< ᎪᎵᏂᏗᏱ ᎠᏁᎯ ᏔᎵᏁ ᎨᎪᏪᎳᏁᎸᎯ 1 >

1 ᏉᎳ, ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎠᎩᏅᏏᏛ ᎾᏍᎩᏯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏓᏅᏖᎸᎢ, ᎠᎴ ᏗᎹᏗ ᎢᎩᏅᏟ, ᏫᏨᏲᏪᎳᏏ ᏗᏣᏁᎶᏗ ᎢᏣᏓᏡᎬ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ ᎪᎵᏂᏗᏱ ᏥᏣᏓᏡᎬ, ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᎢᏣᏓᏅᏘ ᏂᎬᎾᏛ ᎠᎦᏯ ᎢᏤᎲᎢ;
Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko Timote; Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto; mpe epai ya basantu nyonso oyo bazali kati na Akayi mobimba:
2 ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎢᏤᎳᏗᏙᎮᏍᏗ ᏅᏓᏳᎾᎵᏍᎪᎸᏔᏅᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᎩᏙᏓ, ᎠᎴ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ.
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
3 ᎦᎸᏉᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᎾᏍᎩ ᎤᏙᏓ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᎦᏤᎵ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ, ᎤᏓᏙᎵᏣᏘ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ, ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏂᎦᎥ ᎠᏓᎦᎵᏍᏓᏗᏍᎩ;
Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso:
4 ᎾᏍᎩ ᎣᎩᎦᎵᏍᏓᏗᏍᎩ ᏥᎩ ᏂᎦᎥ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎣᏥᎩᎵᏲᎬᎢ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏐᏗᏱ ᏰᎵ ᏗᎦᏲᏥᎦᎵᏍᏓᏗᏍᏗ ᎠᏂᎩᎵᏲᎩ, ᎦᏲᎬᏙᏗ ᎾᏍᎩ ᎠᏓᎦᎵᏍᏓᏗᏍᎩ ᎣᎬᏒ ᎣᎩᎦᎵᏍᏓᏗᏍᏗᏍᎬ ᎤᏁᎳᏅᎯ.
abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.
5 ᎾᏍᎩᏯᏰᏃ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᎩᎵᏲᏨ ᎤᏣᏘ ᏦᏥᎩᎵᏲᎦ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᎤᏣᏔ ᎣᎩᏁᎭ ᎠᏓᎦᎵᏍᏓᏗᏍᎩ ᎦᎶᏁᏛ ᎨᏒ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ.
Pamba te, ndenge kaka tomonaka pasi mingi kati na Klisto, ndenge wana mpe Klisto abondisaka biso makasi.
6 ᎢᏳ ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏲᏥᎩᎵᏲᎦ, ᎢᏥᎦᎵᏍᏓᏗᏍᏗ ᎠᎴ ᎢᏣᎵᏍᏕᎸᏙᏗ ᎤᎬᏩᎳ, ᎾᏍᎩ ᏥᏥᏩᏛᎡᎭ ᏗᏨᏂᏗᏳ ᎢᏥᎩᎵᏲᎢᏍᏗᏱ ᎠᏴ ᎣᏥᎩᎵᏲᎬ ᎤᏠᏱ; ᎢᏳ ᎠᎴ ᎤᎦᎵᏍᏗ ᏲᎦᏓᏅᏔ, ᎢᏥᎦᎵᏍᏓᏗᏍᏗ ᎠᎴ ᎢᏣᎵᏍᏕᎸᏙᏗ ᎤᎬᏩᎳ.
Boye soki tozali komona pasi, ezali mpo na kobondisama mpe lobiko na bino. Soki mpe biso tobondisami, ezali mpo ete bino mpe bobondisama mpo na koyikela pasi oyo tozali komona elongo na bino mpiko.
7 ᎠᎴ ᎤᏚᎩ ᎢᏨᏴᏒ ᎤᎵᏂᎩᏗᏳ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᏦᏥᎦᏔᎭ, ᎾᏍᎩ ᎢᏣᏠᏯᏍᏗᏍᎬ ᎠᎩᎵᏲᎢᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᎢᏣᏠᏯᏍᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎤᎦᎵᏍᏗ ᎨᏒᎢ.
Boye, tozali solo na elikya makasi na tina na bino, pamba te toyebi malamu ete ndenge kaka bozali komona pasi elongo na biso, ndenge wana mpe bozali kozwa kobondisama elongo na biso.
8 ᎥᏝᏰᏃ ᏲᎦᏚᎵᎭ, ᎢᏓᎵᏅᎵ, ᏂᏥᎦᏔᎲᎾᏉ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᎾᏍᎩ ᎤᏕᏯᏙᏗ ᎣᎩᎷᏤᎸ ᎡᏏᏱ, ᎾᏍᎩ ᎤᎶᏒᏍᏔᏅᎯ ᎦᎨᏛ ᎣᎩᎷᏤᎸᎢ, ᎤᎶᏒᏍᏔᏅᎯ ᏂᏙᎦᎵᏂᎬᎬᎢ, ᎾᏍᎩᏃ ᏅᏓᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬᎩ ᎣᎦᎸᏲᎵᎸᎩ ᏦᎦᏛᏂᏗᏍᏗᏱ;
Solo, bandeko, na tina na pasi oyo ekweyelaki biso kati na etuka ya Azia, tolingi boyeba malamu ete tonyokwamaki mingi kino ata kolemba nzoto mpe kobungisa elikya ya kokoba kozala na bomoi.
9 ᎠᏎᏃ ᎣᎩᎲᎩ ᏦᎩᏲᎱᎯᏍᏗᏱ ᏚᏚᎪᏔᏅᎢ, ᎾᏍᎩ ᏱᎬᏒᏉ ᎣᎦᏓᎵᏍᎦᏍᏙᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ, ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᎣᏣᎵᏍᎦᏍᏙᏗᏱ, ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ ᏗᎴᎯᏐᏗᏍᎩ;
Solo, tomonaki kaka ete basili kokatela biso etumbu ya kufa. Nzokande, ezalaki mpo ete tolongola elikya na bomoto na biso, kasi tozala na elikya nde na Nzambe oyo asekwisaka bakufi.
10 ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎣᎫᏓᎴᏛ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᎾᏰᎯᏍᏗ ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᏏ ᏦᎫᏓᎴᎭ; ᎾᏍᎩ ᎤᏚᎩ ᏦᏨᎾᏁᎭ ᎠᏏᏉ ᎣᎫᏓᎴᏍᏗᏱ;
Ye nde akangolaki biso na makama ya kufa ya lolenge wana, mpe akokangola biso lisusu. Solo, tozali na elikya kati na Ye ete akokangola biso lisusu,
11 ᏂᎯ ᎾᏍᏉ ᏍᎩᏍᏕᎵᏍᎬ ᎢᏣᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎬ ᎣᎩᏍᏕᎸᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎣᎩᏙᎵᏨ ᎤᏂᏣᏘ ᎢᏳᏅᏂᏌᏛ ᏅᏓᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᎤᏂᏣᏘ ᎤᎾᎵᎮᎵᏤᏗᏱ [ ᎤᏁᎳᏅᎯ ] ᎠᏴ ᎨᏒ ᎢᏳᏍᏗ.
awa bozali kosala elongo na biso na nzela ya mabondeli na bino. Boye, bato ebele bakozongisa matondi epai ya Nzambe na tina na biso mpo na likabo ya ngolu oyo azali kopesa biso lokola eyano na mabondeli ya bato ebele.
12 ᎯᎠᏰᏃ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᏦᏣᎵᎮᎵᎦ, ᎾᏍᎩ ᏦᎦᏓᏅᏙᎩ ᎪᎯᏳᏗᏍᎬᎢ, ᏃᏨᏗᏍᎬᎾ ᎤᏇᏓᎵᏉ ᎤᎬᏩᎵ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎣᎩᏍᏕᎵᏍᎬᎢ, ᏄᏠᎾᏍᏛᎾ ᎨᏒ ᎣᏨᏗᏍᎬ ᎣᎨᏙᎸ ᎠᏂ ᎡᎶᎯ ᎨᏒᎢ; ᎠᎴ Ꮀ ᎤᎬᏫᏳᎭ ᏂᎯ ᎢᏤᎲᎢ.
Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango: mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.
13 ᎥᏝᏰᏃ ᏅᏩᏓᎴ ᎪᎱᏍᏗ ᏱᏨᏲᏪᎳᏁᎭ, ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎤᏩᏒ ᏥᏥᎦᏔᎭ ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏥᏕᏣᏓᏂᎸᏨ; ᎠᎴ ᎤᏚᎩ ᎠᏋᎭ ᎬᎵᏍᏆᏗᏍᎩ ᏗᏣᏓᏂᎸᎢᏍᏗᏱ ᎨᏒᎢ;
Solo, tokomelaka bino makambo mosusu te, kaka makambo oyo bozali kotanga to oyo boyebi malamu. Mpe nazali na elikya ete bokososola penza malamu kino na suka,
14 ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᏰᎵᎦᎾᎨ ᏗᏍᎩᏯᏓᏂᎸᏨᎯ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩ ᎠᏴ ᎨᏒ ᎢᏨᏯᎵᎡᎵᏍᏗᏍᎬᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᏍᎩᏯᎵᎡᎵᏍᏙᏗ ᏥᎩ, ᎾᎯᏳ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎤᏤᎵ ᎢᎦ ᎨᏎᏍᏗ.
ndenge kaka bosili kososola yango mwa moke, ete bokoki penza komikumisa na tina na biso, ndenge mpe biso tokomikumisa na tina na bino na mokolo ya Nkolo Yesu.
15 ᎾᏍᎩᏃ ᎯᎠ ᏄᏍᏛ ᎠᏉᎯᏳᏒ ᎠᏆᏓᏅᏖᎸᎩ ᎪᎯ ᎨᏒ ᎠᏏ ᎾᏍᏆᎵᏍᎬᎾ ᏫᏨᎷᏤᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏐᏗᏱ ᏔᎵᏁ ᎣᏍᏛ ᎢᏣᏓᏅᏓᏗᏍᏗᏱ;
Na elikya yango, nazalaki na mabongisi ya koya liboso epai na bino mpo ete bokoka kozwa ngolu ya mibale;
16 ᎠᎴ ᏫᏨᎶᎢᏍᏓᏁᏗᏱ ᎹᏏᏙᏂ ᏩᎩᎷᎯᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᎹᏏᏙᏂ ᏗᎦᏂᎩᏒ ᏔᎵᏁ ᏅᏓᏨᎷᏤᏗᏱ, ᎠᎴ ᏧᏗᏱ ᏫᏥᎦᏛ ᏍᎩᏯᏘᏅᏍᏗᏱ.
mpe mpo ete, longwa epai na bino, nakende na Masedwane, mpe, sima na ngai kowuta na Masedwane, nazonga lisusu epai na bino mpo ete nazwa lisungi ya kokoba mobembo na ngai kino na Yuda.
17 ᎾᏍᎩᏃ ᏥᏄᏍᏛ ᏣᏆᏓᏅᏖᎸᎩ, ᏅᎵᏌᎵᏉᏍᎪ ᎠᎩᏰᎸᎯ ᎨᏎᎢ? ᎠᎴ ᎪᎱᏍᏗ ᎦᏓᏅᏛᎵ, ᏥᎪ ᎤᏇᏓᎵ ᎤᏓᏅᏖᏗ ᎦᏓᏖᏍᎪᎢ, ᎾᏍᎩᏃ ᎠᏴ ᏥᏁᎬ ᎯᎠᏉ ᏱᏄᏍᏗ, ᎥᎥ, ᎥᎥ, ᎠᎴ ᎥᏝ, ᎥᏝ?
Boni, elingi koloba ete namikakolaki tango nasalaki mabongisi yango to mpe elingi koloba ete nasalaka mabongisi na ngai kolanda baposa ya bomoto, mpo ete, na mbala moko, nandima likambo mpe naboya yango lisusu?
18 ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᏄᏓᎵᏓᏍᏛᎾ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩ [ ᏄᏙᎯᏳᎭ ] ᎠᏴ ᎢᏨᏁᏤᎲ ᎥᎥ ᎠᎴ ᎥᏝ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ.
Kasi lokola ezali solo ete Nzambe azali Moyengebene, maloba oyo toyebisaki bino ezali te « iyo » mpe « te. »
19 ᎤᏁᎳᏅᎯᏰᏃ ᎤᏪᏥ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ, ᎾᏍᎩ ᎢᏤᎲ ᎢᏨᏯᎵᏥᏙᏁᎸᎯ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩ ᎠᏴ, ᎠᎴ ᏏᎵᏪᎾ, ᎠᎴ ᏗᎹᏗ ᎢᏨᏯᎵᏥᏙᏁᎸᎯ ᏥᎩ, ᎥᎥ ᎠᎴ ᎥᏝ ᎤᏛᏗᏱ ᎥᏝ ᏲᎦᏛᏁᎢ, ᎥᎥᏍᎩᏂ ᎤᏩᏒ ᎤᏛᏗᏱ ᎬᏂᎨᏒ ᏃᎬᏁᎸᎩ.
Pamba te Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe, oyo ngai Silasi mpe Timote toteyaki bino, azalaki te « iyo » mpe « te; » kasi kati na Ye, ezalaki tango nyonso « iyo. »
20 ᎾᎦᏛᏰᏃ ᎤᏚᎢᏍᏔᏅᎢ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ, ᎥᎥ ᎬᏛᏗ, ᎠᎴ ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎨᏐ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ, ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᏥᎸᏉᏙᏗᏱ ᎠᏴ ᎢᏲᎬᏁᏗᏱ.
Pamba te bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka « iyo » kati na Klisto; mpe ezali na nzela na Ye Klisto nde tolobaka « amen » mpo na nkembo ya Nzambe.
21 ᎾᏍᎩᏃ ᎠᏴ ᎠᎴ ᏂᎯ ᎢᏧᎳᎭ ᏗᎦᎵᏂᎪᎯᏍᏗᏍᎩ ᎦᎶᏁᏛ ᎡᏓᏤᎵᎦ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎢᎩᎶᏁᎥᎯ, ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎤᏁᎳᏅᎯ;
Nzokande, ezali Nzambe nde alendisaka biso mpe bino kati na Klisto; mpe lokola abulisaki biso na nzela ya epakolami na Ye,
22 ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎾᏍᏉ ᎢᎩᏰᎸᏔᏅᎯ ᏥᎩ, ᎠᎴ ᎢᎩᏁᎸᎯ ᏥᎩ ᏗᎩᎾᏫᏱ ᎠᏓᏅᏙ ᎠᎦᏘᏗᏍᏙᏗ ᎨᏒᎢ.
abetaki biso kashe na Ye lokola libula na Ye, mpe atiaki Molimo na Ye kati na mitema na biso lokola ndanga ya biloko oyo akopesa biso.
23 ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏥᏔᏲᏎᎭ ᎠᎦᏔᎯ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᎠᏆᏓᏅᏙ ᎤᏬᎯᏳᏓᏁᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎢᏨᎨᏳᎥᏍᎬ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬ ᎠᏏ ᎪᎵᏂᏗᏱ ᏫᏂᏥᎷᎬᎾ ᏥᎩ;
Nazali kolapa ndayi na Kombo ya Nzambe mpe likolo ya bomoi na ngai ete ezalaki te mpo na kolukela bino mindondo nde nazongaki lisusu te na Kolinto;
24 ᎥᏝ ᎠᏗᎾ ᎢᏨᏯᏓᏅᏖᎮᎯ ᎨᏒ ᎢᏦᎯᏳᏒᎢ, ᎣᏥᏍᏕᎵᏍᎩᏉᏍᎩᏂ ᎨᏒ ᎢᏣᎵᎮᎵᎬᎢ; ᎢᏦᎯᏳᏒᏰᏃ ᏂᎦᎵᏍᏙᏗ ᎠᏏ ᏥᏕᏥᏙᎦ.
ezali mpe te mpo na kokonza kondima na bino, kasi tozali kosala elongo na bino mpo na esengo na bino, pamba te botelemi ngwi kati na kondima.

< ᎪᎵᏂᏗᏱ ᎠᏁᎯ ᏔᎵᏁ ᎨᎪᏪᎳᏁᎸᎯ 1 >