< Galatians 4 >

1 But I say that so long as the heir is a child, he is no different from a bondservant, though he is lord of all,
Tala ndimbola ya makambo oyo nazali koloba: soki mokitani ya libula azali nanu mwana moke, akeseni te na mowumbu, atako ye nde azali nkolo ya biloko nyonso.
2 but is under guardians and stewards until the day appointed by the father.
Akozala na se ya bokonzi ya babokoli mpe ya babateli bomengo kino tango akokokisa mibu oyo tata na ye akataki.
3 So we also, when we were children, were held in bondage under the elemental principles of the world.
Ezali mpe ndenge moko mpo na biso: wana tozalaki nanu bana mike, tozalaki bawumbu ya makambo oyo etambolisaka mokili.
4 But when the fullness of the time came, God sent out his Son, born to a woman, born under the law,
Kasi tango ngonga oyo Nzambe akataki ekokaki, atindaki Mwana na Ye, oyo abotamaki na mwasi mpe na se ya bokonzi ya Mobeko,
5 that he might redeem those who were under the law, that we might receive the adoption as children.
mpo na kosikola bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpe mpo na kopesa biso makoki ya kokoma bana na Nzambe.
6 And because you are children, God sent out the Spirit of his Son into your hearts, crying, “Abba, Father!”
Mpe mpo ete bozali penza bana, Nzambe atindaki Molimo ya Mwana na Ye kati na mitema na biso, Molimo oyo agangaka: « Aba, » elingi koloba: « Tata! »
7 So you are no longer a bondservant, but a son; and if a son, then an heir of God through Christ.
Boye, ozali lisusu mowumbu te, kasi mwana. Mpe mpo ete ozali mwana, Nzambe okomisi yo mokitani ya libula na Ye.
8 However at that time, not knowing God, you were in bondage to those who by nature are not gods.
Wuta kala, wana boyebaki nanu Nzambe te, bozalaki bawumbu ya banzambe oyo, na bosolo, bazali penza banzambe te.
9 But now that you have come to know God, or rather to be known by God, why do you turn back again to the weak and miserable elemental principles, to which you desire to be in bondage all over again?
Kasi awa boyebi sik’oyo Nzambe to lokola sik’oyo Nzambe ayebi bino, ndenge nini bozongeli lisusu makambo oyo etambolisaka mokili, makambo oyo ezanga nguya mpe tina? Bolingi lisusu komizongisa na se ya bowumbu na yango?
10 You observe days, months, seasons, and years.
Bozali kotosa mikolo, basanza, bileko mpe mibu!
11 I am afraid for you, that I might have wasted my labor for you.
Ah! Nazali penza kobanga ete pasi oyo namiyokisaki mpo na bino ekende pamba.
12 I beg you, brothers, become as I am, for I also have become as you are. You did me no wrong,
Nabondeli bino bandeko na ngai: Bozala lokola ngai, pamba te ngai mpe namikomisaki lokola bino. Bosalaki ngai mabe moko te.
13 but you know that because of weakness in the flesh I preached the Good News to you the first time.
Boyebi malamu ete ezali bokono na ngai nde epesaki ngai libaku ya koteya bino Sango Malamu mpo na mbala ya liboso.
14 That which was a temptation to you in my flesh, you did not despise nor reject; but you received me as an angel of God, even as Christ Jesus.
Atako bongo, botiolaki ngai te mpe boboyaki ngai te mpo na bokono na ngai; nzokande, boyambaki ngai lokola Anjelu na Nzambe, lokola Yesu-Klisto Ye moko.
15 What was the blessing you enjoyed? For I testify to you that, if possible, you would have plucked out your eyes and given them to me.
Esengo na bino ekeyi wapi? Nakoki ata kopesa litatoli oyo na tina na bino: Soki ekokaki kosalema, bolingaki ata kolongola miso na bino mpo na kopesa ngai yango.
16 So then, have I become your enemy by telling you the truth?
Boni, nakomi sik’oyo monguna na bino mpo ete nazali koloba na bino solo?
17 They zealously seek you in no good way. No, they desire to alienate you, that you may seek them.
Bato wana balingi bino makasi, kasi makanisi na bango ezali ya malamu te; bazali na posa ya kokabola bino na ngai mpo ete bokangama na bango.
18 But it is always good to be zealous in a good cause, and not only when I am present with you.
Ezali malamu kozalaka tango nyonso na bolingo eleka ndelo mpo na likambo ya malamu, kasi ezala kaka te tango nazali elongo na bino.
19 My little children, of whom I am again in travail until Christ is formed in you—
Bana na ngai, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota, nazali lisusu koyoka pasi mpo na bino, kino tango Klisto akosalema kati na bino.
20 but I could wish to be present with you now, and to change my tone, for I am perplexed about you.
Nazali na posa makasi ya kozala sik’oyo elongo na bino mpe koloba na bino na lolenge mosusu, pamba te nayebi lisusu te eloko ya kosala mpo na bino!
21 Tell me, you that desire to be under the law, do not you listen to the law?
Bino oyo bolingi kozala na se ya bokonzi ya Mobeko, boyebisa ngai nanu, bososolaka na bino te makambo oyo Mobeko elobaka?
22 For it is written that Abraham had two sons, one by the servant, and one by the free woman.
Ekomama kati na yango ete Abrayami azalaki na bana mibali mibale: mwasi mowumbu abotelaki ye mwana moko, mpe mwasi nsomi abotelaki ye mwana moko.
23 However, the son by the servant was born according to the flesh, but the son by the free woman was born through promise.
Mwana oyo mwasi mowumbu abotelaki Abrayami abotamaki na lolenge ya bomoto, kasi mwana oyo mwasi nsomi abotelaki ye abotamaki kolanda elaka ya Nzambe.
24 These things contain an allegory, for these are two covenants. One is from Mount Sinai, bearing children to bondage, which is Hagar.
Makambo oyo epesami lokola ndakisa: Basi oyo mibale bazali kotalisa boyokani mibale. Moko ewutaki na ngomba Sinai mpe ebotaki bawumbu; yango nde Agari azali kotalisa.
25 For this Hagar is Mount Sinai in Arabia, and answers to the Jerusalem that exists now, for she is in bondage with her children.
Agari azali ngomba Sinai kati na Arabi, akokani na Yelusalemi ya sik’oyo, pamba te ezali kati na bowumbu elongo na bana na yango.
26 But the Jerusalem that is above is free, which is the mother of us all.
Kasi Yelusalemi ya Likolo ezali nsomi, mpe yango nde ezali mama na biso;
27 For it is written, “Rejoice, you barren who do not bear. Break out and shout, you who do not travail. For the desolate women have more children than her who has a husband.”
pamba te ekomama: « Sepela, mwasi ekomba, yo oyo obotaka te! Sepela makasi mpe ganga na esengo, yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te! Pamba te bana ya mwasi oyo asundolama bakozala ebele koleka bana ya mwasi oyo azali na mobali. »
28 Now we, brothers, as Isaac was, are children of promise.
Nzokande bino bandeko na ngai, bozali bana ya elaka, lokola Izaki.
29 But as then, he who was born according to the flesh persecuted him who was born according to the Spirit, so also it is now.
Kasi ndenge kaka mwana mobali oyo abotamaki na lolenge ya bomoto azalaki na kala konyokola mwana mobali oyo abotamaki na nzela ya nguya ya Molimo, ndenge wana mpe ezali kosalema sik’oyo.
30 However, what does the Scripture say? “Throw out the servant and her son, for the son of the servant will not inherit with the son of the free woman.”
Nzokande Makomi ezali koloba nini? « Bengana mwasi mowumbu elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu akoki te kokabola libula elongo na mwana mobali ya mwasi nsomi. »
31 So then, brothers, we are not children of a servant, but of the free woman.
Yango wana bandeko na ngai, biso tozali bana ya mwasi mowumbu te, kasi bana ya mwasi nsomi.

< Galatians 4 >