< Joshua 9 >

1 When all the kings who were beyond the Jordan, in the hill country, and in the lowland, and on all the shore of the great sea in front of Lebanon, the Hittite, the Amorite, the Canaanite, the Perizzite, the Hivite, and the Jebusite, heard of it
Tango bakonzi nyonso (bakonzi ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi) oyo bazalaki na ngambo ya weste ya Yordani, kati na mokili ya bangomba, na etando mpe na mokili oyo ezalaki pembeni-pembeni ya Mayi monene Mediterane, pene ya Libani, bayokaki sango ya makambo yango,
2 they gathered themselves together to fight with Joshua and with Israel, with one accord.
basanganaki mpo na kobundisa Jozue mpe Isalaele.
3 But when the inhabitants of Gibeon heard what Joshua had done to Jericho and to Ai,
Tango mpe bato ya Gabaoni bayokaki makambo oyo Jozue asalaki na Jeriko mpe na Ayi,
4 they also resorted to a ruse, and went and made as if they had been ambassadors, and took old sacks on their donkeys, and old, torn-up and bound up wine skins,
basalelaki mayele mabe: babongolaki lolenge na bango, batiaki na likolo ya ba-ane na bango basaki epasuka-pasuka mpe bambeki ya kala ya vino oyo etoboka-toboka mpe babamba-bamba.
5 and old and patched sandals on their feet, and wore old garments. All the bread of their food supply was dry and moldy.
Balataki basapato ya kala oyo babamba-bamba mpe bilamba ya kala; mapa na bango ya kolia ezalaki biteni-biteni mpe ya kokawuka.
6 They went to Joshua at the camp at Gilgal, and said to him and to the men of Israel, “We have come from a far country. Now therefore make a covenant with us.”
Bakendeki kokutana na Jozue kati na molako ya Giligali, mpe balobaki na ye mpe na bana ya Isalaele: — Towuti na mokili moko ya mosika; bosala boyokani elongo na biso.
7 The men of Israel said to the Hivites, “What if you live among us? How could we make a covenant with you?”
Bato ya Isalaele balobaki na bato ya Evi: — Tango mosusu bozalaka kaka pembeni na biso! Ndenge nini tosala boyokani elongo na bino?
8 They said to Joshua, “We are your servants.” Joshua said to them, “Who are you? Where do you come from?”
Bazongiselaki Jozue: — Tozali basali na yo. Kasi Jozue atunaki bango: — Bozali banani mpe bowuti wapi?
9 They said to him, “Your servants have come from a very far country because of the name of the LORD your God; for we have heard of his fame, all that he did in Egypt,
Bazongiselaki ye: — Basali na yo bawuti na mokili moko ya mosika penza, likolo ya sango na Yawe, Nzambe na bino. Pamba te toyokaki sango na Ye mpo na makambo nyonso oyo asalaki kati na Ejipito
10 and all that he did to the two kings of the Amorites who were beyond the Jordan, to Sihon king of Heshbon and to Og king of Bashan, who was at Ashtaroth.
mpe epai ya bakonzi mibale ya bato ya Amori oyo bazalaki na ngambo ya este ya Yordani: Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti.
11 Our elders and all the inhabitants of our country spoke to us, saying, ‘Take supplies in your hand for the journey, and go to meet them. Tell them, “We are your servants. Now make a covenant with us.”’
Bampaka na biso mpe bavandi nyonso ya mokili na biso balobaki na biso: « Bokamata biloko ya kolia na nzela, bokende kokutana na bango mpe boyebisa bango: ‹ Tozali basali na bino, bosala boyokani elongo na biso. › »
12 This our bread we took hot for our supplies out of our houses on the day we went out to go to you; but now, behold, it is dry, and has become moldy.
Tala kutu mapa na biso, ezalaki ya moto tango tobongisaki yango na bandako na biso lokola bilei ya mobembo, na mokolo oyo tolongwaki mpo ete toya epai na bino. Kasi sik’oyo tala ndenge nini esili kokawuka mpe kokoma biteni-biteni.
13 These wine skins, which we filled, were new; and behold, they are torn. These our garments and our sandals have become old because of the very long journey.”
Mpe lisusu, totondisaki bambeki oyo na vino tango ezalaki nanu ya sika, kasi tala sik’oyo ndenge nini esili kopasuka-pasuka mpe tala ndenge nini bilamba mpe basapato na biso esili kokufa mpo ete nzela ya mobembo eleki molayi.
14 The men sampled their provisions, and did not ask counsel from the LORD’s mouth.
Bana ya Isalaele bazwaki bilei oyo bato ya Gabaoni bayaki na yango, kasi batunaki Yawe te.
15 Joshua made peace with them, and made a covenant with them, to let them live. The princes of the congregation swore to them.
Jozue asalaki elongo na bango boyokani ya kimia; alakaki ete akoboma bango te. Mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele bandimaki yango na kolapa ndayi.
16 At the end of three days after they had made a covenant with them, they heard that they were their neighbors, and that they lived among them.
Nzokande, mikolo misato sima na kosala boyokani elongo na bato ya Gabaoni, bana ya Isalaele bayokaki ete bato yango bazalaka pene na bango mpe bavandaka kati na bango.
17 The children of Israel traveled and came to their cities on the third day. Now their cities were Gibeon, Chephirah, Beeroth, and Kiriath Jearim.
Boye, bana ya Isalaele batelemaki mpo na kokende; mpe na mokolo ya misato, bakomaki na bingumba na bango: Gabaoni, Kefira, Beyeroti mpe Kiriati-Yearimi.
18 The children of Israel did not strike them, because the princes of the congregation had sworn to them by the LORD, the God of Israel. All the congregation murmured against the princes.
Kasi bana ya Isalaele babundisaki bango te, pamba te bakambi ya lisanga balapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Boye, lisanga mobimba ekomaki koyimayima mpo na bakambi.
19 But all the princes said to all the congregation, “We have sworn to them by the LORD, the God of Israel. Now therefore we may not touch them.
Kasi bakambi nyonso balobaki na lisanga mobimba: « Solo, tolapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Boye, tokoki kosala bango mabe te.
20 We will do this to them, and let them live; lest wrath be on us, because of the oath which we swore to them.”
Kasi tala ndenge nini tokoki kosala bango: Tokotika bango kobika mpo ete kanda na Nzambe ekitela biso te, pamba te tolapaki ndayi na tina na bango. »
21 The princes said to them, “Let them live.” So they became wood cutters and drawers of water for all the congregation, as the princes had spoken to them.
Bakambi babakisaki lisusu: « Tika ete bazala na bomoi, kasi bakobanda kokata banzete mpe kotoka mayi mpo na lisanga mobimba. » Wana nde ezalaki mokano oyo bakambi bazwaki.
22 Joshua called for them, and he spoke to them, saying, “Why have you deceived us, saying, ‘We are very far from you,’ when you live among us?
Jozue abengisaki bato ya Gabaoni mpe atunaki bango: — Mpo na nini bokosaki biso na koloba: « Tovandaka mosika na bino, » nzokande bovandi kaka pene na biso awa?
23 Now therefore you are cursed, and some of you will never fail to be slaves, both wood cutters and drawers of water for the house of my God.”
Bozali sik’oyo na se ya elakeli mabe mpe bokotikala libela kozala bawumbu; bokobanda kokataka bakoni mpe kotokaka mayi mpo na Ndako ya Nzambe na ngai.
24 They answered Joshua, and said, “Because your servants were certainly told how the LORD your God commanded his servant Moses to give you all the land, and to destroy all the inhabitants of the land from before you. Therefore we were very afraid for our lives because of you, and have done this thing.
Bazongiselaki Jozue: — Basali na yo bayokaki sango ya mitindo oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki epai ya mosali na Ye Moyize, ete akopesa bino mokili oyo nyonso mpe akoboma bato na yango nyonso liboso na bino. Boye, tozalaki na somo makasi ya kobungisa bomoi na biso liboso na bino; yango wana tosalaki bongo.
25 Now, behold, we are in your hand. Do to us as it seems good and right to you to do.”
Tala biso oyo, tomitiki na maboko na yo; nyonso oyo okomona malamu mpe sembo na miso na yo, sala biso yango.
26 He did so to them, and delivered them out of the hand of the children of Israel, so that they did not kill them.
Jozue abikisaki bango na maboko ya bana ya Isalaele, mpe babomaki bango te.
27 That day Joshua made them wood cutters and drawers of water for the congregation and for the LORD’s altar to this day, in the place which he should choose.
Na mokolo wana, Jozue akomisaki bango bawumbu mpo na kokata bakoni mpe kotoka mayi mpo na lisanga ya Isalaele mpe mpo na etumbelo ya Yawe, kino na mokolo ya lelo, na esika nyonso oyo Yawe akopona.

< Joshua 9 >