< Ephesians 5 >

1 Be therefore imitators of God, as beloved children.
Boye, lokola bozali bana oyo Nzambe alingaka mingi, bomekolaka Ye.
2 Walk in love, even as Christ also loved us and gave himself up for us, an offering and a sacrifice to God for a sweet-smelling fragrance.
Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.
3 But sexual immorality, and all uncleanness or covetousness, let it not even be mentioned among you, as becomes saints;
Tika ete kindumba, lolenge nyonso ya makambo ya soni mpe lokoso etangamaka kutu te kati na bino, pamba te ebongi te mpo na basantu.
4 nor filthiness, nor foolish talking, nor jesting, which are not appropriate, but rather giving of thanks.
Ezali mpe malamu te mpo na bino kobimisaka maloba ya bozoba, ya bosoto mpe ya maseki, kasi ebongi nde kozongisaka matondi.
5 Know this for sure, that no sexually immoral person, nor unclean person, nor covetous man (who is an idolater), has any inheritance in the Kingdom of Christ and God.
Pamba te, boyeba yango malamu, moto nyonso oyo asalaka kindumba, makambo ya soni to atondi na lokoso oyo ekokani na kosambela bikeko, akokota te na Bokonzi ya Klisto mpe ya Nzambe.
6 Let no one deceive you with empty words, for because of these things the wrath of God comes on the children of disobedience.
Tika ete moko te akosa bino na maloba ezanga tina, pamba te ezali mpo na biloko ya ndenge wana nde kanda ya Nzambe ekweyelaka bato oyo batosaka Ye te.
7 Therefore do not be partakers with them.
Bosanganaka te elongo na bato wana.
8 For you were once darkness, but are now light in the Lord. Walk as children of light,
Na kala, bozalaki molili, kasi sik’oyo bokomi pole kati na Nkolo. Boye, botambolaka lokola bana ya pole,
9 for the fruit of the Spirit is in all goodness and righteousness and truth,
pamba te mbuma ya pole ezali: boboto, bosembo, mpe bosolo.
10 proving what is well pleasing to the Lord.
Bosalaka makasi mpo na kososola makambo oyo esepelisaka Nkolo.
11 Have no fellowship with the unfruitful deeds of darkness, but rather even reprove them.
Bosanganaka te na misala ya molili, oyo ebotaka mbuma te, kasi bobimisaka yango na pwasa.
12 For it is a shame even to speak of the things which are done by them in secret.
Pamba te makambo nyonso oyo esalemaka na nkuku ezalaka soni mpo na kolobela yango.
13 But all things, when they are reproved, are revealed by the light, for everything that reveals is light.
Nzokande nyonso oyo pole ebimisaka na pwasa emonana polele,
14 Therefore he says, “Awake, you who sleep, and arise from the dead, and Christ will shine on you.”
pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba: « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »
15 Therefore watch carefully how you walk, not as unwise, but as wise,
Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya.
16 redeeming the time, because the days are evil.
Bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu, pamba te mikolo ezali mabe.
17 Therefore, do not be foolish, but understand what the will of the Lord is.
Yango wana, bozalaka bazoba te, kasi bososolaka oyo ebengami mokano ya Nkolo.
18 Do not be drunken with wine, in which is dissipation, but be filled with the Spirit,
Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu; kasi botondisamaka na Molimo,
19 speaking to one another in psalms, hymns, and spiritual songs; singing and making melody in your heart to the Lord;
bolendisanaka na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu, mpe na nzela ya banzembo oyo ewutaka na Molimo; boyembelaka mpe bosanzolaka Nkolo wuta na mozindo ya mitema na bino;
20 giving thanks always concerning all things in the name of our Lord Jesus Christ to God, even the Father;
bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso;
21 subjecting yourselves to one another in the fear of Christ.
mpe lokola botosaka Klisto, botosanaka bamoko na bamosusu.
22 Wives, be subject to your own husbands, as to the Lord.
Basi, botosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo.
23 For the husband is the head of the wife, as Christ also is the head of the assembly, being himself the savior of the body.
Pamba te mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Klisto azali Mokonzi ya Lingomba oyo ezali nzoto na Ye, mpe Ye azali Mobikisi na yango.
24 But as the assembly is subject to Christ, so let the wives also be to their own husbands in everything.
Kasi lokola Lingomba etosaka Klisto, tika ete basi mpe batosaka mibali na bango na makambo nyonso.
25 Husbands, love your wives, even as Christ also loved the assembly and gave himself up for her,
Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango
26 that he might sanctify her, having cleansed her by the washing of water with the word,
mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye,
27 that he might present the assembly to himself gloriously, not having spot or wrinkle or any such thing, but that she should be holy and without defect.
mpe mpo na kotalisa yango epai na Ye moko lokola Lingomba etonda na nkembo, ezanga litono to likwanza to mbeba, kasi lokola Lingomba ya bule mpe ezanga pamela.
28 Even so husbands also ought to love their own wives as their own bodies. He who loves his own wife loves himself.
Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko.
29 For no man ever hated his own flesh, but nourishes and cherishes it, even as the Lord also does the assembly,
Pamba te moko te asila koyina nzoto na ye; kasi aleisaka mpe abatelaka yango malamu, ndenge kaka Klisto asalaka mpo na Lingomba,
30 because we are members of his body, of his flesh and bones.
pamba te tozali biteni ya nzoto na Ye.
31 “For this cause a man will leave his father and mother and will be joined to his wife. Then the two will become one flesh.”
Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko.
32 This mystery is great, but I speak concerning Christ and the assembly.
Ezali wana na mabombami minene, kasi ngai nazali koloba na tina na Klisto mpe Lingomba.
33 Nevertheless each of you must also love his own wife even as himself; and let the wife see that she respects her husband.
Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.

< Ephesians 5 >