< ᏉᎳ ᎪᎶᏏ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 3 >

1 ᎢᏳᏃ ᎰᏩ ᎦᎶᏁᏛ ᏚᎴᏅ ᏗᏣᎴᏅᎯ ᎨᏎᏍᏗ, ᎢᏥᏲᎮᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎨᏒᎢ, ᎾᎿᎭᎦᎶᏁᏛ ᎤᏬᎸ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎦᏘᏏᏗᏢ.
Lokola bosekwaki mpe elongo na Klisto, bolukaka biloko ya Likolo epai wapi Klisto avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe,
2 ᎢᏣᎦᏌᏯᏍᏕᏍᏗ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎨᏒᎢ, ᎥᏞᏍᏗᏃ ᎡᎶᎯ ᎡᎯ ᎨᏒᎢ.
bokanisaka biloko ya Likolo kasi biloko ya mokili te.
3 ᏗᏥᏲᎱᏒᎯᏰᏃ, ᏕᏨᏅᏃ ᎦᎶᏁᏛ ᏪᎲ ᏚᏩᏍᎦᎸ ᎤᏁᎳᏅᎯ.
Pamba te bokufaki penza, mpe bomoi na bino ezali sik’oyo ya kobombama elongo na Klisto kati na Nzambe.
4 ᎦᎶᏁᏛ ᎦᎷᏨ ᎢᏳᎢ, ᎾᏍᎩ ᎬᏂᏛ ᎢᎩᏁᎯ ᏥᎩ, ᎿᎭᏉ ᎾᏍᏉ ᏂᎯ ᎢᏥᎾᏄᎪᎢᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎢᏤᎮᏍᏗ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒ ᎢᏣᏄᏬᏍᏕᏍᏗ.
Tango Klisto oyo azali bomoi na bino akomonana, bino mpe bokomonana elongo na Ye kati na nkembo.
5 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏕᏥᎯᎮᏍᏗ ᏗᏥᏰᎸ ᏕᏣᏚᏓᏕᏫᏒ ᎠᏂ ᎡᎶᎯ; ᎾᏍᎩ ᎤᏕᎵᏛ ᏗᏂᏏᏗ ᎨᏒᎢ, ᎦᏓᎭ ᎨᏒᎢ, ᎠᎬᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎤᏲ ᎠᏚᎸᏅᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎠᎬᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᏰᎸᎯ ᎠᏓᏙᎵᏍᏓᏁᏗ ᏥᎩ;
Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili: pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.
6 ᎾᏍᎩ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏔᎳᏬᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᏂᎷᏤᎭ ᎤᏃᎯᏳᎯᏍᏛ ᏂᎨᏒᎾ ᏴᏫ.
Ezali makambo yango nde ebendaka kanda ya Nzambe.
7 ᎾᎿᎭᎾᏍᏉ ᏂᎯ ᎢᎸᎯᏳ ᏥᏤᏙᎲᎩ, ᎾᎯᏳ ᎾᏍᎩ ᏂᏣᏛᏁᎲ ᏥᏤᎲᎩ.
Bino mpe na kala, bozalaki komipesa na makambo yango tango bomoi na bino ezalaki na se ya bokonzi ya makambo yango.
8 ᎠᏎᏃ ᎪᎯ ᎨᏒ ᏂᎯ ᎾᏍᏉ ᎯᎠ ᏂᎦᏛ ᎢᏴᏛ ᏂᏕᏨᏁᎭ; ᎠᏔᎳᏬᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎧᎾᎸᎢᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᏓᏂᏆᏗᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᏐᏢᎢᏍᏙᏗ ᎨᏒᎢ, ᎤᏁᎢᎸᏗ ᎦᏬᏂᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏗᏥᎰᎵ ᏅᏓᏳᏄᎪᏨᎯ.
Kasi sik’oyo, bosengeli kolimwisa makambo yango nyonso: kanda, koyinana, misala mabe, mafinga mpe maloba mabe oyo ekoki kobima na minoko na bino.
9 ᏞᏍᏗ ᏱᏗᏣᏓᏥᎪᏁᎮᏍᏗ, ᎢᏴᏛᏰᏃ ᎢᏰᏨᏁᎸᎯ ᎤᏪᏘ ᏴᏫ ᏚᎸᏫᏍᏓᏁᎲ ᎬᏩᎵᏠᏯᏍᏗ;
Bokosanaka te, pamba te bobwakaki bomoto na bino ya kala elongo na misala na yango
10 ᎠᎴ ᎢᏤ ᏴᏫ ᎢᏣᏄᏬᏍᏔᏅᎯ, ᎾᏍᎩ ᎢᏤ ᎢᎬᏁᎸᎯ ᏥᎩ ᎾᏍᎩ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᎬᏩᎵ, ᎾᏍᎩᏯ ᏄᏍᏛ ᎾᏍᎩ ᎤᏬᏢᏅᎯ ᎨᏒᎢ;
mpe bolataki bomoto ya sika oyo emikomisaka ya sika mpo ete bokoma na boyebi ya kokoka kolanda elilingi ya Mokeli ya bomoto yango.
11 ᎾᎿᎭᏂ ᎥᏝ ᎩᎶ ᎠᎪᎢ ᏱᎩ, ᎠᎴ ᎠᏧᏏ, ᎠᏥᎤᏍᏕᏎᎸᎯ ᎠᎴ ᎠᏥᎤᏍᏕᏎᎸᎯ ᏂᎨᏒᎾ, ᏅᏩᏓᎴ ᏴᏫ, ᏏᏗᏱ ᎡᎯ, ᎠᏥᎾᏝᎢ ᎠᎴ ᎾᏥᎾᏝᎥᎾ; ᎦᎶᏁᏛᏍᎩᏂ ᏂᎦᎥ ᎪᎱᏍᏗ ᏂᎦᎵᏍᏓ, ᎠᎴ ᏂᎦᏗᏳ ᏗᏯᎢ.
Boye, biso nyonso tozali ndenge moko: bokeseni ezali lisusu te kati na Mogreki mpe Moyuda, moto oyo akatama ngenga mpe moto oyo akatama ngenga te, mopaya mpe mwana mboka, mowumbu mpe monsomi. Bobele Klisto nde azali na tina: azali nyonso kati na bato nyonso.
12 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ, ᎾᏍᎩᏯ ᎢᏳᎾᏛᏁᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᏑᏰᏛ ᎨᏒᎢ, ᎤᎾᏓᏅᏘ ᎠᎴ ᎨᏥᎨᏳᎢ, ᎢᏣᏄᏬᏍᏓ ᎤᏪᏙᎵᏍᏗ ᎠᏓᏅᏓᏗᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎠᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎤᏓᏅᏘ ᎨᏒᎢ, ᎪᎯᏗᏳ ᎤᏁᎳᎩ ᏗᏓᏕᎵᏎᏗ ᎨᏒᎢ;
Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.
13 ᎤᏁᎳᎩ ᏕᏣᏓᏕᎵᏎᎮᏍᏗ, ᎠᎴ ᏗᎨᏣᏓᏁᎮᏍᏗ ᏕᏣᏓᏍᎦᏅᏤᎲᎢ, ᎢᏳᏃ ᎩᎶ ᎪᎱᏍᏗ ᏱᏓᎾᏓᏕᎵᏎᎭ; ᎾᏍᎩᏯ ᎦᎶᏁᏛ ᎦᎨᏥᏁᎸ ᎢᏥᏍᎦᏅᏨᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᏂᎯ ᎾᏍᎩ ᏂᏣᏛᏁᎮᏍᏗ.
Boyikanaka mpiko; mpe soki moko azali na likambo ya kopamela moninga na tina na yango, bolimbisanaka. Bolimbisaka ndenge Nkolo alimbisaki bino.
14 ᎠᎴ Ꮀ ᎤᎬᏫᏳᏎᏍᏗ ᎢᏣᏄᏬᏍᏕᏍᏗ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᏗᎫᏓᏛᏍᎩ ᏥᎩ ᏂᎦᎷᎶᎬᎾ.
Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka.
15 ᎠᎴ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᏌᏕᎨᏍᏗ ᏗᏥᎾᏫᏱ, ᎾᎿᎭᎢᏗᏢ ᎾᏍᏉ ᎡᏥᏯᏅᏛ ᏥᎩ ᎾᏍᎩ ᏌᏉ ᎠᏰᎸ ᎢᏣᎵᏍᏙᏗᏱ; ᎠᎴ ᎤᎵᎮᎵᏍᏗᏳ ᎢᏣᏓᏅᏖᏍᏗ.
Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango; mpe bozongisaka matondi.
16 ᎧᏃᎮᏛ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏤᎵ ᎤᏣᏘ ᎢᏥᏯᎡᏍᏗ ᎦᎾᏄᎪᏫᏍᎨᏍᏗ ᏂᎦᎥ ᎠᎵᏏᎾᎯᏍᏙᏗ ᎨᏒᎢ; ᏕᏣᏓᏕᏲᎲᏍᎨᏍᏗ ᎠᎴ ᏕᏣᏓᏬᏁᏗᏍᎨᏍᏗ ᏕᏨᏗᏍᎨᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᎧᏃᎩᏍᏙᏗ, ᎠᎴ ᎦᎸᏉᏙᏗ ᏗᎧᏃᎩᏍᏗ, ᎠᎴ ᎠᏓᏅᏙ ᎤᎬᏩᎵ ᏗᎧᏃᎩᏍᏗ, ᏕᏥᏃᎩᏍᎨᏍᏗ, ᏗᏥᎾᏫᏱ ᏗᏓᎴᎲᏍᎨᏍᏗ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏕᏥᏃᎩᏍᎨᏍᏗ ᎡᏣᎵᎡᎵᏤᎮᏍᏗ.
Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.
17 ᎠᎴ ᏂᎦᎥ ᏂᏣᏛᏁᎵᏙᎲᎢ, ᎢᏥᏬᏂᏍᎬ ᎠᎴ ᏕᏥᎸᏫᏍᏓᏁᎲ ᏱᎩ, ᏂᎦᎥ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᏙᎥ ᎢᏨᏗᏍᎨᏍᏗ, ᎡᏣᎵᎡᎵᏤᎮᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎾᏍᎩ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ, ᎾᏍᎩ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨᏍᏗ.
Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.
18 ᎢᏥᎨᏴ, ᏕᏦᎯᏳᏎᏍᏗ ᎢᏨᏒ ᏗᎨᏥᏰᎯ ᎾᏍᎩ ᎢᏨᏛᏁᏗᏱ ᏥᏚᏳᎪᏗ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏕᏥᎦᎿᎭᏩᏗᏒᎢ.
Basi, botosaka mibali na bino ndenge ebongi kati na Nkolo.
19 ᎢᏥᏍᎦᏯ, ᏕᏥᎨᏳᏎᏍᏗ ᏗᏣᏓᎵᎢ, ᎠᎴ ᏞᏍᏗ ᏱᏗᏥᏂᏆᏘᎮᏍᏗ.
Mibali, bolingaka basi na bino mpe bozalaka na makambo ya makasi te epai na bango.
20 ᏗᏥᏲᎵ, ᏕᏦᎯᏳᏎᏍᏗ ᏗᏥᎦᏴᎵᎢ ᏂᎦᎥ ᏂᎨᏥᏪᏎᎲᎢ; ᎣᏏᏳᏰᏃ ᎤᏰᎸᏗ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ.
Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.
21 ᎢᏥᎦᏴᎵᎨᎢ, ᏞᏍᏗ ᏱᏗᏥᎿᎭᎸᏍᏗᏍᎨᏍᏗ ᏗᏤᏥ, ᏱᏩᎾᎵᎲᏲᎵᎵᎦᏉᏰᏃ.
Batata, boyokisaka bana na bino kanda te, noki te mitema na bango ekolemba.
22 ᎡᏥᏅᏏᏓᏍᏗ, ᏕᏦᎯᏳᏎᏍᏗ ᏂᎦᎥ ᏂᎨᏥᏪᏎᎲ ᎨᏥᏅᏏᏙᎯ ᎠᏂ ᎤᏇᏓᎵ ᎨᏒᎢ; ᎥᏝ ᏥᏛᏓᏗᎧᏃ ᎾᏍᎩᏯᎢ, ᏴᏫᏉ ᎣᏏᏳ ᎤᏂᏰᎸᏗ, ᎣᏏᏳᏍᎩᏂ ᎢᏥᏰᎸᎯ ᎨᏎᏍᏗ ᏗᏥᎾᏫᏱ, ᎡᏥᎾᏰᏍᎨᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ:
Bawumbu, botosaka bankolo na bino na makambo nyonso; na miso na bango kaka te, lokola nde bozali kosepelisa bato, kasi na mitema ya bosembo mpe kati na kotosa Nkolo.
23 ᎠᎴ ᏂᎦᎥ ᎪᎱᏍᏗ ᎢᏣᏛᏁᎲᎢ, ᏗᏥᎾᏫᏱ ᎣᏏᏳ ᎢᏥᏰᎸᎯ ᏕᏥᎸᏫᏍᏓᏁᎮᏍᏗ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏁᏣᏛᏁᎰ ᎾᏍᎩᏯᎢ, ᎥᏝᏃ ᏴᏫ ᏥᏂᏕᏣᏛᏁᎰᎢ;
Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te,
24 ᎢᏣᏅᏖᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᏥᏁᏗ ᎨᏒ ᎡᏣᎫᏴᏓᏁᏗ ᎢᏣᏤᎵ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗ ᎨᏒᎢ; ᎤᎬᏫᏳᎯᏰᏃ ᎦᎶᏁᏛ ᎪᎱᏍᏗ ᎡᏣᏛᏁᎭ.
pamba te boyebi malamu ete bokozwa, lokola lifuti, libula oyo Nkolo abongisa mpo na bato ya Nzambe. Ezali Klisto nde azali Nkolo oyo bosalelaka.
25 ᎩᎶᏍᎩᏂ ᎤᏣᏘᏂ ᎢᏯᏛᏁᎯ ᎠᏥᏍᏛᏗᏍᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎤᏣᏘᏂ ᏄᏛᏁᎸᎢ; ᎥᏝᏃ ᎩᎶ ᎠᏥᎸᏉᏙᏗ ᏱᎨᏎᏍᏗ.
Moto oyo asalaka na ndenge ya mabe akozwa lifuti oyo ebongi mpo na misala na ye ya mabe, pamba te Nzambe aponaka bilongi te.

< ᏉᎳ ᎪᎶᏏ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 3 >