< ᏉᎳ ᎠᏂᏈᎷ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 4 >

1 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᏴ ᎢᏗᎾᏰᏍᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏒᎩᏚᎢᏍᏓᏁᎸ ᏫᎩᏴᏍᏗᏱ ᏥᎩ ᎤᏤᎵ ᎠᏣᏪᏐᎸᏍᏙᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎬᏂᎨᏒ ᏱᏅᎦᎵᏍᏓ ᏂᎯ ᎩᎶ ᎡᏍᎦ ᎢᏦᎭᏒᎢ.
Yango wana, lokola elaka ya kokota kati na bopemi ya Nzambe ezali nanu, tosala keba ete moko kati na bino akanisa ete azangeli.
2 ᎠᏴᏰᏃ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎡᎦᎵᏥᏙᏁᎸᎩ, ᎾᏍᎩᏯᏉ ᏥᎨᎦᎵᏥᏙᏁᎸᎩ ᎾᏍᎩ; ᎠᏎᏃ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎧᏃᎮᏛ ᎤᎾᏛᎦᏅ ᎥᏝ ᏅᏂᏍᏕᎸᎮᎢ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᏄᏓᏑᏴᎾ ᎨᏒ ᎠᎾᏛᎩᏍᎬᎢ.
Pamba te, biso mpe toyokaki Sango Malamu lokola bango; kasi mateya oyo bayokaki esungaki bango ata na likambo moko te mpo ete bato oyo bayokaki yango bayambaki yango na kondima te.
3 ᎠᏴᏰᏃ ᎢᎪᎯᏳᏅᎯ ᎨᏒ ᎢᏗᏴᎯᎭ ᎠᏣᏪᏐᎸᏍᏙᏗᏱ ᎨᏒᎢ; ᎾᏍᎩᏯ ᏄᏪᏒᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᎠᏆᏎᎵᏔᏅ ᎠᎩᏔᎳᏬᏍᎬᎢ, ᎾᏍᎩ ᎤᏂᏴᏍᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒ ᎠᏆᏤᎵ ᎠᏣᏪᏐᎸᏍᏙᏗᏱ ᎨᏒᎢ; ᎠᏍᏆᏛᎯᏍᎩᏂᏃᏅ ᎨᏒᎩ ᏕᎦᎸᏫᏍᏓᏁᎸ ᎡᎶᎯ ᏧᏙᏢᎤ ᎤᏓᎬᏩᏓᎴᎤᏛ.
Sik’oyo, biso oyo tondimi, tozali kokota kati na bopemi yango kolanda ndenge Nzambe alobaki: « Yango wana, kati na kanda na ngai, nakataki seleka oyo: ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai! › » Nzambe alobaki bongo, atako misala na Ye emonanaki wuta na tango oyo akelaki mokili.
4 ᎢᎸᎯᏢᏰᏃ ᎦᎵᏉᎩᏁ ᎢᎦ ᎤᏁᎢᏍᏔᏅ ᎯᎠ ᏄᏪᏒ, ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎦᎵᏉᎩᏁ ᎢᎦ ᎤᏯᏪᏐᎴ ᎤᏲᎯᏍᏔᏁ ᏂᎦᏛ ᏚᎸᏫᏍᏓᏁᎲᎢ.
Pamba te, na esika moko, elobami boye na tina na mokolo ya sambo: « Boye, na mokolo ya sambo, Nzambe akataki mosala nyonso oyo azalaki kosala. »
5 ᎠᎴ ᎠᏂ ᏔᎵᏁ ᎯᎠ ᏂᎦᏪᎭ, ᎥᏝ ᏴᎬᏂᏴᎭ ᎠᏆᏤᎵ ᎠᏣᏪᏐᎸᏍᏙᏗᏱ.
Mpe, kati na eteni oyo esili koleka, alobi: « Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai! »
6 ᎾᏍᎩᏃ ᎩᎶ ᎠᏎ ᎾᎿᎭᏭᏂᏴᏍᏗ ᏥᎩ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎢᎬᏱ ᎨᎦᎵᏥᏙᏁᎸᎯ ᎨᏒ ᎾᏄᏂᏴᎸᎾ ᏥᎨᏎᎢ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬ ᏄᏃᎯᏳᏒᎾ ᎨᏒᎢ.
Boye, lokola emonani polele ete ezali nanu na bato oyo basengeli kokota kati na bopemi yango, mpe ete bato oyo bazalaki bato ya liboso mpo na koyoka Sango Malamu bakotaki te mpo ete batosaki Nzambe te,
7 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎢᎦ ᎠᏑᏰᎭ, ᎯᎠ ᏂᎦᏪᎭ ᎤᏬᎯᏨᎯ ᎣᏂ ᏕᏫ ᎠᎬᏗᏍᎬᎢ, ᎪᎯ ᎢᎦ, ᎾᏍᎩᏯ ᎯᎠ ᎢᎦᏪᏛ ᏥᎩ, ᎪᎯ ᎢᎦ, ᎢᏳᏃ ᎧᏁᎬ ᎢᏣᏛᎪᏗᏱ ᎢᏣᏚᎵᏍᎨᏍᏗ, ᏞᏍᏗ ᏱᏗᏥᏍᏓᏲᏔᏁᏍᏗ ᏗᏥᎾᏫ.
yango wana Nzambe abongisi lisusu mokolo moko oyo azali kobenga « lelo, » tango alobaki, sima na mikolo, na nzela ya Davidi: « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye, boyeisa mitema na bino mabanga te. »
8 ᎢᏳᏰᏃ ᏦᏑᏩ ᏱᏚᏁᎴ ᎤᎾᏣᏪᏐᎸᏍᏙᏗᏱ, ᎥᏝ [ ᎤᏁᎳᏅᎯ ] ᎣᏂ ᏱᎬᏩᏁᎢᏍᏔᏁ ᏅᏩᏓᎴ ᎢᎦ.
Pamba te, soki Jozue alonga penza kopesa bango bopemi, Nzambe alingaki lisusu te koloba na tina na mokolo mosusu.
9 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᏏᏉ ᎤᎾᏘᏰᎭ ᎤᎾᏣᏪᏐᎸᏍᏙᏗᏱ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᏤᎵᎦ ᏴᏫ.
Boye, mpo na bato ya Nzambe, etikali na bopemi moko oyo ezali lokola mokolo ya sambo oyo Nzambe apemaki.
10 ᎾᏍᎩᏰᏃ Ꮎ ᎤᏴᎸᎯ ᏥᎨᏐ ᎤᏣᏪᏐᎸᏍᏙᏗᏱ, ᎾᏍᏉ ᎤᏲᎯᏍᏔᏅᎯ ᎨᏐ ᏚᎸᏫᏍᏓᏁᎲ, ᎾᏍᎩᏯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏄᏛᏁᎸ ᎤᏲᎯᏍᏔᏅᎢ.
Pamba te moto oyo akoti kati na bopemi ya Nzambe apemi na misala na ye, ndenge kaka Nzambe apemaki na misala na Ye.
11 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏓᏟᏂᎬᏁᎮᏍᏗ ᏫᎩᏴᏍᏗᏱ, ᏱᏅᏎᎦᎩᏰᏃ ᎩᎶ ᎾᏍᎩ ᏧᏕᎶᏆᎡᎸᎯ ᎨᏒ ᎾᏍᎩᏯ ᏄᏬᎯᏳᏒᎾ ᎨᏒ ᏴᎦᏅᎢᏍᏓ.
Yango wana, tosala makasi mpo na kokota kati na bopemi yango mpo ete tokweya te kati na bozangi botosi lokola bana ya Isalaele.
12 ᎧᏃᎮᏛᏰᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ ᎬᏃᏛ, ᎠᎴ ᎤᎵᏂᎩᏗᏳ ᎠᎴ ᎤᏟᎯᏳ ᏂᎪᏍᏓᏴ ᎡᏍᎦᏉ ᎠᏰᎳᏍᏗ-ᎦᏅᎯᏛ ᎢᏧᎳᏗᏢ ᏗᎬᎦᏘ ᏗᎪᏍᏓᏴ, ᏕᎦᏘᎭ ᏔᎵ ᏂᎦᏗᎭ ᎠᏓᏅᏖᏗᏱ ᎠᎴ ᎠᏓᏅᏙ, ᎠᎴ ᏚᏫᏢᎢ ᎠᎴ ᏚᏍᏛᏪᏙᎬᎢ, ᎠᎴ ᏗᎬᏭᎪᏙᏗ ᎢᎩ ᏄᏍᏛ ᎠᏓᏅᏖᏍᎬ ᎠᎴ ᏄᏍᏛ ᎤᏚᎵᏍᎬ ᎤᎾᏫ.
Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.
13 ᎥᏝ ᎠᎴ ᎪᎱᏍᏗ ᎠᏁᎳᏅᎯ ᎨᏒ ᎠᎬᏍᎦᎳᏁᎸᎯ ᏱᎩ; ᏂᎦᏗᏳᏉᏍᎩᏂ ᎤᏰᎸᎭᎢ, ᎠᎴ ᏧᏞᏛ ᎾᏍᎩ ᏙᏗᎧᏅ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᏰᏛᏁᏗ ᏥᎩ ᏂᎦᏛᏁᎸᎢ.
Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe: nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.
14 ᎾᏍᎩᏃ ᏥᏗᎪᏩᏗᎭ ᎢᎩᎧᎲ ᎠᏥᎸᏉᏗ ᏄᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎨᎶᎯ, ᎾᏍᎩ ᎦᎸᎶ ᏭᎶᏒᎯ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩ ᏥᏌ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏪᏥ, ᎠᏍᏓᏯ ᏕᎩᏂᏴᏎᏍᏗ ᏕᏓᏁᎶᏛᎢ.
Yango wana, lokola tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akatisa Likolo, Ye Yesu, Mwana na Nzambe, tosimba makasi kondima oyo totatolaka.
15 ᎥᏝᏰᏃ ᏄᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎨᎶᎯ ᏱᎩᎧᎭ ᎾᏍᎩ ᎨᎩᏙᎵᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒ ᏕᎩᏩᏂᎦᎸᎢ, ᏂᎦᎥᏉᏍᎩᏂ ᎠᏥᎪᎵᏰᎲᎩ ᎠᏴ ᎾᏍᎩᏯᎢ, ᎠᏎᏃ ᎾᏍᎦᏅᎾ ᎨᏒᎩ.
Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.
16 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏂᏗᏍᎦᎢᎲᎾ ᎢᏗᎷᎩ ᎾᎿᎭᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎦᏍᎩᎸᎢ, ᎾᏍᎩ ᎡᎩᏙᎵᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᎢᎩᏩᏛᏗᏱ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᎾᎯᏳ ᎢᎩᏂᎬᏎᎲ ᎢᎦᎵᏍᏕᎸᏙᏗ.
Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.

< ᏉᎳ ᎠᏂᏈᎷ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 4 >