< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 6 >

1 ᎢᏤᏯᏔᎮᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᏱᏣᏓᏁᎮᏍᏗ ᎠᏂᎦᏔᎲ ᏴᏫ ᎨᏥᎪᏩᏛᏗᏱᏉ ᏱᏥᏰᎸᏍᎨᏍᏗ, ᎢᏳᏰᏃ ᎾᏍᎩᏉ ᏱᏄᏍᏗ ᎥᏝ ᏴᎨᏣᎫᏴᏏ ᎢᏥᏙᏓ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ.
Bosala keba ete bosalelaka te bosembo na bino liboso ya bato, mpo ete bamona bino; soki te, bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abombela bino.
2 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏳᏃ ᎭᏓᏁᎮᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᎠᏤᎷᎩ ᎢᎬᏱ ᏫᏱᏃᏴᎵᏍᏗᏍᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏥᎾᎾᏛᏁᎰ ᎤᎾᏠᎾᏍᏗ ᏧᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᎠᎴ ᎡᎾᎢᏓᏍᏗᏱ ᏕᎦᎳᏅᏛᎢ, ᏴᏫᏉ ᎬᏩᏂᎸᏉᏙᏗᏱ ᏧᏂᏰᎸᏐᎢ; ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎢᏨᏲᏎᎭ, ᎨᎦᎫᏴᎡᎸ.
Tango ozali kokabela babola, kobetela yango tangwa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka kati na bandako ya mayangani mpe na babalabala mpo ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino penza ya solo: basili kozwa lifuti na bango.
3 ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎭᏓᏁᎮᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᏦᏰᏂ ᎯᎦᏍᎦᏂ ᎤᏙᎴᎰᏒ ᎯᎦᏘᏏ ᏦᏰᏂ ᎾᏛᏁᎲᎢ.
Kasi tango yo ozali kokabela babola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba ete likambo oyo loboko na yo ya mobali ezali kosala,
4 ᎾᏍᎩᏃ ᎭᏓᏁᎲ ᎤᏕᎵᏒ ᎨᏎᏍᏗ, ᏣᏙᏓᏃ ᎤᏕᎵᏒ ᎠᎪᏩᏘᏍᎩ ᎤᏩᏒ ᎠᏎ ᏣᎫᏴᎡᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎬᏂᎨᏒᎢ.
mpo ete likabo na yo ya mawa etikala sekele; bongo Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
5 ᎢᏳ ᎠᎴ ᎭᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎨᏍᏗ, ᎠᎭ ᏞᏍᏗ ᏄᎾᏍᏛ ᎤᎾᏠᎾᏍᏗ ᏱᏂᏣᏍᏕᏍᏗ; ᎾᏍᎩᏰᏃ ᎣᏐ ᎤᏂᏰᎸᏐ ᎤᎾᏓᏙᎵᏍᏙᏗᏱ ᎤᎾᎴᏗᏱ ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᎠᎴ ᏚᏅᏏᏯᏅ ᏕᎦᎳᏅᏛ ᎡᎾᎢᏓᏍᏗᏱ, ᏴᏫᏉ ᎬᏩᏂᎪᏩᏛᏗᏱ ᎤᎾᏚᎵᏍᎪᎢ. ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎢᏨᏲᏎᎭ, ᎨᎦᎫᏴᎡᎸ.
Tango bozali kosambela, bosalaka te lokola bato ya bilongi mibale oyo balingaka kosambela ya kotelema kati na bandako ya mayangani mpe na bisika oyo babalabala ekutana, mpo ete bato bamona bango. Nazali koloba na bino penza ya solo: basili kozwa lifuti na bango.
6 ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎢᏳᏃ ᏔᏓᏙᎵᏍᏔᏂᏎᏍᏗ ᏫᏴᎯᎮᏍᏗ ᎧᏅᏑᎸᎢ, ᎿᎭᏉᏃ ᏣᏍᏚᏁᏍᏗ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ, ᎯᏯᏓᏙᎵᏍᏓᏁᎮᏍᏗ ᏣᏙᏓ ᎤᏕᎵᏒ ᎡᎯ, ᏣᏙᎵᏃ ᎤᏕᎵᏒ ᎠᎪᏩᏘᏍᎩ ᎠᏎ ᏣᎫᏴᎡᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎬᏂᎨᏒᎢ.
Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
7 ᎠᏎᏃ ᎢᏣᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎨᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᎠᏎᏉ ᏱᏨᎫᏘᎶᏍᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏥᎾᎾᏛᏁᎰ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ; ᎤᏣᏘᏰᏃ ᎣᏥᏁᎬ ᎤᏓᎦᎵᏍᏙᏔᏂ ᏓᏲᎦᏛᎦᏁᎵ ᎠᏁᎵᏍᎪᎢ.
Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi.
8 ᏂᎯᏍᎩᏂ ᏞᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏄᎾᏍᏛ ᏱᏂᏣᏍᏕᏍᏗ, ᎢᏥᏙᏓᏰᏃ ᎠᎦᏔᎰ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏥᏂᎬᎬ ᎠᏏᏉ ᏁᏥᏔᏲᏎᎸᎾ ᏥᎨᏐᎢ.
Bosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango.
9 ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎢᏣᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎬ ᎯᎠ ᏄᏍᏕᏍᏗ; ᎣᎩᏙᏓ ᎦᎸᎳᏗ ᎨᎯ, ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏎᏍᏗ ᏕᏣᏙᎥᎢ.
Tala ndenge nini bosengeli kosambela: ‹ Tata na biso, Yo oyo ozali kati na Likolo; tika ete Kombo na Yo ebulisama,
10 ᏣᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᏫᎦᎾᏄᎪᎢ. ᎠᏂ ᎡᎶᎯ ᏫᏂᎦᎵᏍᏓ ᎭᏓᏅᏖᏍᎬᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᎦᎸᎳᏗ ᏥᏂᎦᎵᏍᏗᎭ.
tika ete Bokonzi na Yo eya, tika ete mokano na Yo esalema, awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo!
11 ᏂᏓᏙᏓᏈᏒ ᎣᎦᎵᏍᏓᏴᏗ ᏍᎩᎥᏏ ᎪᎯ ᎢᎦ.
Pesa biso, na mokolo ya lelo, bilei na biso ya mokolo na mokolo;
12 ᏗᎨᏍᎩᎥᏏᏉᏃ ᏕᏍᎩᏚᎬᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᏥᏗᎦᏲᏥᏁᎰ ᏦᏥᏚᎩ.
limbisa mabe na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe;
13 ᎠᎴ ᏞᏍᏗ ᎤᏓᎪᎵᏰᏗᏱ ᎨᏒ ᏫᏗᏍᎩᏯᏘᏅᏍᏔᏅᎩ, ᏍᎩᏳᏓᎴᏍᎨᏍᏗᏉᏍᎩᏂ ᎤᏥ ᎨᏒᎢ. ᏣᏤᎵᎦᏰᏃ ᏣᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᏣᎵᏂᎩᏗᏱ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎡᏣᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒ ᏂᎪᎯᎸᎢ. ᎡᎺᏅ.
komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.] ›
14 ᎢᏳᏰᏃ ᏴᏫ ᎨᏥᏍᎦᏅᏤᎲ ᏱᏗᎨᏥᏁᎭ, ᎾᏍᏉ ᎢᏥᏙᏓ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎢᏥᏙᎵᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ.
Pamba te soki bolimbisi baninga, na mabe oyo basali bino, Tata na bino ya Likolo mpe akolimbisa bino;
15 ᎢᏳᏍᎩᏂ ᏂᏗᎨᏥᏁᎲᎾ ᏱᎩ ᏴᏫ ᎨᏥᏍᎦᏅᏤᎲᎢ, ᎾᏍᏉ ᎢᏥᏙᏓ ᎥᏝ ᏱᏙᎨᏥᎲᏏ ᎢᏥᏍᎦᏅᏨᎢ.
kasi soki bolimbisi te, Tata na bino mpe akolimbisa te mabe na bino.
16 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎠᎹᏟ ᎢᏨᏍᎨᏍᏗ, ᏞᏍᏗ ᏅᎾᏠᎾᏍᏗ ᏄᎾᏍᏛ ᏱᏂᏣᏍᏕᏍᏗ, ᎤᎾᏓᏙᎵᏍᏗ ᏥᎨᏐ ᏗᎧᏃᏗᏱ, ᏂᏓᏤᎸᎾᏰᏃ ᏂᏓᏅᏁᎰ ᏚᎾᎧᏛᎢ, ᏴᏫᏉ ᎤᎾᏙᎴᎰᎯᏍᏗᏱ ᎤᎾᏚᎵᏍᎪ ᎠᎹᏟ ᎠᏅᏍᎬᎢ. ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᏂᏨᏪᏎᎭ ᎨᎦᎫᏴᎡᎸ.
Tango bozali kokila bilei, bozalaka mawa-mawa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka; pamba te bakomisaka bilongi na bango mawa-mawa mpo na kolakisa na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino penza ya solo: basili kozwa lifuti na bango.
17 ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎠᎹᏟ ᎲᏍᎨᏍᏗ, ᎭᏠᏁᏍᎨᏍᏗ, ᎠᎴ ᎭᎬᏍᏉᏍᎨᏍᏗ,
Kasi tango yo ozali kokila bilei, sukola elongi na yo malamu mpe pakola moto na yo malasi,
18 ᎾᏍᎩ ᏞᏍᏗ ᏴᏫᏉ ᎨᏣᏙᎴᎰᎯᏎᏗᏱ ᏱᏣᏰᎵᏎᏍᏗ ᎠᎹᏟ ᏨᏒᎢ, ᏣᏙᏓᏍᎩᏂ ᎤᏕᎵᏒ ᎡᎯ, ᏣᏙᏓᏃ ᎤᏕᎵᏒ ᎠᎪᏩᏘᏍᎩ, ᎠᏎ ᏣᎫᏴᎡᏗ ᎬᏂᎨᏒᎢ.
mpo ete moto moko te ayeba ete ozali kokila bilei, longola kaka Tata na yo, oyo amonanaka te; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku akopesa yo lifuti.
19 ᏞᏍᏗ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎡᎶᎯ ᏱᏥᏟᏏᏍᎨᏍᏗ, ᏥᏍᎪᏴ ᎠᎴ ᎠᏯᏍᏜᏓᏗᏍᎩ ᎤᏂᏲᏍᏙᏗᏱ ᎠᎴ ᎠᏂᏃᏍᎩᏍᎩ ᎤᏂᏴᏍᏗᏱ ᎠᎴ ᎤᏂᏃᏍᎩᏍᏗᏱ;
Bonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango.
20 ᎦᎸᎳᏗᏍᎩᏂ ᏫᏥᏟᏏᏍᎨᏍᏗ ᏧᎬᏩᎶᏗ, ᎾᎿᎭᏂ ᏥᏍᎪᏴ ᎠᏯᏍᏜᏓᏗᏍᎩᏃ ᎤᏂᏲᏍᏙᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎠᏂᏃᏍᎩᏍᎩ ᎤᏂᏴᏍᏗᏱ ᎠᎴ ᎤᏂᏃᏍᎩᏍᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ.
Kasi bonduka bomengo na bino kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te to nselele ekoki kolia yango te to mpe miyibi bakoki kobuka ndako te mpo na koyiba yango;
21 ᎾᎿᎭᏰᏃ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᏫᏥᎲᎢ ᎠᏎ ᎾᏍᏉ ᏫᏓᎮᏍᏗ ᏗᏣᏓᏅᏙ.
pamba te epai bomengo na yo ezali, kuna mpe motema na yo ekozala.
22 ᎠᎦᏔ ᎠᏰᎸ ᎢᎦ ᎦᏘᏍᏗᏍᎩ, ᎢᏳᏍᎩᏂ ᎯᎦᏙᎵ ᎪᎱᏍᏗ ᏄᏍᏛᎾ ᎨᏎᏍᏗ, ᏂᎬ ᎯᏰᎸᎢ ᎤᎧᎵᏦᏅᎯ ᎨᏎᏍᏗ ᎢᎦᎦᏘ.
Miso ezali lokola mwinda ya nzoto. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na pole.
23 ᎢᏳᏍᎩᏂ ᎯᎦᏙᎵ ᎤᏲ ᎢᎨᏎᏍᏗ, ᏂᎬ ᎯᏰᎸᎢ ᎤᎧᎵᏦᏅᎯ ᎨᏎᏍᏗ ᎤᎵᏏᎩ. ᎢᏳᏍᎩᏂᏃ ᎢᎦᎦᏘ ᎭᏫᏂ ᏤᎲ ᎤᎵᏏᎩᏉ ᎢᎨᏎᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᎤᎵᏏᎩ ᏂᎦ ᎡᏉᎯᏳ!
Kasi soki miso na yo ekufi, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na molili. Bongo soki pole oyo ezali kati na yo ekomi molili, molili yango ekozala makasi penza.
24 ᎥᏝ ᎩᎶ ᏰᎵ ᎠᏂᏔᎵ ᎬᏩᎾᏝᎢ ᎪᎱᏍᏗ ᏱᏙᎬᏛᏂᏏ, ᏱᎠᏍᎦᎦᏰᏃ ᏌᏉ ᏱᏅᎨᏳᎭᏃ ᏐᎢ, ᎠᎴ ᏱᏙᎤᏂᏴᎭ ᏌᏉ ᏱᎦᏂᏆᏘᎭᏃ ᏐᎢ. ᏝᏍᎩᏂ ᏰᎵ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎴ ᎹᎹᏂ ᎪᎱᏍᏗᏱᏙᎨᏣᏛᏂᏏ.
Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo nzela moko.
25 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎯᎠ ᏂᏨᏪᏎᎭ, ᏞᏍᏗ ᏱᏤᎵᎯᏍᎨᏍᏗ ᏕᏨᏅᎢ, ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏥᎩᏍᏗᏱ ᎠᎴ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏣᏗᏔᏍᏗᏱ, ᏞᏍᏗ ᎠᎴ ᏗᏥᏰᎸᎢ ᏱᏤᎵᎯᏍᎨᏍᏗ ᎢᏳᏍᏗ ᏗᏣᏄᏬᏍᏗᏱ. ᏝᏍᎪ ᎠᎬᏅ ᎤᏟᎯᏳ ᏱᎩ ᎡᏍᎦᏉ ᎠᎵᏍᏓᏴᏗ? ᎠᎴ ᏝᏍᎪ ᎠᏰᎸᎢ ᎡᏍᎦᏉ ᏗᏄᏬ?
Yango wana, nazali koloba na bino: bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna: tokolia nini to tokomela nini? To na tina na banzoto na bino, na komituna: Tokolata nini? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina?
26 ᏗᏣᎧᏅᎦ ᏥᏍᏆ ᎦᎸᎶᎢ ᎠᏁᎯ, ᏝᏰᏃ ᏯᏂᏫᏍᎪᎢ, ᎠᎴ Ꮭ ᏯᏂᏁᏣᎢᏍᎪᎢ, Ꮭ ᎠᎴ ᏓᏓᏁᎸ ᏯᏂᏟᏏᏍᎪᎢ, ᎠᏎᏃ ᎢᏥᏙᏓ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᏙᎨᎶᎰᎢ. ᏝᏍᎪ ᏂᎯ ᎤᏟ ᏱᏁᏥᎸᏉᏗ ᎡᏍᎦᏉ ᎾᏍᎩ?
Botala ndeke ya likolo: elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango?
27 ᎦᎪᏃ ᏂᎯ ᏥᏂᏣᏛᏅ ᎤᏓᏑᏯ ᎤᏪᎵᎯᏍᎬᏉ ᏰᎵ ᏌᏉ ᎢᏳᏟᎶᏛ ᏱᎧᏁᏉᏣ ᎬᏅᎢ?
Nani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye?
28 ᎠᎴ ᎦᏙᏃ ᏗᏄᏬ ᏙᏤᎵᎯᏍᎪᎢ? ᏗᏣᏓᏅᏛᎵ ᏧᏥᎸᎯ ᏠᎨᏏ ᏤᎯ ᏓᏛᏍᎬᎢ. ᎥᏝ ᏱᏚᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎰᎢ, ᎠᎴ ᎥᏝ ᏯᏂᏍᏙᎰᎢ.
Bongo mpo na nini bomitungisaka mpo na bilamba ya kolata? Botala bafololo ya bilanga ndenge ekolaka! Esalaka te mpe etongaka bilamba te;
29 ᎠᏎᏃ ᎯᎠ ᏂᏨᏪᏎᎭ, ᎾᏍᏉ ᏐᎵᎹᏅ ᏂᎦᎥ ᏄᏬᏚᏒᎢ Ꮭ ᎾᏍᎩ ᏱᏄᏍᏕ ᏚᏄᏮᎢ ᏌᏉ ᎯᎠ ᏄᏍᏛᎢ.
nzokande, nazali koloba na bino ya solo ete ata Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango.
30 ᎢᏳᏰᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎾᏍᎩ ᏱᏂᎬᏁᎭ ᏱᎦᏄᏬᎭ ᎧᏁᏍᎦ ᏠᎨᏏ ᎡᎯ, ᎪᎯ ᎢᎦ ᏤᎭ, ᎤᎩᏨᏅᏃ ᏗᎦᏚᏗᏱ ᏭᎾᏗᏅᏗ ᏥᎩ, ᏝᏍᎪ ᎤᏟᎯᏳ ᏱᏂᏙᎨᏥᏄᏬᏣ, ᎤᏍᏗ ᎢᏦᎯᏳᎯ?
Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka? Bato ya kondima moke!
31 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᏱᏤᎵᎯᏍᎨᏍᏗ ᎯᎠ ᏱᏂᏥᏪᏍᎨᏍᏗ; ᎦᏙ ᏓᏲᏥᎩ, ᎠᎴ ᎦᏙ ᏓᏲᏣᏗᏔᎯ, ᎠᎴ ᎦᏙ ᏓᏲᏣᏄᏬᎢ?
Yango wana, bomitungisaka te na koloba: ‹ Tokolia nini? Tokomela nini? Tokolata nini? ›
32 ᏂᎦᏛᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᎤᏂᏲᎰ ᏧᎾᏖᎴᏅᏛ ᏴᏫ. ᎦᎸᎳᏗᏰᏃ ᎡᎯ ᎢᏥᏙᏓ ᎠᎦᏔᎭ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏂᎦᏛ ᎢᏥᏂᎬᏎᎲᎢ.
Biloko wana nyonso, ezali bapagano nde balukaka-lukaka yango; kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.
33 ᎢᎬᏱᏍᎩᏂ ᎢᏥᏲᎦ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎤᏤᎵ ᏚᏳᎪᏛᎢ, ᎯᎠᏃ ᏂᎦᏗᏳ ᏓᏰᏥᏁᏉᎡᎵ.
Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
34 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᎤᎩᏨᏅ ᎢᏴᏛ ᏱᏫᏤᎵᎯᏍᎨᏍᏗ, ᎤᎩᏨᏅᏰᏃ ᎤᏩᏒ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏛᏕᎵᎯᏍᏔᏂ. ᏰᎵᏉ ᎤᏲ ᎢᎦ ᎤᏪᎲᎢ.
Yango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko: mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.

< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 6 >