< Prediker 9 >

1 Zekerlijk, dit alles heb ik in mijn hart gelegd, opdat ik dit alles klaarlijk mocht verstaan, dat de rechtvaardigen, en de wijzen, en hun werken in de hand Gods zijn; ook liefde, ook haat, weet de mens niet uit al hetgeen voor zijn aangezicht is.
Boye, nakanisaki mingi na makambo oyo nyonso mpe namonaki ete, ezala moto ya sembo, moto ya bwanya elongo na makambo nyonso oyo basalaka, bazali na maboko ya Nzambe; kasi moko te ayebaka soki bolingo to koyina ezelaka ye.
2 Alle ding wedervaart hun, gelijk aan alle anderen; enerlei wedervaart den rechtvaardige en den goddeloze, den goede en den reine, als den onreine; zo dien, die offert, als dien, die niet offert; gelijk den goede, alzo ook den zondaar, dien, die zweert, gelijk dien, die den eed vreest.
Bato nyonso basukaka kaka ndenge moko: ezala moto ya sembo to moto mabe, ezala moto malamu to moto oyo asalaka masumu, ezala moto ya peto to moto ya mbindo, ezala moto oyo abonzaka mbeka to moto oyo abonzaka mbeka te. Ndenge ezalaka mpo na moto ya motema malamu ndenge mpe ezalaka mpo na moto ya masumu; ndenge ezalaka mpo na moto oyo alapaka ndayi ndenge mpe ezalaka mpo na moto oyo abangaka kolapa ndayi.
3 Dit is een kwaad onder alles, wat onder de zon geschiedt, dat enerlei ding allen wedervaart, en dat ook het hart der mensenkinderen vol boosheid is, en dat er in hun leven onzinnigheden zijn in hun hart; en daarna moeten zij naar de doden toe.
Tala likambo oyo ezali mabe kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi: bato nyonso basukaka kaka ndenge moko; lisusu, mitema ya bato etonda na mabe, mpe bozoba ezalaka kati na mitema na bango wana bazali nanu na bomoi; mpe, sima na yango, bakokufa kaka.
4 Want voor dengene, die vergezelschapt is bij alle levenden, is er hoop; want een levende hond is beter dan een dode leeuw.
Moto nyonso oyo azali kati na bato ya bomoi azalaka na elikya; mbwa ya bomoi ezali malamu koleka nkosi oyo ekufa.
5 Want de levenden weten, dat zij sterven zullen, maar de doden weten niet met al; zij hebben ook geen loon meer, maar hun gedachtenis is vergeten.
Pamba te bato ya bomoi bayebaka ete bakokufa; kasi bato oyo bakufa bayebaka lisusu eloko moko te, bazalaka lisusu te na litomba ya kozwa, mpo ete babosana bango.
6 Ook is alrede hun liefde, ook hun haat, ook hun nijdigheid vergaan; en zij hebben geen deel meer in deze eeuw in alles, wat onder de zon geschiedt.
Bolingo na bango, koyina na bango mpe baposa na bango esila kolimwa; bakozwa lisusu litomba ata moko te kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi.
7 Ga dan heen, eet uw brood met vreugde, en drink uw wijn van goeder harte; want God heeft alrede een behagen aan uw werken.
Kende, lia bilei na yo na esengo mpe mela masanga na yo ya vino na motema ya esengo; pamba te Nzambe asili kondima misala na yo.
8 Laat uw klederen te allen tijd wit zijn, en laat op uw hoofd geen olie ontbreken.
Tika ete bilamba na yo ezala tango nyonso peto, mpe nzoto na yo elumba tango nyonso solo ya malasi.
9 Geniet het leven met de vrouw, die gij liefhebt, al de dagen uws ijdelen levens, welke God u gegeven heeft onder de zon, al uw ijdele dagen; want dit is uw deel in dit leven, en van uw arbeid, dien gij arbeidt onder de zon.
Sepela na bomoi na yo elongo na mwasi na yo, oyo olingaka na mikolo nyonso ya bomoi ya pamba oyo Nzambe apesi yo na se ya moyi; solo, na mikolo na yo nyonso ya pamba, pamba te yango nde ezali mbano ya bomoi na yo mpo na misala nyonso oyo omonelaka pasi na se ya moyi.
10 Alles, wat uw hand vindt om te doen, doe dat met uw macht; want er is geen werk, noch verzinning, noch wetenschap, noch wijsheid in het graf, daar gij heengaat. (Sheol h7585)
Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te. (Sheol h7585)
11 Ik keerde mij, en zag onder de zon, dat de loop niet is der snellen, noch de strijd der helden, noch ook de spijs der wijzen, noch ook de rijkdom der verstandigen, noch ook de gunst der welwetenden, maar dat tijd en toeval aan alle dezen wedervaart;
Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi: mimekano ezalaka kaka te mpo na moto oyo aleki mbangu, bitumba ezalaka kaka te mpo na bato ya makasi, bilei ezalaka kaka te mpo na bato ya bwanya, bomengo ezalaka kaka te mpo na bato oyo baleki na mayele, mpe bolamu ezalaka kaka te mpo na bato ya bososoli; pamba te pasi mpe bisengo ekomelaka mpe bango nyonso.
12 Dat ook de mens zijn tijd niet weet, gelijk de vissen, die gevangen worden met het boze net; en gelijk de vogelen, die gevangen worden met den strik; gelijk die, alzo worden de kinderen der mensen verstrikt, ter bozer tijd, wanneer derzelve haastelijk over hen valt.
Moto moko te ayebi tango nini ngonga na ye ekokoka: ndenge mbisi ekangamaka na monyama to ndenge banyama ekangamaka na motambo, ndenge wana mpe bato bakangamaka na mitambo ya pasi oyo ekweyelaka bango na mbalakata.
13 Ook heb ik onder de zon deze wijsheid gezien, en zij was groot bij mij;
Namonaki lisusu na se ya moyi, ndakisa moko ya bwanya oyo ezalaki na tina mingi mpo na ngai:
14 Er was een kleine stad, en weinig lieden waren daarin; en een groot koning kwam tegen haar, en hij omsingelde ze, en hij bouwde grote vastigheden tegen haar.
ezalaki na engumba moko ya moke oyo ezalaki mpe na bato moke; bongo mokonzi moko ya nguya ayaki kobundisa yango, azingelaki yango mpe atongaki milako mpo na kokonza engumba yango.
15 En men vond daar een armen wijzen man in, die de stad verloste door zijn wijsheid; maar geen mens gedacht denzelven armen man.
Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mobola moko oyo azalaki moto ya bwanya; abikisaki yango na bwanya na ye, kasi moto moko te akanisaki mobola yango.
16 Toen zeide ik: Wijsheid is beter dan kracht, hoewel de wijsheid des armen veracht, en zijn woorden niet waren gehoord geweest.
Boye namilobelaki: « Bwanya ezali malamu koleka makasi ya nzoto. » Kasi bwanya ya mobola etiolamaka, mpe bayokaka maloba na ye te.
17 De woorden der wijzen moeten in stilheid aangehoord worden, meer dan het geroep desgenen, die over de zotten heerst.
Bayokaka maloba ya kimia ya moto ya bwanya koleka makelele ya mokonzi ya bazoba.
18 De wijsheid is beter dan de krijgswapenen, maar een enig zondaar verderft veel goeds.
Bwanya ezali malamu koleka bibundeli ya basoda, kasi mbeba moko ekoki koboma bolamu na yango nyonso.

< Prediker 9 >