< ᏥᎻ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 4 >

1 ᎭᏢ ᏗᏓᎴᎲᏍᎦ ᏓᎿᎭᏩ ᎠᎴ ᏗᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᏂᎯ ᎢᏤᎲᎴ? ᏝᏍᎪ ᎾᏍᎩ ᎠᏚᎸᏗ ᎨᏒ ᏗᏥᏰᎸ ᎭᏫᏂ ᏥᏓᎵᎭ ᎾᎿᎭᏴᏗᏓᎴᎲᏍᎦ?
Koswana mpe bitumba kati na bino ewutaka wapi? Boni, ewutaka te na baposa mabe na bino, oyo ebundaka kati na banzoto na bino?
2 ᎢᎦᏚᎵᎪᎢ, ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᏱᏥᏩᏘᏍᎪᎢ; ᏕᏣᏓᎯᎰᎢ ᎠᎴ ᎢᏤᎵᎯᏍᎪ ᎢᏥᏩᏛᏗᏱ ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᏱᏥᏩᏘᏍᎪᎢ; ᏕᏣᎵᎰᎢ ᎠᎴ ᏓᎿᎭᏩ ᎢᏤᎪᎢ, ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᏱᏥᏩᏘᏍᎪ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎪ ᏂᏥᏔᏲᎯᎲᎾ ᎨᏒᎢ.
Bozali kolula biloko, kasi bozali kozwa yango te; bokomi kino koboma bato. Botondi na zuwa, kasi bozali kolonga te kozwa oyo bozali koluka; bokomi koswana mpe kobunda bitumba. Bozwaka te biloko oyo bozalaka na yango posa, pamba te bosengaka yango epai ya Nzambe te.
3 ᎢᏥᏔᏲᎯᎰᎢ, ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᏱᏥᏩᏘᏍᎪᎢ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎪ ᏂᏚᏳᎪᏛᎾ ᎨᏒ ᎢᏥᏔᏲᎯᎲᎢ, ᎢᏣᏚᎵᏍᎬ ᎾᏍᎩ ᎢᏨᏙᏗᏱ ᎣᏍᏛ ᎢᏣᏓᏅᏓᏗᏍᏗᏍᎩ ᎢᏥᏩᏛᏗᏱ.
Kasi soki bosengaka epai ya Nzambe mpe bozwaka te, ezali mpo ete bosengaka na makanisi mabe, na makanisi ya kosepelisa kaka baposa na bino moko.
4 ᏗᏣᏓᏲᏁᎯ ᎢᏥᏍᎦᏯ ᎠᎴ ᎢᏥᎨᏴ, ᏝᏍᎪ ᏱᏥᎦᏔᎭ ᎡᎶᎯ ᎤᎾᎵᎢ ᎨᏒᎢ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᏍᎦᎩ ᎨᏒᎢ? ᎾᏍᎩᏃ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏳᏃ ᎩᎶ ᎡᎶᎯ ᎤᎾᎵᎢ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᏯᏓᏅᏖᎭ ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᏍᎦᎩ ᎨᏐᎢ.
Bato na ekobo! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe.
5 ᎠᏎᏉᏍᎪ ᏂᎦᏪ ᎢᏥᏰᎸᎭ ᎯᎠ ᏥᏂᎦᏪ ᎪᏪᎵ; ᎠᏓᏅᏙ ᏥᎩᏯᎠ ᎤᏚᎵᏍᎬ ᎠᏛᏳᎨᏗ ᎨᏒ ᏩᎦᏘ.
Mpe lisusu, bokanisi ete ezali na pamba nde Makomi elobi: « Nzambe azalaka na zuwa makasi mpo na Molimo oyo atia kati na biso? »
6 ᎠᏎᏃ ᎤᏟ ᎢᎦᎢ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᏓᏁᎰᎢ-ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎯᎠ ᏂᎦᏪᎭ; ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᎾᏢᏉᏗ ᏓᏡᏗᏍᎪᎢ, ᎤᎾᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎩᏂ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᏓᏁᎰᎢ.
Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba: « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »
7 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏤᏣᎴᏲᎯᏏ ᎤᏁᎳᏅᎯ; ᏤᏣᏟᏴᏏ ᎠᏍᎩᎾ, ᎠᎴ ᎠᏎ ᏓᏣᏓᏅᎡᎵ.
Bomikitisa liboso ya Nzambe. Botelemela Satana, mpe akokima mosika na bino.
8 ᎾᎥ ᎡᏥᎷᏥᏏ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎾᏍᎩᏃ ᏂᎯ ᎾᎥ ᏓᏥᎷᏤᎵ. ᏗᏦᏑᎵ ᏗᏦᏰᏂ ᎢᏥᏍᎦᎾᎢ, ᎠᎴ ᏗᏥᏅᎦᎸ ᏗᏥᎾᏫ ᏔᎵ ᎢᏧᏓᎢ ᏗᏣᏓᏅᏘ.
Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino!
9 ᎤᏲ ᎢᏣᏓᏅᏓᏓ ᎠᎴ ᏗᏥᏴᎳ ᎠᎴ ᏗᏣᏠᏱᎦ; ᎢᏥᏰᏣᏍᎬᎢ ᎠᏴᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᏩᏓᏁᏟᏴᏍᏓ, ᎠᎴ ᎢᏣᎵᎮᎵᎬ ᎤᏲ ᎠᏓᏅᏓᏗᏍᏗ ᎨᏒ ᏩᏓᏁᏟᏴᏍᏓ.
Botala pasi na bino, bosala matanga mpe bolela. Tika ete koseka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino ekoma mawa!
10 ᎢᏣᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᏱᎰᏩ ᏙᏗᎧᏂᏍᎬᎢ, ᎾᏍᎩᏃ ᏓᏥᏌᎳᏓᏂ.
Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe Nkolo akotombola bino.
11 ᏞᏍᏗ ᎤᏐᏅ ᏱᏗᏣᏓᏃᎮᏍᎨᏍᏗ ᎢᏓᏓᏅᏟ; ᎤᏐᏅ ᏥᎧᏃᎮᏍᎪ ᏥᎧᏁᎢᏍᏗᏍᎪ ᏗᎾᏓᏅᏟ ᎠᎴ ᏥᏕᎫᎪᏓᏁᎰ ᏗᎾᏓᏅᏟ, ᎾᏍᎩ ᎤᏐᏅ ᎧᏃᎮᏍᎪ ᎧᏁᎢᏍᏗᏍᎪ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎠᎴ ᏕᎫᎪᏓᏁᎰ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ; ᎢᏳᏃ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᏱᏚᎪᏓᏁᎭ ᎥᏝ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᏘᎧᎿᎭᏩᏕᎩ ᏱᎦᎩ ᏚᎪᏓᏁᎯᏍᎩᏂ.
Bandeko na ngai, botonganaka te bino na bino. Moto oyo atongaka mpe asambisaka ndeko na ye asambwisaka mibeko mpe abukaka yango. Nzokande, soki ozali kosambwisa mibeko, elakisi ete ozali kotosa yango te, kasi ozali nde mosambisi na yango.
12 ᎠᏏᏴᏫ ᎡᎭ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎪᏢᏍᎩ ᏰᎵᏉ ᎬᏩᏓᏍᏕᎸᏗ ᎠᎴ ᎬᏩᏓᎯᏍᏗ; ᎦᎪ ᏂᎯ ᏅᏩᏓᎴ ᏥᏕᎯᏳᎪᏓᏁᎭ?
Pamba te Ye oyo apesa mibeko azali kaka Ye moko Mosambisi, Ye nde azali na makoki ya kobikisa mpe ya kobebisa. Bongo yo, ozali nani mpo ete osambisa moninga na yo?
13 Ꭷ ᎯᎠ ᎢᏥᏪᏍᎩ; ᎪᎯ ᎢᎦ ᎠᎴ ᏑᎾᎴᎢ ᏓᏲᏤᏏ ᎨᎯ ᏗᎦᏚᎲᎢ, ᏑᏕᏘᏴᏛᏃ ᏬᏤᎮᏍᏗ ᎠᎴ ᏬᏥᏃᏗᏍᎨᏍᏗ ᎠᎴ ᏬᎩᏁᏉᏤᎮᏍᏗ;
Boyoka sik’oyo, bino bato oyo bolobaka: « Lelo to lobi, tokokende na engumba songolo, tokovanda kuna mobu mobimba mpe tokosala mombongo oyo ekobotela biso mbongo ebele. »
14 ᏂᏥᎦᏔᎲᎾᏃ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗ ᎨᏒ ᏑᎾᎴᎢ; ᏕᏨᏅᏰᏃ ᎦᏙ ᎤᏍᏗ? ᎤᎬᎭᏛᏉ ᎾᏍᎩᏯᎢ ᎾᏍᎩ ᏞᎦ ᏥᎦᎾᏄᎪᎪᎢ ᎿᎭᏉᏃ ᏣᎵᏛᏗᏍᎪᎢ.
Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi? Bomoi na bino nde nini? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe?
15 ᎾᏍᎩᏃ ᎢᏳᏍᏗ ᎯᎠ ᏳᎬᏫᏳᎭ ᏱᏂᏥᏪᎭ; ᎢᏳᏃ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎣᏏ ᏳᏰᎸᏅ, ᏙᏨᏁᏍᏗ ᎠᎴ ᎯᎠ ᏃᏣᏛᏁᎮᏍᏗ ᎠᎴ ᎯᎠᏉ.
Tala ndenge bosengeli koloba: « Soki Nkolo alingi, tokozala na bomoi mpe tokosala likambo songolo to pakala. »
16 ᎪᎯᏍᎩᏂ ᎨᏒ ᎢᏣᎵᎮᎵᎦ ᎢᏣᏢᏆᏍᎬᎢ; ᏂᎦᏛ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᎵᎮᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᏲᏉ ᎨᏐᎢ.
Kasi bino, bozali nde komikumisa na monene ya mabongisi na bino! Boyeba malamu ete lolendo ya ndenge wana ezali mabe.
17 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎩᎶ ᏣᎦᏔᎰᎢ ᎣᏍᏛ ᎢᏯᏛᏁᏗ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩᏃ ᎾᏛᏁᎲᎾ ᏥᎨᏐᎢ, ᎾᏍᎩ ᎾᎿᎭᎠᏍᎦᏅᎪᎢ.
Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.

< ᏥᎻ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 4 >