< ᏣᏂ ᎢᎬᏱᏱ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 4 >

1 ᎢᏨᎨᏳᎢ, ᏞᏍᏗ ᎾᏂᎥ ᏗᏓᏅᏙ ᏱᏗᏦᎯᏳᎲᏍᎨᏍᏗ, ᏕᏥᎪᎵᏰᏍᎨᏍᏗᏍᎩᏂ ᏗᏓᏅᏙ, ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏅᏓᏳ ᏓᎴᏅᎯ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ. ᎤᏂᏣᏔᏰᏃ ᎤᎾᏠᎾᏍᏗ ᎠᎾᏙᎴᎰᏍᎩ ᎠᏁᏙᎭ ᎡᎶᎯ.
Balingami na ngai, bondimaka te bato nyonso oyo babetaka tolo mpo na koloba ete batondisami na Molimo ya Nzambe; kasi bomeka bango mpo na koyeba soki bazali penza ya Nzambe, pamba te basakoli ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili.
2 ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏄᏍᏗ ᎢᏦᎵᏍᏙᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵ ᎠᏓᏅᏙ; ᎾᏍᎩ ᎠᏓᏅᏙ ᎯᎠ ᎢᎦᏪᏍᎩ, ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏇᏓᎵ ᎤᎾᏄᎪᏥᎴᎢ, ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ.
Tala ndenge nini bokoyeba soki bazali na Molimo ya Nzambe: moto nyonso oyo azali kondima ete Yesu-Klisto akomaki moto azali na Molimo ya Nzambe.
3 ᎾᏍᎩᏃ ᎠᏓᏅᏙ ᎯᎠ ᎢᎦᏪᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ, ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏇᏓᎵ ᎤᎾᏄᎪᏥᎴᎢ, ᎥᏝ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ ᏱᎩ. ᎾᏍᎩᏍᎩᏂ ᎯᎠ ᎦᎶᏁᏛ-ᎠᏡᏗᏍᎩ ᎤᏤᎵᎦ ᎠᏓᏅᏙ, ᎾᏍᎩ ᎤᎷᎯᏍᏗᏱ ᎢᏣᏛᎦᏅᎯ ᏥᎩ, ᎠᎴ ᎿᎭᏉ ᎦᏳᎳ ᎡᎶᎯ ᎡᎭ.
Moto nyonso oyo azali kondima Yesu te azali na Molimo ya Nzambe te, kasi azali na molimo ya monguna ya Klisto, oyo boyokaki na tina na ye ete azali koya mpe azali sik’oyo kati na mokili.
4 ᏂᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏅᏓᏣᏓᎴᏅᎯ, ᏗᏥᏲᎵ, ᎠᎴ ᏕᏥᏎᎪᎩᏒ ᎾᏍᎩ; ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎤᏟ ᎤᎵᏂᏗᎩᏗᏳ ᎨᏒ ᎢᏥᏯᎢ ᎡᏍᎦᏉ ᎡᎶᎯ ᎠᏯᎢ.
Bino, bana na ngai, bozali ya Nzambe mpe bosili kolonga basakoli yango ya lokuta, pamba te Ye oyo azali kati na bino azali na nguya koleka ye oyo azali kati na mokili.
5 ᎡᎶᎯ ᏅᏓᏳᎾᏓᎴᏅᎯ ᎾᏍᎩ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎡᎶᎯ ᎡᎯ ᎠᏂᏬᏂᎭ, ᎠᎴ ᎡᎶᎯ ᎤᎾᏛᎦᏁᎰᎢ.
Basakoli ya lokuta bazali ya mokili; balobaka kolanda elobeli ya mokili, mpe mokili eyokaka bango.
6 ᎠᏴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏅᏓᏲᎦᏓᎴᏅᎯ; ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎦᏔᎯ ᎣᎦᏛᎦᏁᎰᎢ. ᎾᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ ᏂᎨᏒᎾ ᎥᏝ ᏲᎦᏛᎦᏁᎰᎢ. ᎾᏍᎩ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᏕᏗᎦᏔᎭ ᏚᏳᎪᏛ ᎢᏯᎾᏛᏁᎯ ᎠᏓᏅᏙ, ᎠᎴ ᏚᏳᎪᏛ ᎢᏯᏌᏛᏁᎯ ᏂᎨᏒᎾ ᏗᏓᏅᏙ.
Biso, tozali ya Nzambe; mpe moto nyonso oyo ayebi Nzambe ayokaka biso. Kasi moto oyo azali ya Nzambe te ayokaka biso te. Ezali ndenge wana nde toyebaka Molimo ya solo mpe molimo ya libunga.
7 ᎢᏨᎨᏳᎢ, ᏕᎦᏓᎨᏳᏎᏍᏗ; ᎠᏓᎨᏳᏗᏰᏃ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏓᏳᏓᎴᏅᎯ, ᎩᎶᏃ ᏧᏓᎨᏳᏐ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᎾᏄᎪᏫᏒᎯ ᎨᏐᎢ, ᎠᎴ ᎠᎦᏔᎰ ᎤᏁᎳᏅᎯ.
Balingami na ngai, tolinganaka biso na biso, pamba te Nzambe azali bolingo. Moto nyonso oyo azali na bolingo azali ya Nzambe mpe ayebi Nzambe.
8 ᎤᏓᎨᏳᎯᏃ ᏂᎨᏒᎾ, ᎥᏝ ᏯᎦᏔᎰ ᎤᏁᎳᏅᎯ; ᎤᏁᎳᏅᎯᏰᏃ ᎤᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᏚᏙᎥ.
Moto oyo azangi bolingo ayebi Nzambe te, pamba te Nzambe azali bolingo.
9 ᎠᏂ ᎯᎠ ᎬᏂᎨᏒ ᏄᎵᏍᏔᏅᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᎩᎨᏳᏒᎢ, ᎤᏁᎳᏅᎯᏰᏃ ᏧᏅᏎ ᎤᏩᏒᎯᏳ ᎤᏕᏁᎸᎯ ᎤᏪᏥ ᎡᎶᎯ ᎤᎷᎯᏍᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏐᏗᏱ ᎬᏂᏛ ᎢᎩᏩᏛᏗᏱ.
Botala ndenge nini Nzambe atalisaki biso bolingo na Ye: atindaki Mwana na Ye se moko kati na mokili mpo ete tozala na bomoi ya solo na nzela na Ye.
10 ᎠᏂ ᎯᎠ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒᎢ, ᎥᏝ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎡᏗᎨᏳᎢᏳ ᏄᎵᏍᏔᏅᎢ, ᎠᏴᏍᎩᏂ ᎢᎩᎨᏳᎯᏳ ᏄᎵᏍᏔᏅᎢ, ᎠᎴ ᏧᏅᏒ ᎤᏤᎵᎦ ᎤᏪᏥ ᎠᎵᏍᎪᎸᏔᏅᎯ ᎠᎫᏴᏙᏗ ᎢᎩᏍᎦᏍᏨᎢ.
Bolingo yango emonani na likambo oyo: ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi Ye nde alingaki biso mpe atindaki Mwana na Ye mpo ete azala mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso.
11 ᎢᏨᎨᏳᎢ, ᎢᏳᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎾᏍᎩ ᎢᎦᎢ ᎢᎩᎨᏳᎯᏳ ᎢᏳᎵᏍᏔᏅᎯ ᏱᎩ, ᎠᏴ ᎾᏍᏉ ᏗᎦᏓᎨᏳᎯᏳ ᏱᎩ.
Balingami na ngai, lokola Nzambe alingaki biso mingi penza, biso mpe tosengeli kolingana biso na biso.
12 ᎥᏝ ᎢᎸᎯᏳ ᎩᎶ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᎪᎲᎯ ᏱᎩ. ᎢᏳᏃ ᏗᎦᏓᎨᏳᎯᏳ ᏱᎩ, ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᎩᏯᎠ, ᎠᎴ ᎠᏴ ᎡᏗᎨᏳᏒ ᎤᎧᎵᏨᎯ ᎨᏐᎢ.
Moto moko te asila komona Nzambe; nzokande soki tozali kolingana biso na biso, Nzambe azali kati na biso mpe bolingo na Ye ezali ya kokoka kati na biso.
13 ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎢᏓᏙᎴᎰᎯᏍᏗᎭ ᎡᏗᏯᎥᎢ ᎠᎴ ᎠᏴ ᎢᎩᏯᎥᎢ, ᎾᏍᎩ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬ ᎢᎦᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎸᎯ ᎨᏒ ᎤᏩᏒ ᎤᏤᎵ ᎠᏓᏅᏙ.
Tala ndenge nini toyebaka ete tozali kati na Nzambe, mpe Nzambe azali kati na biso: ezali na nzela ya Molimo na Ye, oyo apesa biso.
14 ᎠᎴ ᎠᏴ ᎣᎩᎪᎲ ᎠᎴ ᎣᏥᏃᎮᎭ ᎠᎦᏴᎵᎨ ᏧᏅᏒ ᎤᏪᏥ ᎡᎶᎯ ᎠᏍᏕᎵᏍᎩ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ.
Tosilaki komona Ye mpe totatolaka ete Tata atinda Mwana na Ye mpo ete azala Mobikisi ya mokili.
15 ᎩᎶ ᎯᎠ ᎢᎦᏪᏍᎩ ᏥᏌ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏪᏥ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎣᏯᎣᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯᏱ ᎠᏯᎣᎢ.
Moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe, Nzambe azali kati na ye, mpe ye azali kati na Nzambe.
16 ᎠᎴ ᎠᏴ ᎢᎩᎦᏙᎥᏒ ᎠᎴ ᎢᎪᎯᏳᏅ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᎩᎨᏳᎯᏳ ᎨᏒᎢ. ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᏚᏙᎥ, ᎠᏓᎨᏳᏗᏃ ᎨᏒ ᎡᎯ ᎤᎾᎳᏅᎯ ᎠᏯᎣᎢ, ᎠᎴ ᎤᎾᎳᏅᎯ ᎾᏍᎩ ᎤᏯᎣᎢ.
Mpe biso toyebi mpe tozali na kondima kati na bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo, mpe moto oyo abikaka kati na bolingo abikaka kati na Nzambe, mpe Nzambe abikaka kati na ye.
17 ᎠᏂ ᎯᎠ ᎢᎦᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᎤᎧᎵᏨᎯ, ᏄᎵᏍᏔᏅ ᎾᏍᎩ ᏂᏗᎾᏰᏍᎬᎾ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᏗᎫᎪᏙᏗᏱ ᎢᎦ ᎨᏎᏍᏗ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎾᏍᎩᏯ ᏄᏍᏛ ᎾᏍᏉ ᎾᏍᎩ ᏂᎦᏍᏗ ᎠᏴ ᎠᏂ ᎡᎶᎯ.
Tala mpo na nini bolingo ezali ya kokoka kati na biso: ezali mpo ete tozala na elikya ya kokoka na mokolo ya kosambisama; pamba te kati na mokili oyo, ndenge Klisto azali, ndenge biso mpe tozali.
18 ᎥᏝ ᎦᎾᏰᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏳᏓᏑᏯ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒᎢ, ᎤᎧᎵᏨᎯᏍᎩᏂ ᎨᏒ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎦᏄᎪᏫᏍᎦ ᎦᎾᏰᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ; ᎦᎾᏰᎯᏍᏗᏰᏃ ᎨᏒ ᎠᎩᎵᏯ ᎤᏪᎭ; ᎩᎶ ᏥᎦᎾᏰᏍᎪᎢ ᎥᏝ ᎤᎧᎵᏨᎯ ᏱᎨᏐ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒᎢ.
Kati na bolingo, kobanga ezalaka te; kasi bolingo oyo ezali ya kokoka elongolaka bobangi, pamba te bobangi ebendaka etumbu. Mpe moto oyo abangaka azali nanu ya kokoka te kati na bolingo.
19 ᎡᏗᎨᏳᎠ ᎾᏍᎩ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎠᏴ ᎢᎬᏱ ᎢᎩᎨᏳᎯᏳ ᏄᎵᏍᏔᏅᎢ.
Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso.
20 ᎢᏳᏃ ᎩᎶ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏥᎨᏳᎠ ᏯᏗᎭ, ᏯᏍᎦᎦᏃ ᏗᎾᏓᏅᏟ, ᎦᏰᎪᎩ ᎾᏍᎩ, ᎤᎨᏳᎯᏰᏃ ᏂᎨᏒᎾ ᏱᎩ ᏗᎾᏓᏅᏟ ᎾᏍᎩ ᎤᎪᎲᎯ, ᎦᏙ ᏱᎦᎵᏍᏙᏓ ᎤᎨᏳᎯᏳ ᏱᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᎪᎲᎯ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ.
Soki moto alobi ete alingaka Nzambe, kasi azali lisusu koyina ndeko na ye, azali mokosi. Pamba te moto oyo alingaka te ndeko na ye, oyo amonaka akoki kolinga te Nzambe oyo amonaka te.
21 ᎯᎠᏃ ᎾᏍᎩ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎢᎩᏁᎸᎯ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏃ ᎩᎶ ᎤᎨᏳᎯᏳ ᎨᏎᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᎾᏍᏉ ᎤᎨᏳᎯᏳ ᎨᏎᏍᏗ ᏗᎾᏓᏅᏟ.
Kutu, Klisto apesaki biso mobeko oyo: moto oyo alingaka Nzambe asengeli mpe kolinga ndeko na ye.

< ᏣᏂ ᎢᎬᏱᏱ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 4 >