< ᏉᎳ ᏈᎵᎩᏱ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 1 >

1 ᏉᎳ ᎠᎴ ᏗᎹᏗ, ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎬᏩᏂᏅᏏᏙᎯ, ᏫᏙᏍᏙᏪᎳᏏ ᎾᏂᎥ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᎬᏬᎯᏳᎯ ᎾᏍᎩ ᏈᎵᎩᏱ ᎠᏁᎯ, ᏙᏍᎦᏠᏯᏍᏗᎭ ᏗᏂᎦᏘᏯ ᎠᎴ ᎠᏂᏯᏙᎯᎯ;
Polo mpe Timote, bawumbu ya Yesu-Klisto; Epai ya basantu nyonso kati na Klisto, oyo bazali na Filipi, elongo na bakambi ya Lingomba mpe badiakona:
2 ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎢᏤᎳᏗᏙᎮᏍᏗ ᏅᏓᏳᎾᎵᏍᎪᎸᏔᏁ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᎩᏙᏓ, ᎠᎴ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ.
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
3 ᎠᏆᏁᎳᏅᎯ ᏥᏯᎵᎡᎵᏤᎰ ᎢᏳᏍᏗᎭ ᎢᏨᏯᏅᏓᏗᎬᎢ,
Nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai tango nyonso nakanisaka bino;
4 ᏂᎪᎯᎸ ᏂᎦᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎬ ᏂᏥᏔᏲᎯᎲ ᏂᎯ ᏂᏥᎥ ᎡᏥᏙᎵᏍᏗᏱ, ᎤᎵᎮᎵᏍᏗ ᎠᏆᏓᏅᏛ ᎦᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎬᎢ,
nasambelaka Nzambe tango nyonso mpo na bino nyonso mpe nasalaka yango na esengo,
5 ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬ ᎢᏣᏖᏆᎶᏒ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᏕᏥᎧᎿᎭᏩᏗᏒᎢ, ᎢᎬᏱᏱ ᎢᎦ ᏅᏓᎬᏩᏓᎴᏅᏛ ᎪᎯ ᎢᏯᏍᏘ;
mpo na lisungi na bino kati na mosala ya kopanza Sango Malamu, wuta na mokolo ya liboso kino sik’oyo.
6 ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏑᏓᎴᎩ ᎨᏒ ᎾᏆᏜᏓᏏᏛᎡᎲᎾ, ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎣᏍᏛ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎤᎴᏅᏛ ᏙᏗᏣᏓᏅᏛᎢ ᎾᏍᎩ ᎤᏰᎢᎸᏍᏗᏱ ᎬᎵᏍᏆᏗᏍᎩ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏤᎵ ᎢᎦ ᎠᎵᏰᎵᎢᎶᎸ ᎬᏗᏍᎩ;
Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.
7 ᎾᏍᎩ ᏥᏚᏳᎪᏗ ᎾᏍᎩ ᎢᏨᏰᎵᏎᏗᏱ ᏂᏥᎥᎢ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬ ᎠᎩᎾᏫᏱ ᎢᏨᏍᏆᏂᎪᏛᎢ; ᎾᏍᏉᏰᏃ ᎥᏆᎸᎢᏛ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᏥᏍᏕᎵᏍᎬ ᎠᎴ ᏥᏍᏓᏱᏗᏍᎬ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᏂᎯ ᏂᏥᎥ ᎢᏤᎳᏗᏍᏗᎭ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎥᎩᏙᎵᎬᎢ.
Ezali sembo mpo na ngai kozala na makanisi ya lolenge oyo mpo na bino nyonso; solo, nalingaka bino mingi, pamba te bino nyonso bosanganaka makasi elongo na ngai kati na ngolu ya Nzambe, ezala tango nazali ya kokangama na minyololo kati na boloko to tango nazali kolobela mpe kotatola Sango Malamu na molende.
8 ᎤᏁᎳᏅᎯᏰᏃ ᎠᏆᏤᎵ ᎠᎦᏔᎯ ᏂᎦᎥ ᎢᏨᎨᏳᏒᎵ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏓᎨᏳᏗ ᎬᏗᏍᎬᎢ.
Nzambe azali Motatoli na ngai ete nalingaka bino nyonso makasi, na bolingo ya Yesu-Klisto.
9 ᎠᎴ ᏥᏔᏲᎯᎭ ᎦᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎬᎢ, ᎾᏍᎩ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᎢᏤᎲ ᎠᏏ ᎤᏟ ᎢᎦᎢ ᎤᏁᏉᏨᏍᏗᏱ ᎤᎵᏠᏯᏍᏙᏗᏱ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᏂᎦᎥ ᏚᏳᎪᏛ ᎪᎵᏍᏗ ᎨᏒᎢ;
Mpe nasengaka kati na mabondeli na ngai ete bolingo na bino ekoba kokola tango nyonso kati na boyebi ya solo mpe na bososoli ya kokoka,
10 ᎾᏍᎩ ᎢᏥᎪᏩᏛᏗᏱ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏚᏓᎴᎿᎭᎥᎢ; ᎾᏍᎩ ᏂᏣᏠᎾᏍᏛᎾ ᎢᏣᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎠᎴ ᏂᏣᏓᎿᎭᏍᏆᎶᏍᏗᏍᎬᎾ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏤᎵ ᎢᎦ ᎠᎵᏱᎶᎸ ᎬᏗᏍᎩ;
mpo ete bokoka kososola makambo oyo eleki malamu. Na bongo, bokozala peto mpe bokozanga pamela mpo na mokolo ya Klisto,
11 ᎾᏍᎩ ᎢᏥᎧᎵᏨᎯ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᏚᏳᎪᏛ ᎨᏒ ᎤᏓᎴᏅᎯ, ᎾᏍᎩ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎢᏳᏩᏂᏐᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎤᎸᏉᏙᏗᏱ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎴ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᏳᏩᏁᏗᏱ ᎾᏍᎩ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒᎢ.
bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na Yesu-Klisto, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.
12 ᎠᏎᏃ ᎢᏓᎵᏅᏟ ᎠᏆᏚᎵᎭ ᎢᏥᎦᏙᎥᎯᏍᏗᏱ ᎾᏍᎩ ᎫᏓᎴᏅᏛ ᎾᏆᎵᏍᏓᏁᎸᎢ ᎤᏁᏉᎢᏍᏗᏱᏉ ᏄᏩᏁᎸ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ;
Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete makambo oyo ekomeli ngai esali penza ete Sango Malamu ekende liboso.
13 ᎾᏍᎩ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎦᎶᏁᏛ ᎠᎩᏍᏛᏗᏍᎬ ᎥᏆᎸᎥᎢ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎦᏁᎸ ᏂᎬ ᎬᏂᎨᏒ ᏄᎵᏍᏔᏅ, ᎠᎴ ᏂᎬᎾᏛᏉ;
Boye, bakengeli nyonso ya ndako ya mokonzi mpe bato nyonso oyo bazali awa bayebi ete nazali kati na boloko mpo na Klisto.
14 ᎠᎴ ᎠᏂᎪᏗᏳ ᎠᎾᎵᏅᏟ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏧᎾᏁᎶᏗ ᎥᏆᎸᎥ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᏚᎾᎵᎪᏒ ᏚᎾᏓᏅᏛᎢ, ᎤᏟ ᎢᎦᎢ ᎾᏂᎾᏰᏍᎬᎾ ᏄᎾᎵᏍᏔᏅ ᎧᏃᎮᏛ ᎾᏂᏍᎦᎢᎲᎾ ᎤᏂᏃᎮᏗᏱ.
Mpe lisusu, kozala na ngai kati na boloko epesi na bandeko mingi kati na Nkolo molende ya kotia elikya kati na Nkolo mpe ya koteya Liloba na Nzambe, na mpiko mpe na bozangi bobangi.
15 ᎢᎦᏛ ᎤᏙᎯᏳᎯ ᎠᏛᏳᎨᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎠᏗᏒᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᎾᏚᎵᏍᎬ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎠᎾᎵᏥᏙᎲᏍᎦ ᎦᎶᏁᏛ ᎠᏂᏃᎮᎭ, ᎢᎦᏛᏃ ᎾᏍᏉ ᎣᏏᏳ ᎤᏂᏰᎸᏒᎢ.
Ezali solo ete bamoko bazali kosakola Klisto mpo na zuwa mpe kowelana na ngai, kasi bamosusu bazali kosala yango na makanisi ya malamu:
16 ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏑᎾᏓᎴᎩ ᎨᏒ ᎠᎾᎵᏥᏙᎲᏍᎦ ᎦᎶᏁᏛ ᎠᏂᏃᎮᎭ ᎠᏗᏒᏍᏗᏉ ᎨᏒ ᎤᎾᏚᎵᏍᎬ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ, ᎥᏝᏃ ᏄᎾᏠᎾᏍᏛᎾ ᎨᏒ ᏯᏅᏗᎭ, ᎤᏂᏁᏉᏍᏗᏱ ᎤᏂᏰᎸᎭ ᏥᎩᎵᏲᎬ ᎥᏆᎸᎢᏛ ᎨᏒᎢ.
bazali kosala na bolingo mpo bayebi ete ezali mpo na kotatola mpo na Sango Malamu nde ngai nazali awa.
17 ᎠᏂᏐᎢᏍᎩᏂ ᎬᎩᎨᏳᎯᏳ ᎨᏒ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ, ᎠᏂᎦᏔᎭᏰᏃ ᎥᎩᏁᏤᎸᎯ ᎨᏒ ᎠᎩᏍᏕᎸᏗᏱ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ.
Kasi mpo na ba-oyo bazali kosakola Klisto mpo na posa ya kowelana, makanisi na bango ezali ya malamu te: bazali kokanisa ndenge nini bakoki kobakisa pasi na ngai, na tango oyo nazali na pasi lokola mokangami kati na boloko.
18 ᎦᏙᎨᏃ? ᎤᏁᎳᎩ, ᏂᎦᎥᏉ ᎾᎾᏛᏁᎲᎢ, ᎾᏍᏉ ᎠᏎᏉᏉ ᏱᎾᎾᏛᏁᎭ, ᎠᎴ ᎤᏙᎯᏳᎯ ᏳᏂᏰᎸᎭ, ᎦᎶᏁᏛ ᎠᏥᏃᎮᎭ; ᎠᎴ ᎾᎿᎭᏂ ᎦᎵᎡᎵᎦ, ᎥᎥ, ᎠᎴ ᎠᏎ ᎦᎵᎡᎵᎨᏍᏗ.
Ezala bongo to bongo te, eloko ya motuya ezali ete Klisto azali kosakolama, na lolenge nyonso, ezala na makanisi ya mabe to na bosolo; mpe ngai nazali kosepela mpo na yango. Kutu, nakokoba kosepela mpo na yango.
19 ᏥᎦᏔᎭᏰᏃ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎥᎩᏍᏕᎸᏗᏱ ᏭᎵᏰᎢᎶᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ ᏂᎯ ᎢᏣᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎬ ᏅᏓᎦᎵᏍᏙᏔᏂ, ᎠᎴ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏓᏅᏙ ᎥᎩᏁᎲᎢ;
Nayebi solo ete, na nzela ya mabondeli na bino mpe ya lisungi ya Molimo ya Yesu-Klisto, makambo oyo ekomeli ngai ekosuka na kokangolama na ngai.
20 ᎾᏍᎩᏯ ᎤᏣᏘ ᎠᏆᏚᎵᏍᎬ ᎠᎴ ᎤᏚᎩ ᎠᏋᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᏂᎦᎥ ᎪᎱᏍᏗ ᎠᏆᏕᎰᎯᏍᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ, ᏂᎦᎥᏉᏍᎩᏂ ᏂᏥᏍᎦᎢᎲᎾ ᎨᏒᎢ, ᏥᏄᏍᏙᏉ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᎪᎯ, ᎦᎶᏁᏛ ᏥᎸᏉᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᏥᏰᎸ ᎬᏗ, ᎾᏍᏉ ᎬᏃᏛ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎠᎩᏲᎱᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ.
Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai.
21 ᎠᏏᏰᏃ ᏯᏆᎴᏂᏙᎸ ᎦᎶᏅᏛ ᏥᎸᏉᏙᏗ, ᏯᎩᏲᎱᏒᏃ ᎠᏴ ᎠᎩᏁᏉᏤᏗ.
Mpo na ngai, kosalela Klisto, yango nde tina ya bomoi na ngai; mpe kokufa ezali litomba.
22 ᎢᏳᏍᎩᏂᏃᏅ ᎤᏇᏓᎸ ᏯᏆᎴᏂᏙᎸ, ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎠᎩᎾᏄᎪᏫᏍᏗ ᏓᎩᎸᏫᏍᏓᎪᎲᎢ; ᎠᎴ ᎥᏝ ᏱᏥᎦᏔᎭ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᏆᏑᏰᏍᏗᏱ.
Nzokande, soki kokoba na ngai kobika kati na mokili ekopesaka ngai nzela ya kobota bambuma ebele ya malamu na nzela ya mosala na ngai, nayebi te nini nasengeli kopona.
23 ᏔᎵᏰᏃ ᎢᏳᏓᎴᎩ ᎨᏒ ᎠᏍᏓᏱᏳ ᎾᏆᎵᏍᏓᏁᎭ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗ ᎠᏆᏚᎵᏍᎬ ᎠᏆᏂᎩᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᎦᎶᏁᏛ ᏤᎲ ᏩᏆᏕᏗᏱ; ᎾᏍᎩ ᏭᏓᎪᎾᏛᏛ ᎤᏟ ᎣᏏᏳ ᏥᎩ;
Makambo mibale ezali kobenda ngai ngambo na ngambo: na ngambo moko, kokufa mpo na kozala elongo na Klisto, pamba te yango nde eleki malamu;
24 ᎤᏍᏓᎸᏍᎩᏂᏃᏅ ᎠᏆᎴᏂᏓᏍᏗᏱ ᎤᏟ ᎣᏏᏳ ᎢᏣᎵᏍᏓᏁᏗ ᏂᎯ.
na ngambo mosusu, kowumela kati na nzoto, pamba te yango nde eleki na tina likolo na bino.
25 ᎾᏍᎩᏃ ᎯᎠ ᏥᏄᏍᏗ ᏣᏉᎯᏳᎭ, ᏥᎦᏔᎭ ᎠᏆᎴᏂᏓᏍᏗᏱ ᎠᎴ ᏂᏥᎥ ᎢᏨᏰᎳᏗᏓᏍᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎢᏥᏁᏉᏤᏗᏱ ᎠᎴ ᎢᏣᎵᎮᎵᏍᏗᏱ ᎢᏦᎯᏳᏒᎢ.
Lokola nandimisami na yango, nayebi malamu ete nakowumela mpe nakokoba kozala kati na bino nyonso, mpo na kosunga ete bokola mpe bosepela kati na kondima.
26 ᎾᏍᎩ ᎤᏣᏘ ᎤᏁᏉᏨᏍᏗᏱ ᎢᏣᎵᎮᎵᎬ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ, ᎠᏴ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬ, ᎾᏍᎩ ᏔᎵᏁ ᏫᏨᎷᏤᏗ ᎨᏒ ᎢᏳᏍᏗ.
Boye, tango nakozala lisusu elongo na bino, lolendo na bino kati na Yesu-Klisto ekobakisama lisusu mpo na ngai.
27 ᎾᏍᎩᏯ ᎠᏗᎾ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏤᎵ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᏧᎵᎶᎲᏍᎦ ᏂᏣᏛᏁᎵᏙᎮᏍᏗ; ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏃ ᏱᏫᏨᎷᏤᎸ ᎠᎴ ᏱᏫᏨᎪᎥ, ᎠᎴ ᏯᎩᎪᏁᎸᏉ, ᏱᎦᏛᎬᎦ ᏂᏣᏛᎿᎭᏕᎬᎢ, ᎤᎵᏂᎩᏛ ᏕᏥᏙᎬ ᏌᏉ ᎠᏓᏅᏙᎩᎯ, ᏌᏉ ᎠᏓᏅᏖᏗ ᎬᏗ, ᎠᏖᏆᎶᎯ ᎢᏣᏟᏂᎬᏁᏗᏱ ᎢᏥᏍᏕᎸᏗᏱ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ.
Kasi botambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Sango Malamu ya Klisto mpo ete, ezala nayei kotala bino to nayei te, nayoka sango ete botelemi ngwi mpe bosangani lokola moto moko, bozali kobunda elongo, na motema moko, mpo na kobatela kondima oyo Sango Malamu ememelaki bino,
28 ᎠᎴ ᏞᏍᏗ ᎪᎱᏍᏗ ᎠᎾᏛᏁᎲ ᎨᏣᏡᏗᏍᎩ ᏱᏥᏍᎦᏍᏓᏁᎮᏍᏗ; ᎾᏍᎩ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᏳᏅᏁᎯ ᎨᏥᏛᏙᏗ ᎨᏒᎢ, ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᏨᏁᎯ ᎡᏥᏍᏕᎸᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᏥᏍᏕᎸᏗ ᎨᏒᎢ.
na kolenga te liboso ya banguna na bino. Mpo na bango, ezali elembo ya libebi; kasi mpo na bino, ezali elembo ya lobiko, mpe ewutaka na Nzambe.
29 ᏂᎯᏰᏃ ᎡᏥᏁᎸᎯ ᎦᎶᏁᏛ ᎨᏒ ᎢᏳᏍᏗ, ᎥᏝ ᎡᏦᎢᏳᏗᏱᏉ ᎤᏩᏒ, ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᎡᏥᎩᎵᏤᏗᏱ;
Mpo na oyo etali Klisto, Nzambe apesaki bino ngolu kaka te ya kondimela Ye, kasi ngolu mpe ya konyokwama mpo na Ye,
30 ᎾᏍᎩᏯ ᎠᏗᏒᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᏤᎲ ᎾᏍᎩ ᎠᏴ ᏥᏍᎩᎪᎡᎸᎩ, ᎠᎴ ᎪᎯ ᏥᏣᏛᎩᎭ ᎠᏇᎲᎢ.
pamba te bozali nde kobunda etumba ya lolenge moko na oyo bomonaki ngai kobunda mpe oyo bozali koyoka ete nazali lisusu kobunda sik’oyo.

< ᏉᎳ ᏈᎵᎩᏱ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 1 >