silasi; ndenge moko mpe na bato mingi ya Grese, oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe basi ebele ya lokumu.
5 But the unpersuaded Jews took along some wicked men from the marketplace and gathering a crowd, set the city in an uproar. Assaulting the house of Jason, they sought to bring them out to the people.
Kasi Bayuda mosusu basalaki zuwa; bakendeki kozwa bato ya mobulu oyo batambolaka pamba-pamba na balabala, basangisaki bango mpe babimisaki mobulu kati na engumba. Bakendeki mbangu na ndako ya Jazoni mpo na koluka Polo mpe Silasi mpo ete bamema bango liboso ya ebele ya bato.
6 When they didn’t find them, they dragged Jason and certain brothers before the rulers of the city, crying, “These who have turned the world upside down have come here also,
Kasi lokola bamonaki bango te, bamemaki Jazoni mpe bandeko mosusu liboso ya bakambi ya engumba na koganga: — Bato oyo bazali koningisa mokili mobimba bakomi sik’oyo awa,
7 whom Jason has received. These all act contrary to the decrees of Caesar, saying that there is another king, Jesus!”
mpe Jazoni ayambi bango lokola babengami kati na ndako na ye. Bango nyonso bazali kobuka mibeko ya Sezare, pamba te bazali koloba: « Mokonzi mosusu azali, Kombo na Ye: Yesu! »
8 The multitude and the rulers of the city were troubled when they heard these things.
Tango ebele ya bato mpe bakambi ya engumba bayokaki bongo, batombokaki makasi.
9 When they had taken security from Jason and the rest, they let them go.
Boye, bafutisaki Jazoni mpe bandeko mosusu lomande mpe, na sima, batikaki bango.
10 The brothers immediately sent Paul and Silas away by night to Beroea. When they arrived, they went into the Jewish synagogue.
Wana butu ekomaki, bandeko bakimisaki Polo mpe Silasi noki-noki na Bere. Tango bakomaki kuna, bakotaki na ndako ya mayangani ya Bayuda.
11 Now these were more noble than those in Thessalonica, in that they received the word with all readiness of mind, examining the Scriptures daily to see whether these things were so.
Nzokande, Bayuda ya Bere bazalaki bato ya boboto koleka bato ya Tesalonika, pamba te bayambaki Liloba na motema mobimba mpe, mokolo na mokolo, bazalaki koyekola na mozindo Makomi mpo na kotala soki makambo oyo Polo azali koteya bango ezali ya solo.
12 Many of them therefore believed; also of the prominent Greek women, and not a few men.
Bayuda ebele kati na bango bandimaki; ndenge moko mpe, kati na bato ya Grese, basi mingi ya lokumu mpe mibali ebele bandimaki.
13 But when the Jews of Thessalonica had knowledge that the word of God was proclaimed by Paul at Beroea also, they came there likewise, agitating the multitudes.
Kasi tango Bayuda ya Tesalonika bayokaki ete Polo azali koteya Liloba na Nzambe na Bere, mingi kati na bango bayaki mpe kuna mpo na kotia songisongi kati na bato mpo ete batomboka.
14 Then the brothers immediately sent out Paul to go as far as to the sea, and Silas and Timothy still stayed there.
Bongo, kaka na tango yango, bandeko basalaki ete Polo akende na ebale mpo na kozwa masuwa, wana Silasi mpe Timote batikalaki na Bere.
15 But those who escorted Paul brought him as far as Athens. Receiving a commandment to Silas and Timothy that they should come to him very quickly, they departed.
Bato oyo bakendeki kotika Polo bamemaki ye kino na Ateni; mpe na mitindo ya Polo, bazongaki na Bere koyebisa Silasi mpe Timote ete balanda ye noki na Ateni.
16 Now while Paul waited for them at Athens, his spirit was provoked within him as he saw the city full of idols.
Wana Polo azali kozela bango kati na Ateni, motema na ye etungisamaki mingi na komona ete engumba yango etonda na banzambe ya bikeko.
17 So he reasoned in the synagogue with the Jews and the devout persons, and in the marketplace every day with those who met him.
Boye, azalaki kosolola na Bayuda mpe Bagreki oyo bazalaki kogumbamela Nzambe kati na ndako ya mayangani, mpe na bato oyo azalaki kokuta, mokolo na mokolo, na bisika oyo bato ebele bakutanaka.
18 Some of the Epicurean and Stoic philosophers also were conversing with him. Some said, “What does this babbler want to say?” Others said, “He seems to be advocating foreign deities,” because he preached Jesus and the resurrection.
Ndambo ya bato ya mayele oyo balandaka malakisi ya Epikire mpe ya Zenon bakomaki kotiana tembe na ye. Bamoko batunaki: — Moto oyo ya makelele alingi koloba nini? Bamosusu balobaki: — Tomoni lokola nde azali kolobela banzambe ya bapaya! Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya Sango Malamu na tina na Yesu mpe lisekwa kati na bakufi.
19 They took hold of him and brought him to the Areopagus, saying, “May we know what this new teaching is, which you are speaking about?
Boye bakamataki ye, bamemaki ye na Areopaje mpe balobaki na ye: — Boni, tokoki koyeba soki mateya ya sika oyo ozali koteya elingi koloba nini?
20 For you bring certain strange things to our ears. We want to know therefore what these things mean.”
Pamba te ozali koloba na biso makambo ya sika. Yango wana, tolingi koyeba soki makambo yango elakisi penza nini.
21 Now all the Athenians and the strangers living there spent their time in nothing else, but either to tell or to hear some new thing.
(Bato nyonso ya Ateni mpe bapaya oyo bazalaki kovanda kuna bazalaki kolekisa tango mingi mpo na koloba mpe koyoka basango ya sika).
22 Paul stood in the middle of the Areopagus and said, “You men of Athens, I perceive that you are very religious in all things.
Polo atelemaki liboso ya bato oyo basanganaki na Areopaje mpe alobaki: — Bato ya Ateni! Nasosoli ete, na makambo nyonso, bolingaka mingi makambo ya bonzambe.
23 For as I passed along and observed the objects of your worship, I also found an altar with this inscription: ‘TO AN UNKNOWN GOD.’ What therefore you worship in ignorance, I announce to you.
Pamba te tango nazalaki kotambola kati na engumba na bino mpe kotala bikeko oyo bosambelaka, namonaki kutu etumbelo moko bakoma na likolo na yango: Mpo na Nzambe oyo ayebani te. Nzokande, ngai nayei koteya bino Nzambe oyo bosambelaka ata boyebi Ye te.
24 The God who made the world and all things in it, he, being Lord of heaven and earth, doesn’t dwell in temples made with hands.
Nzambe oyo asala mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango azali Nkolo ya Likolo mpe ya mokili, avandaka te kati na batempelo oyo maboko ya bato etonga.
25 He isn’t served by men’s hands, as though he needed anything, seeing he himself gives to all life and breath and all things.
Mpe azalaka na posa te ya masungi ya bato, pamba te akoka na nyonso. Nzokande, Ye nde apesaka bato nyonso bomoi, pema mpe biloko nyonso.
26 He made from one blood every nation of men to dwell on all the surface of the earth, having determined appointed seasons and the boundaries of their dwellings,
Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.
27 that they should seek the Lord, if perhaps they might reach out for him and find him, though he is not far from each one of us.
Nzambe asalaki bongo mpo ete bato bakoka koluka Ye, tango mosusu bakolonga komona Ye na kolukaluka lokola mokufi miso. Nzokande, na bosolo, azali mosika te ya moko na moko kati na biso.
28 ‘For in him we live, move, and have our being.’ As some of your own poets have said, ‘For we are also his offspring.’
Pamba te, ezali na nzela na Ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino mosusu baloba: « Tozali bana na ye! »
29 Being then the offspring of God, we ought not to think that the Divine Nature is like gold, or silver, or stone, engraved by art and design of man.
Yango wana, lokola tozali bana na Nzambe, tosengeli te kokanisa ete bonzambe ekokani na elilingi ya wolo, ya palata to ya libanga, lokola nzambe ya ekeko oyo esalemi na maboko mpe mayele ya moto.
30 The times of ignorance therefore God overlooked. But now he commands that all people everywhere should repent,
Nzokande, lokola Nzambe atalaka te tango ya kozanga boyebi, kasi azali sik’oyo kosenga ete bato nyonso, na bisika nyonso oyo bazali, babongola mitema.
31 because he has appointed a day in which he will judge the world in righteousness by the man whom he has ordained; of which he has given assurance to all men, in that he has raised him from the dead.”
Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.
32 Now when they heard of the resurrection of the dead, some mocked; but others said, “We want to hear you again concerning this.”
Tango bayokaki Polo koloba na tina na lisekwa ya bakufi, bamoko basekaki ye, mpe bamosusu balobaki: — Tokoyoka yo mokolo mosusu na tina na likambo oyo.
33 Thus Paul went out from among them.
Na bongo, Polo atikaki bango.
34 But certain men joined with him and believed, including Dionysius the Areopagite, and a woman named Damaris, and others with them.
Nzokande, bato mosusu balandaki Polo mpe bakomaki bandimi. Kati na bango, ezalaki: Denisi, moto ya Areopaje; mwasi moko oyo kombo na ye ezali Damarisi, mpe bato mosusu.

< Acts 17 >