< ᎪᎵᏂᏗᏱ ᎠᏁᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᎨᎪᏪᎳᏁᎸᎯ 4 >

1 ᎾᏂᎥ ᎩᎶ ᎪᎦᏓᏅᏖᏍᎬ ᎦᎶᏁᏛ ᎣᎩᏅᏏᏓᏍᏗ ᎾᏍᎩᏯ ᎪᎦᏓᏅᏖᏍᎨᏍᏗ, ᎠᎴ ᎣᎦᎦᏌᏯᏍᏗᏕᎩ ᎤᏕᎵᏛ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ.
Boye, tika ete bato bazwa biso lokola basali ya Klisto mpe lokola bakambi oyo bazwi mokumba ya koyebisa mabombami ya Nzambe.
2 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎤᎾᎦᏌᏯᏍᏗᏕᎩ ᎤᏚᎩ ᎨᎬᏐ ᏚᏳᎪᏛ ᎢᏳᎾᏛᏁᏗᏱ.
Nzokande, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo.
3 ᎠᏴᏍᎩᏂ ᎦᏓᏅᏖᏍᎬ ᏅᎵᏌᎵᏉ ᏂᎯ ᏗᏍᎩᏳᎪᏓᏁᏗᏱ, ᎠᎴ ᎠᏫᏉ ᏧᏭᎪᏙᏗ ᎨᏒᎢ; ᎥᎥ, ᎥᏝ ᎠᏋᏒ ᏱᏗᎦᏓᏚᎪᏓᏁᎭ;
Mpo na ngai, nazali komisambisa na likambo moko te. Yango wana, ezala kosambisa na bino to kosambisa ya esambiselo ya bato, elobelaka ngai eloko moko te.
4 ᎥᏝᏰᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᏱᏥᎦᏔᎭ ᎠᏋᏒ ᎠᏆᏓᎳᏫᏎᏗ; ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᎾᏍᎩ ᏯᏊᏓᎴᎭ; ᎤᎬᏫᏳᎯᏍᎩᏂ ᎾᏍᎩ ᏗᏊᎪᏓᏁᎯ.
Motema na ngai ezali kosambisa ngai ata na likambo moko te; nzokande, yango te nde ezali kolongisa ngai. Oyo asambisaka ngai, ezali nde Nkolo.
5 ᎾᏍᎩᏍᎩᏂ ᎢᏳᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᏗᏧᎪᏔᏅᎩ ᎠᏏᏉ ᏄᏍᏆᎸᎲᎾ, ᎬᏂ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎦᎷᏨᎭ, ᎾᏍᎩ ᎢᎦ ᎦᏛ ᏥᏙᏓᎦᎾᏄᎪᏫᏏ ᎤᎵᏏᎬ ᏗᎬᏍᎦᎵ ᏥᎩ, ᎠᎴ ᎬᏂᎨᏒ ᏂᏙᏓᎬᏁᎵ ᏧᏂᎾᏫᏱ ᏄᏍᏛ ᏚᎾᏓᏅᏖᎸᎢ; ᎿᎭᏉᏃ ᎾᏂᎥ ᎨᏥᎸᏉᏙᏗ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯᏱ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ ᎨᏎᏍᏗ.
Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.
6 ᎠᎵ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏧᏓᎴᏅᏛ, ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᏕᎦᏟᎶᏍᏗᏍᎬ ᎠᏋᏒ ᎦᏓᏁᎢᏍᏓ ᎠᎴ ᎠᏉᎳ ᏥᏁᎢᏍᏓ ᏂᎯ ᎨᏒ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ; ᎾᏍᎩ ᏍᎩᏯᏕᎶᏆᎡᏗᏱ ᎢᏣᏓᏅᏖᏍᎬ ᎢᏥᎶᏒᏍᏙᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ ᏂᎬᏅ ᎪᏪᎸᎢ, ᎾᏍᎩ ᎩᎶ ᎤᏢᏈᏍᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ ᎠᏏᏴᏫ ᎦᎸᏉᏗᏍᎬ ᏅᏩᏓᎴᏃ ᎠᏡᏗᏍᎬᎢ.
Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi, mpo na bolamu na bino, mpo ete, na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo: Bolekaka mondelo te ya makambo oyo ekomama; mpe mpo ete moko te kati na bino atonda na lolendo na kolanda moko mpe koyina mosusu.
7 ᎦᎪᎨ ᏅᏩᏓᎴ ᏂᏨᏁᎸ? ᎠᎴ ᎦᏙ ᏣᎭ ᎾᏍᎩ ᏁᏣᏁᎸᎾ ᎨᏒᎢ? ᎢᏳᏃ ᎡᏣᏁᎸᎯ ᏱᎩ, ᎦᏙᏃ ᎢᎭᏢᏈᏍᎦ ᏁᏣᏁᎸᎾᏉ ᏥᎨᏐ ᎾᏍᎩᏯᎢ?
Boni, nani azali kokesenisa yo na bato mosusu? Eloko nini ozali na yango, oyo bapesa yo te? Mpe lokola bapesa yo yango, mpo na nini komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te?
8 ᎿᎭᏉ ᎢᏥᎧᎵᏨᎯ, ᎿᎭᏉ ᎢᏤᎿᎭᎢᏳ, ᎢᏥᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒᎢ ᎠᏴ ᏂᏨᏯᎵᎪᏁᎸᎾ, ᎠᎴ ᏲᎯ ᎤᏙᎯᏳᎯ ᎢᏥᎬᏫᏳᎯ ᏱᎩ, ᎠᏴ ᎾᏍᏉ ᎢᏧᎳᎭ ᎢᎩᎬᏫᏳᎯ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ.
Bosili kotondisama na nyonso oyo bozalaka na makanisi ya kozwa! Bosili penza kokoma bato ya bomengo! Bobandi kokonza; bobandi kokonza elongo na biso te! Nalingaka ete bobanda penza kokonza, mpo ete biso mpe tokonza elongo na bino!
9 ᎦᏓᏅᏖᏍᎬᏰᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎬᏂᎨᏒ ᏃᎬᏁᎸ ᎠᏴ ᎣᎩᏅᏏᏛ ᎣᏂᏱ ᎨᏒᎢ, ᏦᎩᏲᎱᎯᏍᏗᏱ ᎾᏍᎩᏯᎢ; ᏗᎪᎦᎧᏃᏗᏰᏃ ᏃᎦᎵᏍᏔᏅ ᎡᎶᎯ ᎠᎴ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎠᎴ ᏴᏫ.
Pamba te nakanisi ete, biso bantoma, Nzambe atia biso na suka ya molongo lokola bato oyo bakatela bango etumbu ya kufa na libanda ya masano. Mpo na mokili mobimba, mpo na ba-anjelu mpe mpo na bato, Nzambe akomisa biso lokola lisano ya kotala.
10 ᎣᎩᏁᎫ ᎠᏴ ᎦᎶᏁᏛ ᎨᏒ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ, ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎢᏥᎦᏔᎿᎭᎢ ᎦᎶᏁᏛ ᎨᏒ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ; ᏦᏥᏩᎾᎦᎳ ᎠᏴ, ᏂᎯᏍᎩᏂ ᏗᏣᎵᏂᎩᏗᏳ; ᎡᏥᎸᏉᏗᏳ ᏂᎯ, ᎠᏴᏍᎩᏂ ᎣᎩᏂᏆᏘᎯ.
Biso, likolo ya Klisto, tozali bazoba; kasi bino, kati na Klisto, bozali bato ya mayele! Biso, tozali bato na bolembu; kasi bino, bozali bato makasi! Bino, bozali kozwa lokumu; kasi biso, tozali kotiolama!
11 ᎪᎯ ᎨᏒ ᎢᏯᏍᏗ, ᎠᎪᏄ ᏙᎩᏲᏏᎭ, ᎠᎴ ᏙᎩᏔᏕᎩᎭ, ᎠᎴ ᏦᎩᏰᎸᏌᎢ, ᎠᎴ ᎠᏍᏈᏅ ᏙᎬᏂᏍᏗᎭ, ᎠᎴ ᎢᎸᎯᏢ ᎣᎨᏅᏒ ᏂᎨᏒᎾ;
Kino sik’oyo, tozali konyokwama na nzala, na posa ya mayi, tozangi bilamba, tozali kobetama, tozali koyengayenga,
12 ᎠᎴ ᎠᏍᏓᏯ ᏙᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎰᎢ, ᎣᎬᏒ ᏦᎪᏰᏂ ᏙᏨᏗᏍᎪ ᎪᎱᏍᏗ ᎣᏣᏛᏁᎰᎢ. ᎦᏲᎩᏐᏢᏗᏍᎬ ᎣᏍᏛ ᏙᏥᏁᏤᎰᎢ; ᎤᏲ ᏃᎬᏁᎲ ᎤᏁᎳᎩ ᎣᏤᎵᏍᎪᎢ;
mpe tozali kosala mosala makasi na maboko na biso. Tango bafingaka biso, topambolaka; tango banyokolaka biso, toyikelaka yango kaka mpiko;
13 ᎣᎩᏃᎮᏍᎬᎢ, ᎣᏥᏔᏲᎯᎰᏉ; ᎤᏁᎢᎸᏗ ᎡᎶᎯ ᎡᎯ ᎾᏍᎩᏯ ᎾᎦᎵᏍᏔᏅ, ᎠᎴ ᎦᏓᎭ ᎨᏒ ᎾᎦᎥ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎠᏍᏛᎪᏒᎯ ᏃᎦᎵᏍᏔᏅ ᎪᎯ ᎢᏯᏍᏗ.
tango bakoselaka biso makambo mpo na kobebisa lokumu na biso, tozongisaka kaka na maloba ya boboto. Mpe kino sik’oyo, tokomi lokola bosoto ya mokili, mpe lokola lisapo ya bato.
14 ᎥᏝ ᎢᏨᏍᏕᎣᎯᏍᏙᏗᏱ ᏱᎩᏰᎸ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏥᏨᏲᏪᎳᏁᎭ; ᏗᏇᏥᏍᎩᏂ ᎢᏨᎨᏳᎢ ᎾᏍᎩᏯᎢ ᎢᏨᏯᏅᏓᏗᏍᏗᎭ.
Nazali kokoma makambo oyo mpo na koyokisa bino soni te, kasi mpo na kokebisa bino lokola bana na ngai ya bolingo.
15 ᎾᏍᏉᏰᏃ ᎠᏍᎪᎯ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᏱᎾᏂᎥ ᏗᎨᏤᏲᎲᏍᎩ ᎦᎶᏁᏛ ᏕᏣᏁᎶᏛᎢ, ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᏯᏂᎪᏗ ᏗᏥᏙᏓ; ᎦᎶᏁᏛᏰᏃ ᏥᏌ ᏕᏣᏁᎶᏛ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎬᏗ ᏍᎩᏯᏕᏁᎸᎩ.
Pamba te, ata soki bozalaki na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, kasi bozali na batata ebele te. Ngai nde nazali tata na bino kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu.
16 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏨᏍᏗᏰᏗᎭ ᎠᏴ ᏍᎩᏯᏕᎶᏆᎡᎯ ᎢᏣᎵᏍᏙᏗᏱ.
Boye, nabondeli bino: bolanda ndakisa na ngai.
17 ᎾᏍᎩ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᏥᏅᏒᎩ ᏗᎹᏗ ᎢᏥᏩᏛᎲᏍᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᏥᎨᏳᎢ ᏥᎩ ᎠᏇᏥ, ᎠᎴ ᏚᏳᎪᏛ ᎢᏯᏛᏁᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏓᎧᎿᎭᏩᏕᎬᎢ; ᎾᏍᎩ ᏓᏣᏅᏓᏗᏍᏔᏂ ᏄᏍᏛ ᎨᏙᎲ ᎦᎶᏁᏛ ᏕᏥᎦᎿᎭᏩᏕᎬᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᏕᎦᏕᏲᎲᏍᎬ ᏂᎦᎥ ᏕᎨᏌᏗᏒ ᏚᎾᏓᏡᏩᏗᏒ ᏧᎾᏁᎶᏗ.
Ezali na tina wana nde natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo, oyo azali sembo kati na Nkolo; akolobela bino lisusu banzela na ngai mpo na bomoi kati na Yesu-Klisto, ndenge kaka nateyaka yango bisika nyonso kati na Mangomba nyonso.
18 ᎾᏍᎩᏃ ᎢᎦᏛ ᏚᎾᏕᏋᎯᏍᏗ ᏥᏫᏅᏗᏨᎷᏤᎵᏒᎾᏉ ᏥᎨᏐ ᎾᏍᎩᏯᎢ.
Bato mosusu kati na bino bakomi na lofundu, bakanisaka ete nakoya lisusu te epai na bino.
19 ᎠᏎᏃ ᏮᏓᏨᎷᏤᎵ ᏂᎪᎯᎸᎾ, ᎢᏳᏃ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎣᏏᏳ ᏳᏰᎸᏅ; ᎠᎴ ᏮᏓᎦᏙᎴᎣᏏ, ᎥᏝ ᎠᏂᏬᏂᏍᎬᏉ ᎾᏍᎩ ᏧᎾᏕᏋᎯᏍᏗ, ᏚᎾᎵᏂᎬᎬᏍᎩᏂ ᏄᏍᏛᎢ.
Kasi, soki Nkolo alingi, nakoya epai na bino kala mingi te; mpe nakoyeba kaka te ndenge nini bato yango ya lofundu balobaka, kasi mpe nguya nini bazali na yango.
20 ᎤᏁᎳᏅᎯᏰᏃ ᎤᏤᎵᎪᎯ ᎨᏒ ᎥᏝ ᎦᏬᏂᎯᏍᏗᏉ ᎨᏒ ᏱᏚᎳᏏᏗ, ᎤᎵᏂᎩᏗᏳᏍᎩᏂ ᎨᏒᎢ.
Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya maloba te, kasi likambo ya nguya.
21 ᎦᏙᏃ ᎢᏣᏚᎵᎭ? ᏥᎪ ᎦᎾᏍᏓ ᏥᏁᎢ ᏮᏓᏨᎷᏤᎵ? ᏥᎪᎨ ᎠᏓᎨᏳᏗᏳ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᎤᏓᏅᏘ ᎠᏓᏅᏙ ᎬᏗ ᏮᏓᏨᎷᏤᎵ?
Bolingi nini? Naya epai na bino na fimbu to na bolingo mpe na molimo ya boboto?

< ᎪᎵᏂᏗᏱ ᎠᏁᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᎨᎪᏪᎳᏁᎸᎯ 4 >