< Salme 32 >

1 (Af David. En maskil.) Salig den, hvis Overtrædselse er forladt, hvis Synd er skjult;
Nzembo ya Davidi. Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami, mpe masumu na ye elongwe!
2 saligt det Menneske, HERREN ej tilregner Skyld, og i hvis Ånd der ikke er Svig.
Esengo na moto oyo Yawe atangelaka lisumu te, mpe atambolaka na lokuta te.
3 Mine Ben svandt hen, så længe jeg tav, under Jamren Dagen igennem,
Lokola nazalaki kondima mabe na ngai te, nazalaki tango nyonso kolela mpo na pasi.
4 thi din Hånd lå tungt på mig både Dag og Nat, min Livskraft svandt som i Sommerens Tørke. (Sela)
Butu mpe moyi, loboko na Yo ezalaki kofinafina ngai; makasi na ngai ekomaki kosila ndenge makasa ekawukaka na eleko ya moyi.
5 Min Synd bekendte jeg for dig, dulgte ikke min Skyld; jeg sagde: "Mine Overtrædelser vil jeg bekende for HERREN!" Da tilgav du mig min Syndeskyld. (Sela)
Tango nandimaki masumu na ngai mpe nabombaki mabe na ngai te, nalobaki: « Nakotubela masumu na ngai liboso ya Yawe. » Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.
6 Derfor bede hver from til dig, den Stund du findes. Kommer da store Vandskyl, ham skal de ikke nå.
Boye, tika ete bayengebene nyonso basambelaka Yo na tango ya malamu! Soki mayi minene etomboki, bambonge na yango ekozwa bango te.
7 Du er mit Skjul, du frier mig af Trængsel, med Frelsesjubel omgiver du mig. (Sela)
Ozali ebombamelo na ngai; obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.
8 Jeg vil lære dig og vise dig, hvor du skal gå, jeg vil råde dig ved at fæste mit Øje på dig.
Olobaki: « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.
9 Vær ikke uden Forstand som Hest eller Muldyr, der tvinges med Tømme og Bidsel, når de ikke vil komme til dig.
Kozala te lokola mpunda to lokola mile ezanga bososoli, oyo bakangaka nguya na yango na nzela ya ebende mpe ya singa oyo batiaka na minoko na yango mpo na kopekisa yango kopusana pene na yo. »
10 Den gudløses Smerter er mange, men den, der stoler på HERREN, omgiver han med Nåde.
Bato mabe bazali na pasi mingi, kasi bolamu ya Yawe ezingelaka bato oyo batiaka elikya na Yawe.
11 Glæd jer i HERREN, I retfærdige, fryd jer, jubler, alle I oprigtige af Hjertet!
Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe, bozala na esengo! Bino nyonso oyo bozali na mitema alima, bobeta milolo ya esengo.

< Salme 32 >