< ᎪᎵᏂᏗᏱ ᎠᏁᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᎨᎪᏪᎳᏁᎸᎯ 8 >

1 ᎾᏃ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎾᏁᎳᏅᎯ ᏗᏰᎸᎯ ᏗᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎸᎯ ᎤᎬᏩᎵ, ᎢᏗᎦᏔᎭ ᎾᏍᎩ ᏂᏗᎥ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᎨᎲᎢ. ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᏢᏆᏍᎪᎢ, ᎠᏓᎨᏳᏗᏍᎩᏂ ᎨᏒ ᎠᏓᏍᏕᎵᏍᎪᎢ.
Mpo na oyo etali misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete biso nyonso tozali na boyebi. Boyebi epesaka lolendo, kasi bolingo elendisaka.
2 ᎢᏳ ᎠᎴ ᎩᎶ ᏳᏬᎯᏳᎭ ᎪᎱᏍᏗ ᎠᎦᏔᎲᎢ, ᎥᏝ ᎪᎱᏍᏗ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᏏ ᎤᎦᏙᎥᏒᎯ ᏱᎩ.
Moto oyo akanisaka ete azali na boyebi ya makambo ayebi nanu eloko te na ndenge esengeli.
3 ᎢᏳᏍᎩᏂ ᎩᎶ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏳᎨᏳᎭ, [ ᎤᏁᎳᏅᎯ ] ᎾᏍᎩ ᎤᎦᏔᎰᎢ.
Kasi moto oyo alingaka Nzambe, Nzambe ayebi ye.
4 ᎾᏃ ᎠᎩᏍᏗᏱ ᎤᎬᏩᎵ ᎪᎱᏍᏗ ᎠᏥᎸ ᎨᎳᏍᏗᏱ ᏗᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎸᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᏰᎸᎯ, ᎢᏗᎦᏔᎭ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᏰᎸᎯ ᎪᎱᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒ ᎠᏂ ᎡᎶᎯ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏅᏩᏓᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏁᎲᎾ ᎨᏒ, ᏌᏉ ᎤᏩᏒ.
Boye, na tina na likambo ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete nzambe ya ekeko ezali eloko pamba kati na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka se moko.
5 ᎤᏂᏣᏔᏍᎩᏂᏃᏅ ᎠᏁᎭ ᎤᎾᏁᎳᏅᎯ ᎨᎪᏎᎯ ᎦᎸᎶᎢ ᎠᎴ ᎡᎶᎯ, ( ᏧᏂᎶᏔᏉ ᎤᎾᏁᎳᏅᎯ, ᎠᎴ ᏧᏂᏣᏔᏉ ᎤᏂᎬᏫᏳᎯ, )
Solo, ezali na bikelamu ebele oyo ebengami banzambe, ezala na likolo to na mabele; yango nde esalaka ete banzambe mpe bankolo bazala ebele.
6 ᎠᏴᏍᎩᏂ ᎢᏙᎯᏳᎲᏍᎬ ᏌᏉᎯᏳ ᎡᎭ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᎾᏍᎩ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ, ᎾᏍᎩ ᎾᎿᎭᏂᎦᏗᏳ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏨᏗᏓᎴᎲᏍᎦ, ᎠᎴ ᎠᏴ ᎾᏍᎩ ᎡᏓᏤᎵᎦ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᏥᏕᎭ; ᎠᎴ ᏌᏉᎯᏳ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᏂᎦᏗᏳ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏤᎭ, ᎠᎴ ᎠᏴ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᏥᏕᎭ.
Kasi mpo na biso, Nzambe azali kaka se moko, Ye nde azali Tata mpe Mokeli na nyonso, mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye. Mpe Nkolo azali kaka se moko, Ye nde Yesu-Klisto. Nyonso esalema na nzela na Ye, mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye.
7 ᎥᏝᏍᎩᏂᏃᏅ ᎾᏂᎥ ᎾᏍᎩ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏳᏁᎭ; ᎩᎶᏰᏃ ᏙᏧᎾᏓᏅᏛ ᎤᏂᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᏰᎸᎯ ᎪᎯ ᎨᏒ ᎢᏯᏍᏗ ᎠᎾᎵᏍᏓᏴᏗᏍᎪ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᏰᎸᎯ ᎠᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎸᎯ ᏣᏂᎩᏍᎪ ᎾᏍᎩᏯᎢ; ᏚᎾᏓᏅᏛᏃ ᏗᏩᎾᎦᎳᎯᏳ ᎨᏒ ᏗᎦᏓᎭ ᏂᏙᎦᎵᏍᏗᏍᎪᎢ.
Nzokande, bato nyonso bazali na boyebi oyo te; bato mosusu bazali nanu na momesano ya kosambela banzambe ya bikeko kino sik’oyo. Boye wana baliaka misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bakanisaka ete ezali penza mbeka oyo babonzeli banzambe wana; mpe mitema na bango, oyo elenda te ekomaka mbindo.
8 ᎠᎵ ᏍᏓᏴᏗᏍᎩᏂ ᎥᏝ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎣᏏᏳ ᎢᎩᏰᎸᏗᏱ ᏱᏂᎬᏁᎭ; ᎥᏝᏰᏃ ᏱᏓᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎦ ᎤᏟ ᎣᏏᏳ ᏱᏂᎬᏁᎰᎢ, ᎥᏝ ᎠᎴ ᏂᏓᎵᏍᏓᏴᏍᎬᎾ ᏱᎩ, ᎡᏍᎦ ᏱᏂᎬᏁᎰᎢ.
Nzokande, ezali bilei te nde ememaka biso pene ya Nzambe; soki tolie yango te, tokobungisa eloko moko te; soki mpe tolie yango, tokozwa eloko moko te.
9 ᎠᏎᏃ ᎢᏤᏯᏔᎮᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎢᎨᏣᏛᏁᏗ ᎢᏥᎲ ᏗᏂᏩᎾᎦᎳ ᏧᏃᏕᏍᏗᏍᎩ ᏱᏄᎵᏍᏔᏁᏍᏗ.
Kasi bosala keba ete bonsomi na bino ekoma libaku te mpo na bato oyo balenda te kati na kondima.
10 ᎢᏳᏰᏃ ᎩᎶ ᎢᏳᏍᏗ ᏱᏣᎪᎲ ᏂᎯ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏤᎯ ᏱᏅᎦ ᏯᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎦ ᎠᏓᏁᎸ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᏰᎸᎯ ᎤᏤᎵᎦ; ᏝᏍᎪ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎤᏓᏅᏛ, ᎠᏩᎾᎦᎳ ᎨᏒ, ᏂᎦᎾᏰᏍᎬᎾ ᏱᏅᎦᎵᏍᏓ ᎤᎵᏍᏓᏴᏙᏗᏱ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎾᏍᎩ ᏗᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎸᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᏰᎸᎯ;
Pamba te soki moko kati na bato oyo balenda te kati na kondima amoni yo, yo oyo ozali na boyebi, ozali kolia kati na tempelo ya banzambe ya bikeko, boni, motema na ye ekozanga solo kotindika ye mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu?
11 ᎾᏍᎩᏃ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏣᏤᎵᎦ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᎠᏩᎾᎦᎳ ᏗᏍᏓᏓᏅᏟ ᏴᎬᏲᎱᎯ, ᎾᏍᎩ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏲᎱᎯᏎᎸᎯ?
Boye, ndeko oyo alenda te kati na kondima, ye oyo Klisto akufelaki, akopengwa likolo ya boyebi na yo.
12 ᎠᏎᏃ ᎾᏍᎩ ᏂᏣᏛᎦ ᏕᏥᏍᎦᏅᏥ ᎢᏣᎵᏅᏟ, ᎠᎴ ᎤᏲ ᏂᏕᏨᎦ ᏗᏩᎾᎦᎳ ᏚᎾᏓᏅᏛᎢ, ᎦᎶᏁᏛ ᎡᏥᏍᎦᏅᏤᎰᎢ.
Tango bozali kobetisa bandeko na bino mabaku na ndenge wana, mpe bozali kozokisa mitema na bango, oyo elenda te, bozali kosala masumu liboso ya Klisto.
13 ᎾᏍᎩᏃ ᏥᏄᏍᏗ, ᎢᏳᏃ ᎠᎵᏍᏓᏴᏗ ᏦᏍᏓᏓᏅᏟ ᏱᏚᏬᏕᏍᏗᎭ, ᎥᏝ ᏴᎦᏥᎦ ᎭᏫᏯ ᎡᎶᎯ ᎢᎪᎯᏛ ᎨᏒᎢ, ᏦᏍᏓᏓᏅᏟᏰᏃ ᏱᏙᏥᏲᏕᏍᏓ. (aiōn g165)
Yango wana, soki mpo na bilei na ngai, ndeko na ngai azali kokweya na masumu, nakotikala kolia lisusu misuni te mpo ete nazala libaku te, oyo ekokweyisa ye na masumu. (aiōn g165)

< ᎪᎵᏂᏗᏱ ᎠᏁᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᎨᎪᏪᎳᏁᎸᎯ 8 >