< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 13 >

1 ᎾᎯᏳ ᎢᎦ ᏥᏌ ᎤᏄᎪᏨᎩ ᎠᏓᏁᎸᎢ, ᎠᎴ ᎥᏓᎷᎶᏗ ᎤᏪᏅᎩ.
Mokolo yango kaka, Yesu abimaki na ndako mpe akendeki kovanda pembeni ya ebale.
2 ᎤᏂᏣᏘᏃ ᏴᏫ ᎬᏩᏓᏡᏫᏍᏔᏅᎩ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏥᏳᎯ ᎤᏣᏅᎩ, ᎠᎴ ᎤᏪᏅᎩ. ᏂᎦᏗᏳᏃ ᎾᏍᎩ ᎤᏂᏣᏘ ᎠᎹᏳᎶᏗ ᎠᏂᏙᎾᎥᎩ.
Lokola ebele ya bato bazingelaki Ye, Yesu amataki na bwato mpe avandaki kati na yango, wana bato nyonso batelemaki na mokili.
3 ᏕᎤᏬᏁᏔᏅᏃ ᎤᏣᏘ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏚᏟᎶᏍᏓᏁᎸᎩ; ᎯᎠ ᏄᏪᏒᎩ; ᎬᏂᏳᏉ, ᎠᏫᏍᎩ ᎤᏫᏒᏎᎢ.
Azwaki maloba mpe akomaki koteya bango makambo ebele na masese; azalaki koloba: — Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye.
4 ᎤᏫᏒᏃ ᎢᎦᏛ ᏅᏃᎱᎶᏗ ᎤᎳᎨᏯᏛᏤᎢ, ᏥᏍᏆᏃ ᎤᏂᎷᏤ ᎠᎴ ᎤᏄᏘᏐᏁᎢ.
Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela; bandeke eyaki mpe eliaki yango.
5 ᎢᎦᏛᏃ ᏅᏲᎯ ᎨᏒ ᎤᎳᎨᏯᏛᏤᎢ, ᎦᏲᎵ ᎦᏓ ᎦᎳᎨᏴᎢ, ᎩᎳᏉᏃ ᎢᏴᏛ ᎤᎵᏰᏁᎢ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨ ᏌᎨᎢᏳ ᎨᏒ ᎦᏓ.
Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te, ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te;
6 ᎠᏎᏃ ᏅᏙ ᏧᎧᎸᏨ ᎤᎴᏴᏎᎢ, ᏂᏚᎿᎭᏍᏕᏢᎾᏃ ᎨᏒ ᎢᏳᏍᏗ ᎤᎿᎭᏍᎬᏤᏉ.
kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ete ezalaki na misisa te.
7 ᎢᎦᏛᏃ ᎠᏄᎦᎸᎯ ᎤᎳᎨᏯᏛᏤᎢ, ᎠᏄᎦᎸᏃ ᏧᏛᏒ ᎤᏁᏄᎳᏍᏔᏁᎢ.
Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango;
8 ᎢᎦᏛᏍᎩᏂ ᎣᏒ ᎦᏙᎯ ᎤᎳᎨᏯᏛᏤᎢ, ᎾᏍᎩᏃ ᎤᎦᏔᏔᏁᎢ, ᎢᎦᏛ ᎠᏍᎪᎯᏧᏈ ᎤᏁᏉᏤᎢ, ᎢᎦᏛᏃ ᏑᏓᎳᏍᎪᎯ ᎤᏁᏉᏤᎢ, ᎢᎦᏛᏃ ᏦᎠᏍᎪᎯ ᎤᏁᏉᏤᎢ.
kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma: nkona moko ebotaki bambuma nkama moko; mosusu, bambuma tuku motoba; mpe mosusu, bambuma tuku misato.
9 ᎩᎶ ᏕᎦᎷᎨᏍᏗ ᎤᏛᎪᏗᏱ ᏩᏛᎬᎦ.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
10 ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯᏃ ᎬᏩᎷᏤᎸ ᎯᎠ ᏂᎬᏩᏪᏎᎸᎩ; ᎦᏙᏃ ᏕᎯᏬᏁᏗᏍᎬ ᏥᏕᎭᏟᎶᏍᏓᏁᎭ?
Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe batunaki Ye: — Mpo na nini ozali koloba na bango na masese?
11 ᎤᏁᏨᏃ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎩᏂ ᏂᎯ ᎡᏥᏁᎸᎯ ᎨᏒ ᎢᏦᎵᏍᏗᏱ ᎤᏕᎵᏛ ᎨᏒ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬ ᏫᏳᎯ ᎨᏒᎢ, Ꮎ-ᏍᎩᏂ ᎥᏝ ᎨᎦᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎸᎯ ᏱᎩ.
Yesu azongiselaki bango: — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.
12 ᎩᎶᏰᏃ ᎤᎮᏍᏗ ᎠᏥᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ, ᎤᏣᏘᏃ ᎤᎮᏍᏗ; ᎩᎶᏍᎩᏂ ᏄᎲᎾ ᎨᏎᏍᏗ ᎠᏥᎩᎡᏗᏉ ᎨᏎᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᎤᎲᎢ.
Na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu mpe akokoma na bofuluki; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
13 ᎾᏍᎩ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᏥᏕᎦᏥᏯᏟᎶᏍᏓᏁᎭ, ᎠᏂᎪᏩᏘᏍᎬᏰᏃ ᎥᏝ ᏱᎾᏛᎩᎭ ᎠᎴ ᎥᏝ ᏱᏃᎵᎦ.
Tala mpo na nini nazali koloba na bango na masese: ezali mpo ete atako bazali kotala, bamona te; mpe atako bazali koyoka, basosola te.
14 ᎠᎴ ᎠᏁᎲ ᎤᏙᎯᏳᏅ ᎢᏌᏯ ᏧᏙᎴᎰᏎᎢ, ᎯᎠ ᏥᏄᏪᏎᎢ; ᎢᏣᏛᎩᏍᎬ ᎢᏣᏛᎩᏍᎨᏍᏗ, ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᏱᏦᎵᎨᏍᏗ; ᎠᎴ ᎢᏥᎪᏩᏘᏍᎬ ᎢᏥᎪᏩᏘᏍᎨᏍᏗ, ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᏱᏣᏙᎴᎰᏍᎨᏍᏗ.
Maloba oyo mosakoli Ezayi asakola mpo na bango ekokisami: « Matoyi na bino ekoyoka na pamba, kasi bokososola te; miso na bino ekotala na pamba, kasi bokomona te!
15 ᎯᎠᏰᏃ ᏴᏫ ᏧᏂᎾᏫ ᏚᎵᏦᎲᏒ, ᎠᎴ ᏓᏂᎵᎷᎬ ᎦᏲᎵᏳ ᏓᏛᎩᎭ, ᎠᎴ ᏗᏂᎦᏙᎵ ᏚᏂᏍᏚᏅ; ᎾᏍᎩ ᏗᏂᎦᏙᎵ ᏗᎬᏩᏂᎪᏩᏛᏙᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎠᎴ ᏓᏂᎵᎷᎬ ᏗᎬᏩᎾᏛᎪᏙᏗᏂᎨᏒᎾ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎠᎴ ᏧᏂᎾᏫ ᏗᎬᏩᏃᎵᏍᏙᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎠᎴ ᏗᎬᏩᎾᏓᏁᏟᏴᎡᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᏚᎾᏓᏅᏛ, ᎠᎴ ᏗᎦᎦᏥᏅᏬᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ.
Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga; bakangi penza matoyi mpe miso na bango, noki te miso na bango emona, matoyi na bango eyoka, mitema na bango esosola, mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango. »
16 ᏂᎯᏍᎩᏂ ᏗᏥᎦᏙᎵ ᏗᎦᎸᏉᏔᏅᎯ, ᎾᏍᎩᏰᏃ ᏓᎪᏩᏘᎭ, ᎠᎴ ᏕᏥᎵᎷᎬᎢ, ᎾᏍᎩᏰᏃ ᏓᏛᎩᎭ;
Nzokande bino, bozali bato ya esengo, pamba te miso na bino ezali komona, mpe matoyi na bino ezali koyoka.
17 ᎤᏙᎯᏳᎯᏯᏰᏃ ᎯᎠ ᏂᏨᏪᏎᎭ, ᎤᏂᏣᏘ ᎠᎾᏙᎴᎰᏍᎩ ᎠᎴ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᎤᎾᏚᎸᏛ ᎤᏥᎪᏩᏛᏗᏱ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏥᏥᎪᏩᏘᎭ, ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᎤᏂᎪᎲᎯ ᏱᎩ; ᎠᎴ ᎤᎾᏛᎪᏗᏱ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏥᏣᏛᎩᎭ, ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᎤᎾᏛᎦᏅᎯ ᏱᎩ.
Nazali koloba na bino penza ya solo: basakoli ebele mpe bato ebele ya sembo balukaki komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.
18 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏂᎯ ᎢᏣᏛᎬᎦ ᏓᏟᎶᏍᏛ ᎠᏫᏍᎩ.
Boyoka ndimbola ya lisese ya moloni:
19 ᎢᏳᏃ ᎩᎶ ᎠᏛᎬᎦ ᎧᏃᎮᏛ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᎾᏳᎯ ᎨᏒ ᎤᎬᏩᎵ, ᏂᎪᎵᎬᎾᏃ ᏥᎨᏐᎢ, ᎿᎭᏉ ᎤᏁᎫᏥᏛ ᎦᎷᎪᎢ ᎠᎴ ᎤᎩᎡᎰ ᎠᏫᏒ ᎤᎾᏫᏱ. ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᎤᏃᎱᎶᏗ ᏣᏫᏎᎢ.
Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.
20 ᎯᎠᏃ ᎾᏍᎩ ᏅᏲᎯ ᏣᏫᏎᎢ; ᎾᏍᎩ ᏣᏛᎩᏍᎪ ᎧᏃᎮᏛ, ᎠᎴ ᎩᎳᏉ ᎢᏴᏛ ᎤᎵᎮᎵᏨᎯ ᏥᏓᏓᏂᎸᎪᎢ;
Nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga ezali moto oyo ayoki Liloba mpe ayambi yango mbala moko na esengo.
21 ᎠᏎᏃ ᏂᏚᎿᎭᏍᏕᏢᎾᏉ ᎨᏐᎢ, ᎠᎴ ᏞᎦᏉ ᏥᏓᎧᎿᎭᏩᏕᎪᎢ; ᎠᎩᎵᏴᏰᏃ ᎦᎾᏄᎪᎢ ᎠᎴ ᎧᏃᎮᏛ ᏛᎵᏰᎢᎸᏍᏓ ᎠᎦᏕᏯᏙᏓ, ᎩᎳᏉ ᎢᏴᏛ ᏚᏬᏕᎯᎰᎢ.
Kasi mpo ete azwi nanu misisa te kati na kondima, akowumela kaka mpo na mwa tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko ekweyeli ye, asundoli mbala moko kondima na ye.
22 ᎯᎠᏃ ᎾᏍᏉ ᎠᏄᎦᎸᎯ ᏣᏫᏎᎢ, ᎾᏍᎩ ᏣᏛᎩᏍᎪ ᎧᏃᎮᏛ, ᎡᎶᎯᏃ ᎤᏪᎵᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎨᏅᎢᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᏓᎵᏓᏍᏛ ᎠᏂᏁᏄᎳᏍᏗᏍᎪ ᎧᏃᎮᏛ, ᎾᏍᎩᏃ ᎾᎦᏔᏛᏍᎬᎾᏉ ᎨᏐᎢ. (aiōn g165)
Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te. (aiōn g165)
23 ᎾᏍᎩᏍᎩᏂ Ꮎ ᎣᏒ ᎦᏙᎯ ᏣᏫᏎᎢ; ᎾᏍᎩ ᏣᏛᎩᏍᎪ ᎧᏃᎮᏛ ᎠᎴ ᏥᎪᎵᎪᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏣᎦᏔᏛᏍᎪᎢ, ᎠᎴ ᏥᎦᎾᏄᎪᏫᏍᎪᎢ, ᎢᎦᏛ ᎠᏍᎪᎯᏧᏈ ᎤᏁᏉᏨᎯ, ᎢᎦᏛᏃ ᏑᏓᎳᏍᎪᎯ, ᎢᎦᏛᏃ ᏦᎠᏍᎪᎯ.
Nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango malamu; bongo akobota bambuma: epai ya moko, bambuma ekoki komonana nkama moko; epai ya mosusu, bambuma tuku motoba; mpe epai ya mosusu lisusu, bambuma tuku misato.
24 ᏅᏩᏓᎴ ᏚᏟᎶᏍᏓᏁᎸᎩ, ᎯᎠ ᏄᏪᏒᎩ; ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎾᏍᎩᏯᏉ ᎠᏍᎦᏯ ᎣᏍᏛ ᎤᎦᏔ ᎤᎶᎨᏒ ᏧᏫᏎᎢ.
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu: « Bokonzi ya Likolo ekokani na moto oyo alonaki nkona ya malamu kati na elanga na ye.
25 ᎠᏎᏃ ᏴᏫ ᎤᏂᎵᏅᏨ, ᎤᏍᎦᏯ ᎤᎷᏤ ᎤᏲ ᎤᎦᏔ ᎤᏫᏎ ᎤᏣᎴᏍᏗ ᎠᏫᏒ ᎤᏑᏴᏁᎢ; ᎠᎴ ᎢᎤᏪᏅᏎ.
Wana bato nyonso balalaki pongi, monguna na ye ayaki, alonaki matiti mabe kati na elanga na ye ya ble mpe akendeki.
26 ᎿᎭᏉᏃ ᎤᎵᏰᏅ ᎠᎴ ᎤᎦᏔᏔᏅ ᎾᏍᏉ ᎤᏲ ᎤᎾᏄᎪᏤᎢ.
Tango ble ebandaki kobota mpe kobimisa mito ya bambuma, matiti mabe mpe ekolaki.
27 ᎿᎭᏉᏃ ᎠᏍᎦᏯ ᎦᏁᎳ ᏧᏅᏏᏓᏍᏗ ᎬᏩᎷᏤᎴᎢ, ᎯᎠ ᏂᎬᏩᏪᏎᎴᎢ; ᏍᎩᏅᏏᏓᏍᏗ, ᏝᏍᎪ ᎣᏍᏛ ᎤᎦᏔ ᏱᏣᏫᏎ ᏣᎶᎨᏒᎢ? ᎦᏙ ᏗᎦᎵᏍᏙᏓᎭ ᎤᏲ ᏧᏰᎦ?
Basali ya nkolo elanga bayaki mpe balobaki: ‹ Mokonzi; boni, olonaki te nkona ya malamu kati na elanga na yo? Bongo matiti mabe oyo, ewuti wapi? ›
28 ᎯᎠᏃ ᏂᏚᏪᏎᎴᎢ; ᎩᎶ ᎠᎩᏍᎦᎩ ᎾᏍᎩ ᏄᏛᏁᎸ. ᏧᏅᏏᏓᏍᏗ ᎯᎠ ᏂᎬᏩᏎᎴᎢ; ᏣᏚᎵᏍᎪᏃ ᎣᎩᏰᎯᏒᏍᏗᏱ?
Nkolo elanga azongisaki: ‹ Ezali monguna nde asali bongo! › Basali batunaki lisusu: ‹ Olingi tokende kopikola yango? ›
29 ᎠᏎᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᎥᏝ, ᎢᏥᏰᎯᏍᎬᏰᏃ ᎤᏲ, ᏱᏕᏥᎿᎭᏍᏕᏢᏓ ᎾᏍᏉ ᎤᏣᎴᏍᏗ.
Nkolo elanga azongisaki: ‹ Bokende te! Pamba te wana bokobanda kolongola matiti mabe, bokoki mpe kopikola ble elongo na yango.
30 ᎤᏁᎳᎩ ᎢᎫᎳᎭ ᏫᏓᏛᎯ ᎬᏂ ᎠᎦᏛᎾᏨᎭ; ᎿᎭᏉᏃ ᎠᎦᏛᎾᏨ ᎯᎠ ᏅᏓᎦᏥᏪᏎᎵ ᎠᏂᏍᎫᏕᏍᎩ; ᎢᎬᏱ ᎢᏥᏟᏌ ᎤᏲ, ᎠᎴ ᏗᏦᏛᏣ ᏗᎪᎲᏍᏙᏗ, ᎤᏣᎴᏍᏗᏍᎩᏂ ᎢᏥᏟᏌ ᎠᎩᏍᏆᏂᎪᏙᏗᏱ.
Botika nyonso mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka bambuma. Ezali na tango wana nde nakoloba na bato oyo babukaka bambuma: Bolongola liboso matiti mabe, bokanga yango maboke-maboke mpe botumba yango; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na Ngai ya bambuma. › »
31 ᏅᏩᏓᎴ ᏚᏟᎶᏍᏓᏁᎸᎩ, ᎯᎠ ᏄᏪᏒᎩ; ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎾᏍᎩᏯᏉ ᎠᏥᎸ ᎤᎦᏔ, ᎠᏍᎦᏯ ᏧᎩᏎ ᎠᎴ ᏧᏫᏎ ᎤᎶᎨᏒᎢ.
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu: « Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye.
32 ᎾᏍᎩ ᎤᏙᎯᏳᏒ ᏥᏬᏓᎪᎾᏛᏗ ᎤᏍᏗᎩᏳ ᎨᏒ ᏂᎦᎥ ᎤᎦᏔ, ᎠᏎᏃ ᎠᏛᎯ ᏥᏬᏓᎪᎾᏛᏗ ᎤᏛᏂᏳ ᎨᏒ ᏂᎦᎥ ᎤᏰᎿᎭᎥᎢ, ᎠᎴ ᏡᎬ ᏥᏂᎦᎵᏍᏗᎭ, ᎾᏍᎩᏃ ᏥᏍᏆ ᏣᏂᎷᎪᎢ, ᏚᏩᏂᎦᎸ ᏣᎾᎭᏗᏍᎪᎢ.
Nkona yango eleki bankona nyonso na moke; kasi soki ekoli, elekaka bandunda nyonso ya elanga na molayi mpe ekomaka monene; ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na yango na bitape na yango. »
33 ᏅᏩᏓᎴ ᏚᏟᎶᏍᏓᏁᎸᎩ, ᎯᎠ ᏄᏬᏒᎩ; ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎾᏍᎩᏯᏉ ᎠᎪᏙᏗ, ᎾᏍᎩ ᎠᎨᏴ ᏧᎩᏎ ᎠᎴ ᏧᏑᏴᏁ ᏦᎢ ᎢᏳᏟᎶᏛ ᎢᏒ ᎦᎸᎢ, ᎬᏂ ᏂᎦᏛ ᎤᎪᏐᏅ.
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu: « Bokonzi ya Likolo ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki. »
34 ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏂᎦᏗᏳ ᏥᏌ ᏚᏬᏁᏔᏅᎩ ᎤᏂᏣᏘ ᏚᏟᎶᏍᏓᏁᎸᎩ, ᏂᏓᏟᎶᏍᏓᏁᎲᎾᏃ ᎨᏒ ᎥᏝ ᏱᏚᏬᏁᏔᏁᎢ.
Yesu azalaki kosalela masese mpo na koloba makambo wana nyonso epai ya ebele ya bato; mpe na tango nyonso oyo azalaki koloba na bango, azangaki te kosalela masese.
35 ᎤᏙᎯᏳᏗᏱ ᎠᏰᎸᏒᎩ ᎠᏙᎴᎰᏍᎩ ᏧᏁᏤᎢ, ᎯᎠ ᏥᏄᏪᏎᎢ; ᏓᏥᏍᏚᎢᏏ ᏥᎣᎵ ᏕᎦᏟᎶᏍᏗᏍᎬᎢ, ᏓᏥᏁᎢᏍᏔᏂ ᎤᏕᎵᏛ ᎠᏍᏆᏂᎪᏛ ᎡᎶᎯ ᏧᏙᏢᏅ ᏅᏓᎬᏩᏓᎴᏅᏛ.
Ezalaki ndenge wana nde maloba ya mosakoli ekokisamaki: « Nakofungola monoko mpo na koyebisa bango makambo na masese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na ebandeli ya mokili. »
36 ᎿᎭᏉᏃ ᏥᏌ ᏚᏰᎵᎯᏍᏔᏅ ᎤᏂᏣᏘ, ᎠᏓᏁᎸ ᏭᏴᎸᎩ; ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯᏃ ᎬᏩᎷᏤᎸᎩ, ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏒᎩ; ᏗᏍᎩᏲᏏᏌᏏ ᏓᏟᎶᏍᏛ ᎤᏲ ᏧᎵᏰᏁ ᏠᎨᏏ.
Bongo Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na Ye bayaki epai na Ye mpe batunaki Ye: — Pesa biso ndimbola ya lisese ya matiti mabe kati na elanga.
37 ᎤᏁᏨᏃ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎣᏍᏛ ᎤᎦᏔ ᏧᏫᏎᎢ ᎾᏍᎩ ᏴᏫ ᎤᏪᏥ;
Yesu azongisaki: — Moloni nkona ya malamu, ezali Mwana na Moto.
38 ᏠᎨᏏᏃ ᎾᏍᎩ ᎡᎳᏂᎬᎢ; ᎣᏍᏛ ᎤᎦᏔ ᎾᏍᎩ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎠᏁᎯ; ᎤᏲᏃ ᏧᎵᏰᏁ ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎫᏥᏛ ᏧᏪᏥ;
Elanga ezali mokili, nkona ya malamu ezali bana ya Bokonzi ya Likolo, mpe matiti mabe ezali bana ya Satana;
39 ᎠᎦᏍᎩᏃ ᎾᏍᎩ ᏧᏫᏎᎢ, ᎾᏍᎩ ᎠᏍᎩᎾ; ᎤᎦᏛᎾᎢᏍᏗᏱᏃ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᎠᎵᏍᏆᏛᎭ ᎡᎶᎯ; ᎠᏂᏍᎫᏕᏍᎩᏃ ᎾᏍᎩ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ. (aiōn g165)
monguna oyo alonaki matiti mabe ezali Satana, tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili; bongo bato oyo babukaka bambuma, ezali ba-anjelu. (aiōn g165)
40 ᎾᏍᎩᏃ ᎤᏲ ᏣᏂᏟᏏᏍᎪ ᎠᎴ ᏣᎾᎪᎲᏍᏗᏍᎪ ᎠᏥᎸᏱ, ᎾᏍᎩᏯᏍᎩᏂ ᎾᏍᏉ ᏄᏍᏕᏍᏗ ᎠᎵᏍᏆᏛᎭ ᎯᎠ ᎡᎶᎯ. (aiōn g165)
Ndenge bapikolaka matiti mabe mpe batumbaka yango na moto, ndenge wana mpe ekozala na suka ya mokili: (aiōn g165)
41 ᏴᏫ ᎤᏪᏥ ᏙᏓᎦᏅᏏ ᏧᏤᎵ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎤᏤᎵᎪᎯ ᏙᏛᏃᏣᎴᏏ ᏂᎦᏛ ᏗᎾᏓᏙᏕᏍᏗᏍᎩ ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᎠᏂᏍᎦᏅᎩ,
Mwana na Moto akotinda ba-anjelu na Ye; bongo bakolongola kati na Bokonzi na Ye, nyonso oyo etindikaka bato mosusu na kosala masumu mpe bato oyo basalaka mabe.
42 ᏗᎪᏢᏒᏃ ᎠᏥᎸᏱ ᏫᏙᏛᎾᏓᎡᏏ; ᎾᎿᎭᏓᏂᏴᎨᏍᏗ ᎠᎴ ᏓᏂᎸᏓᎩᏍᎨᏍᏗ ᏓᏂᏄᏙᎬᎢ.
Bakobwaka bango na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.
43 ᎿᎭᏉᏃ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᎬᏩᏂᏔᎷᎩᏍᎩ ᎨᏎᏍᏗ ᎤᏂᏙᏓ ᎤᏤᎵᎪᎯ, ᏅᏙ ᎾᏍᎩᏯᎢ. ᎩᎶ ᏕᎦᎵᎷᎨᏍᏗ ᎤᏛᎪᏗᏱ ᏩᏛᎬᎦ.
Bongo bato ya sembo bakongenga lokola moyi kati na Bokonzi ya Tata na bango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
44 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎾᏍᎩᏯᏉ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎤᏕᎵᏛ ᏠᎨᏏ ᏣᎰᎢ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳ ᎠᏍᎦᏯ ᎠᏩᏛ, ᏣᏕᎸᏍᎪᎢ, ᎠᎵᎮᎵᎬᏃ ᎢᏳᏍᏘ ᏤᎪᎢ ᏥᏫᎦᎾᏕᎪ ᏂᎦᏛ ᎤᏍᏆᏂᎪᏛᎢ, ᎠᎴ ᏥᏭᏩᏍᎪ ᎾᏍᎩ ᏠᎨᏏ.
Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba kati na elanga; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu; mpe na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba elanga wana.
45 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎾᏍᎩᏯᏉ ᎦᏃᏗᏍᎩ ᏥᏚᏲᎮ ᏧᏬᏚᎯ ᏓᎬᎾ-ᎢᏳᎾᏍᏗ.
Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo, oyo alukaka bapawuni ya kitoko.
46 ᎾᏍᎩᏃ ᎿᎭᏉ ᎤᏩᏛᎲ ᏌᏉ ᎤᏣᏘ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᏓᎬᎾ ᎢᏳᏍᏗ ᎤᏪᏅᏎ ᏭᎾᏗᏅᏎ ᏂᎦᏛ ᎤᏍᏆᏂᎪᏛᎢ, ᎾᏍᎩᏃ ᎤᏩᏎᎢ.
Soki amoni mayaka moko ya talo makasi, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba yango.
47 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎾᏍᎩᏯᏉ ᎠᎦᏯᎷᏗ ᏥᏭᎾᏓᎢᏅᏎ ᎠᎺᏉᎯ, ᎠᎴ ᏥᏚᏂᏂᏴᎮ ᎾᏂᎥ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ;
Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo balobi mbisi babwaki na ebale mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge.
48 ᎾᏍᎩᏃ ᎿᎭᏉ ᎤᎧᎵᏨ ᎠᎹᏳᎶᏗ ᎤᏂᎾᏏᏃᎴᎢ, ᎠᎴ ᎤᎾᏅᏁᎢ, ᎠᏃᏍᏛᏃ ᏗᏖᎵᏙ ᏚᏂᎸᏔᏁᎢ, ᎤᏂᏲᏃ ᏚᎾᏓᎢᏅᏎᎢ.
Soki etondi, balobi mbisi bakobimisa yango na mokili, bakovanda mpe bakotia bambisi ya malamu kati na bitunga mpe bakobwaka oyo ya mabe.
49 ᎾᏍᎩᏍᎩᏂ ᏄᏍᏕᏍᏗ ᎡᎶᎯ ᎠᎵᏍᏆᏛᎭ; ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᏛᏂᎷᏥ, ᏙᏛᎾᎦᎴᏅᏔᏂ ᎤᏂᏁᎫᏥᏛ ᎠᎴ ᎤᎾᏓᏅᏘ; (aiōn g165)
Ekozala mpe ndenge wana na suka ya mokili: ba-anjelu bakoya kokabola bato mabe kati na bato ya sembo, (aiōn g165)
50 ᎤᏂᏁᎫᏥᏛᏃ ᏫᏙᏛᎾᏓᎡᏏ ᏗᎪᏢᏒ ᎠᏥᎸᏱ, ᎾᎿᎭᏓᏂᏴᎨᏍᏗ ᎠᎴ ᏓᏂᎸᏓᎩᏍᎨᏍᏗ ᏓᏂᏄᏙᎬᎢ.
bongo bakobwaka bato mabe kati na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.
51 ᏥᏌᏃ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᎢᏦᎵᎩᏧ ᏂᎦᏛ ᎯᎠ? ᎥᎥ, ᏣᎬᏫᏳᎯ, ᎥᎬᏬᏎᎸᎩ.
Boni, bososoli makambo oyo nyonso? Bazongisaki: — Iyo!
52 ᎿᎭᏉᏃ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎩᎶ ᏗᎪᏪᎵᏍᎩ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎤᎬᏩᎵ ᎠᎨᏲᏅᎯ ᏥᎨᏐᎢ, ᎾᏍᎩᏯᏉ ᎠᏍᎦᏯ ᎦᏁᎳ ᏥᏙᏗᎦᎾᏄᎪᏫᏍᎪ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎤᏍᏆᏂᎪᏛ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏗᏤ ᎠᎴ ᏧᏪᏘ.
Bongo, Yesu alobaki na bango: — Yango wana, molakisi nyonso ya mibeko, oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo akokani na nkolo ndako oyo azali kobimisa na ebombelo bomengo na ye: biloko ya sika mpe biloko ya kala.
53 ᎯᎠᏃ ᏄᎵᏍᏔᏅᎩ, ᎿᎭᏉ ᏥᏌ ᎤᏍᏆᏛ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏓᏟᎶᏍᏗᏍᎬᎢ, ᎤᏂᎩᏒᎩ.
Sima na Yesu koloba masese wana, alongwaki na esika yango
54 ᎿᎭᏉᏃ ᎤᏩᏒ ᎤᏤᎵᎪᎯ ᎤᎷᏨ ᏧᏂᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᏚᏪᏲᏅᎩ; ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎤᏂᏍᏆᏂᎪᏒᎩ, ᎠᎴ ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏒᎩ; ᎦᏙ ᎤᎵᏍᏙᏔᏅ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎠᏍᎦᏯ ᏣᎦᏔ ᎿᎭᎠ ᎠᎴ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗ ᏥᏚᎸᏫᏍᏓᏁᎭ?
mpe azongaki kati na engumba na Ye; akomaki koteya bato kati na ndako na bango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa makasi mpe komituna: « Bwanya mpe nguya ya kosala bikamwa oyo azwi yango wapi?
55 ᎯᎠᎧᏂ ᏗᏁᏍᎨᏍᎩ ᎤᏪᏥ, ᎺᎵᎧᏂ ᎤᏥ, ᎠᎴᎧᏂ ᎠᎾᎵᏅᏟ ᏥᎻ, ᎠᎴ ᏦᏏ ᎠᎴ ᏌᏩᏂ ᎠᎴ ᏧᏓᏏ?
Ezali ye te mwana ya mosali mabaya? Mama na ye, kombo na ye ezali Mari te? Jake, Jozefi, Simona mpe Jide bazali bandeko na ye ya mibali te?
56 ᎠᎴᎧᏂ ᏧᏙ ᏂᎦᏛ ᎡᏍᎦᏂ ᏣᏁᎭ? ᎦᏙᏃ ᎤᎵᏍᏙᏔᏅ ᎯᎠ ᏂᎦᏛ ᏧᏪᎭ?
Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali awa elongo na biso te? Azwi makambo oyo nyonso wapi? »
57 ᎥᎬᏩᎪᏁᎶᎯᏎᎸᎩᏃ; ᎠᏎᏃ ᏥᏌ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᎠᏙᎴᎰᏍᎩ ᎥᏝ ᎾᏥᎸᏉᏛᎾ ᏱᎨᏐᎢ, ᎤᏩᏒᏍᎩᏂᏃᏅ ᎤᏤᎵᎪᎯ ᎠᎴ ᎤᏩᏒ ᎦᏁᎸᎢ.
Boye, azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi Yesu alobaki na bango: — Ezali kaka kati na ekolo na ye mpe kati na ndako na ye nde Mosakoli azwaka lokumu te.
58 ᎥᏝᏃ ᏳᏣᏖ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗ ᎾᎿᎭᏱᏚᎸᏫᏍᏓᏁᎴᎢ, ᎾᏃᎯᏳᎲᏍᎨᎾ ᎨᏒ ᏅᏓᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬᎩ.
Mpe asalaki kuna bikamwa mingi te mpo ete bazalaki kondima Ye te.

< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 13 >