< ᎪᎵᏂᏗᏱ ᎠᏁᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᎨᎪᏪᎳᏁᎸᎯ 15 >

1 ᎠᎴᏬ ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᎬᏂᎨᏒ ᏂᏨᏴᏁᎭ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ, ᎾᏍᎩ ᏥᏨᏯᎵᏥᏙᏁᎸᎩ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᏥᏕᏣᏓᏂᎸᏨ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎤᎵᏂᎩᏛ ᏥᏕᏥᏂᏴᎭ;
Bandeko na ngai, nalingi sik’oyo kozongisa lisusu na makanisi na bino, Sango Malamu oyo nateyaki bino, oyo boyambaki, oyo bomipesi na yango,
2 ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᏥᏣᎵᏍᏕᎸᏙᏗ, ᎢᏳᏃ ᎠᏍᏓᏯ ᏱᏗᏥᏂᏴ ᎾᏍᎩ ᏥᏨᏯᎵᏥᏙᏁᎸᎩ, ᎢᏳᏍᎩᏂᏃᏅ ᎠᏎᏉᏉ ᏱᎩ ᎢᏦᎯᏳᏒᎢ.
mpe oyo na nzela na yango bosili kobika, soki kaka bosimbi makasi Liloba oyo nateyaki bino; pamba te soki ezali bongo te, wana bondimelaki na bino kaka pamba.
3 ᎢᎬᏱᏱᏰᏃ ᎨᏒ ᏕᏣᏲᎯᏎᎸᎩ ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᎠᏴ ᏨᎩᏲᎯᏎᎸᎩ, ᎾᏍᎩ ᎦᎶᏁᏛ ᎠᏴ ᎢᎩᏍᎦᏅᏨ ᎢᎩᏲᎱᎯᏎᎸᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᏂᎬᏅ ᎪᏪᎵᎯ;
Liboso na nyonso, nateyaki bino mateya oyo ngai moko nazwaki: Klisto akufaki mpo na masumu na biso, kolanda Makomi;
4 ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎠᏥᏂᏌᏅᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏦᎢᏁ ᎢᎦ ᏙᎤᎴᎯᏌᏅ ᎾᏍᎩᏯ ᏂᎬᏅᎪᏪᎵᎯ;
bakundaki Ye, mpe asekwaki na mokolo ya misato, ndenge Makomi elobaki yango liboso.
5 ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏏᏆᏏ ᎤᎪᎲᎢ, ᎿᎭᏉᏃ ᏔᎳᏚ ᎢᏯᏂᏛ.
Amonanaki epai ya Petelo; sima, epai ya bantoma zomi na mibale.
6 ᎣᏂᏃ ᎯᏍᎩᏧᏈ ᎤᎶᏒᏍᏗ ᎢᏯᏂᏛ ᎠᎾᎵᏅᏟ ᎢᏧᎳᎭ ᎬᏩᎪᎮᎢ; ᎾᏍᎩᏃ [ ᎬᏩᎪᎲᎯ ] ᎤᏟ ᎢᏯᏂᏛ ᎠᎾᎴᏂᏙ ᎠᏏ ᎪᎯ ᎨᏒᎢ, ᎢᎦᏛᏍᎩᏂᏃᏅ ᏚᏂᎵᏅᏨ.
Sima na yango, amonanaki epai ya bandeko koleka nkama mitano na mbala moko; mpe mingi kati na bango bazali nanu na bomoi kino na tango oyo, kasi bamosusu basila kokufa.
7 ᎣᏂᏃ ᏥᎻ ᎤᎪᎮᎢ; ᎿᎭᏉᏃ ᏂᎦᏛ ᎨᏥᏅᏏᏛ [ ᎢᎬᏩᎪᎮᎢ.]
Bongo amonanaki epai ya Jake, mpe epai ya bantoma nyonso.
8 ᎣᏂᏱᏃ ᎾᏍᏉ ᎠᏴ ᎥᏥᎪᎥᎩ, ᎾᏍᎩᏯ ᎩᎶ ᎤᏕᏗᏱ ᏄᏍᏆᎸᎲᎾᏉ ᏣᏕᎲᏍᎪ ᏣᏓᎪᏩᏘᏍᎪᎢ.
Sima na bango nyonso, amonanaki mpe epai na ngai, lokola epai ya mwana matsombe,
9 ᎠᏴᏰᏃ ᎠᏆᏍᏗᎧᏂ ᎣᎩᏅᏏᏛ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᎥᏝ ᏰᎵ ᎠᏥᏅᏏᏛ ᎦᏴᏉᏎᏗ ᏱᎩ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎤᏲ ᏂᎦᏥᏴᏁᎸ ᏧᎾᏁᎶᏗ ᎤᎾᏓᏡᎬ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ.
pamba te nazali moke penza kati na bantoma; mpe nakoki kutu te kobengama ntoma, mpo ete nanyokolaki Lingomba ya Nzambe.
10 ᎠᏎᏃ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᎠᏴ ᎾᏆᏍᏛ ᎾᏆᏍᏗ; ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎥᎩᏁᎸᎯ ᏥᎩ, ᎥᏝ ᎠᏎᏉᏉ ᏱᏄᎵᏍᏔᏅ; ᎤᏟᏰᏃ ᎢᎦᎢ ᏓᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎲ ᎡᏍᎦᏉ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎾᏂᎥᎢ; ᎥᏝᏍᎩᏂᏃᏅ ᎠᏴ, ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᏗᎩᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎸᎯ.
Kasi na ngolu ya Nzambe, nazali oyo nazali lelo; mpe ngolu na Ye epai na ngai ezali ya pamba te. Kutu, nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso; nzokande, ezali ngai te, kasi ezali nde ngolu ya Nzambe, oyo ezali elongo na ngai.
11 ᎠᏗᎾ ᎢᏳᏃ ᎠᏴ ᏱᎩ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏱᎩ, ᎾᏍᎩ ᏃᏥᏪᎭ ᎣᏣᎵᏥᏙᎲᏍᎦ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏄᏍᏗ ᎢᏦᎯᏳᏅ.
Na mokuse, ezala ngai to bango, biso nyonso toteyaka kaka Sango Malamu oyo, mpe ezali Sango Malamu yango nde bondimaki.
12 ᎾᏍᎩᏃ ᎢᏳ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏲᎱᏒᎯ ᏕᎤᎴᎯᏌᏅ ᏯᎦᎵᏥᏙᎲᏍᎦ, ᎦᏙᏃ ᎢᎦᏛ ᎨᏣᏓᏑᏴ ᎯᎠ ᏂᎠᏂᏪᎭ, ᎥᏝ ᏧᎾᎴᎯᏐᏗ ᏱᎩ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ?
Nzokande, soki toteyaka ete Klisto asekwaki kati na bakufi, ndenge nini bato mosusu kati na bino balobaka ete bakufi bakosekwa te?
13 ᎢᏳᏃ ᏧᎾᎴᎯᏐᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᏱᎩ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ, ᎿᎭᏉ ᎦᎶᏁᏛ ᎥᏝ ᏧᎴᎯᏌᏅᎯ ᏱᎩ.
Soki bakufi bakosekwa te, wana Klisto mpe asekwaki te.
14 ᎢᏳ ᎠᎴ ᎦᎶᏁᏛ ᏧᎴᎯᏌᏅᎯ ᏂᎨᏒᎾ ᏱᎩ, ᎿᎭᏉ ᎣᏣᎵᏥᏙᎲᏍᎬ ᎠᏎᏉᏉ ᏂᎦᎵᏍᏗᎭ, ᎠᎴ ᎢᏦᎯᏳᏒ ᎾᏍᏉ ᎠᏎᏉᏉ ᏂᎦᎵᏍᏗᎭ.
Mpe soki Klisto asekwaki te, wana mateya na biso ezali na tina te, mpe kondima na bino ezali pamba.
15 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎬᏂᎨᏒ ᏂᎦᎵᏍᏗᎭ ᎦᏰᎪᎩ ᎣᏥᏃᎮᏍᎩ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ; ᎣᏥᏃᎮᎸᏰᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎾᏍᎩ ᎤᏲᎱᏒ ᏕᎤᎴᏔᏅ ᎦᎶᏁᏛ; ᏧᎴᎳᏅᎯ ᏂᎨᏒᎾ ᏥᎩ, ᎢᏳᏃ ᎰᏩ ᏧᎾᎴᎯᏐᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᏱᎩ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ.
Mpe lisusu, soki ezali penza ya solo ete bakufi bakosekwa te, wana tozali batatoli ya lokuta na tina na Nzambe, pamba te totatoli lokuta na tina na Nzambe ete asekwisaki Klisto kati na bakufi. Nzokande soki ezali penza bongo ete bakufi bakosekwa te, wana Nzambe asekwisaki Yesu te.
16 ᏧᏂᏲᎱᏒᎯᏰᏃ ᏧᎾᎴᎯᏐᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᏱᎩ, ᎿᎭᏉ ᎦᎶᏁᏛ ᎥᏝ ᏧᎴᎯᏌᏅᎯ ᏱᎩ.
Solo, soki bakufi bakosekwa te, wana Klisto mpe asekwaki te;
17 ᎢᏳ ᎠᎴ ᎦᎶᏁᏛ ᏧᎴᎯᏌᏅᎯ ᏂᎬᏒᎾ ᏱᎩ, ᎢᏦᎯᏳᏒ ᎠᏎᏉᏉ ᏂᎦᎵᏍᏗᎭ; ᎠᏏᏉ ᎢᏥᏍᎦᏅᏨ ᎢᏣᏚᏓᎳ.
mpe soki Klisto asekwaki te, wana kondima na bino ezali na tina te, bozali nanu kati na masumu na bino,
18 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ Ꮎ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏃᎯᏳᎯ ᎤᏂᎵᏅᏨᎯ ᏥᎩ ᎬᏩᏂᏲᏥᏙᎸᏉ.
mpe bato oyo bakufi kati na Klisto babungi mpo na libela.
19 ᎢᏳᏃ ᎠᏂᏉ ᎢᏕᎲ ᎤᏩᏒ ᎤᏚᎩ ᏱᎬᎭ ᎦᎶᏁᏛ ᎢᎩᏍᏕᎸᏗᏱ, ᎾᏂᎥ ᏴᏫ ᏕᏗᎪᎾᏛᏗ ᎤᏲ ᏂᎦᏛᏅᎢ.
Soki totiaka elikya na Klisto kaka mpo na bomoi oyo, tozali penza bato na mawa koleka bato nyonso.
20 ᎠᏎᏃ ᎦᎶᏁᏛ ᏕᎤᎴᎯᏌᏅ ᎤᏲᎱᏒᎢ, ᎠᎴ ᏧᏓᎴᏅᏔᏅᎯ ᏄᎵᏍᏔᏅ ᎾᏍᎩ ᎤᏂᎵᏅᏨᎯ ᏥᎨᏒᎩ.
Kasi, solo, Klisto asekwaki kati na bakufi: azali Mosekwi ya liboso kati na bakufi.
21 ᎾᏍᎩᏰᏃ ᏴᏫ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᏥᎩ ᎠᎰᎱᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏤᎭ, ᏴᏫ ᎾᏍᏉ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᎠᏲᎱᏒ ᏗᎴᎯᏐᏗ ᏥᎩ.
Solo, lokola kufa eyaki na nzela ya moto moko, lisekwa mpe eyaki na nzela ya moto moko;
22 ᎠᏓᏫᏰᏃ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᏂᎦᏗᏳ ᏥᏓᏂᏲᎱᏍᎦ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᎦᎶᏁᏛ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᏂᎦᏗᏳ ᏗᏅᏃᏛ ᏅᏛᎨᎬᏁᎵ.
ndenge bato nyonso bakufaka kati na Adamu, ndenge wana mpe bato nyonso bakozwa bomoi kati na Klisto;
23 ᎠᏎᏃ ᎾᏂᎥ ᎤᎾᏤᎵᏛᎭ; ᎦᎶᏁᏛ ᏧᏓᎴᏅᏔᏅᎯ; ᎣᏂᏃ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎦᎶᏁᏛ ᏧᏤᎵ ᎨᏒ ᎾᎯᏳ ᎦᎷᏨᎭ.
kasi moto na moto na tango na ye: Klisto akosekwa moto ya liboso; sima, tango akoya, bato oyo bazali ya Klisto bakosekwa.
24 ᎿᎭᏉ ᏛᎵᏍᏆᏗ, ᎾᎯᏳ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᏧᏲᎯᏎᎸᎯ ᎨᏎᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᎾᏍᎩ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ; ᎾᎯᏳ ᎠᏛᏔᏃᏅᎭ ᏂᎦᏗᏳ ᎤᏂᎬᏫᏳᏌᏕᎩ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏂᎦᏗᏳ ᏗᎨᎦᏁᎶᏗ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᏚᎾᎵᏂᎬᎬᎢ.
Sima na yango nde suka ekoya, tango Klisto akozongisa bokonzi na maboko ya Ye oyo azali Nzambe mpe Tata, sima na Ye kobebisa lokumu nyonso, bokonzi nyonso mpe nguya nyonso.
25 ᎠᏎᏰᏃ ᏅᏩᏍᏕᏍᏗᏉ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒᎢ, ᎬᏂ ᏂᎦᏛ ᎬᏩᏍᎦᎩ ᏚᎳᏍᎬ ᎭᏫᏂᏗᏢ ᏂᏕᎬᏁᎸᎭ.
Pamba te Klisto asengeli kokonza kino Nzambe akotia banguna na Ye nyonso na se ya matambe na Ye.
26 ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᎤᎵᏍᏆᎸᏗ ᎤᏍᎦᎩ ᎠᏥᏛᏙᏗ ᎨᏒᎢ.
Kufa nde ezali monguna ya suka, oyo ekobebisama.
27 ᏂᎦᏗᏳᏰᏃ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏚᎳᏍᎬ ᎭᏫᏂᏗᏢ ᎢᎬᏁᎸᎯ. ᎠᏎᏃ, ᏂᎦᏗᏳ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎭᏫᏂᏗᏢ ᎢᏯᎬᏁᎸᎯ ᏣᏗᎭ, ᎬᏂᎨᏒ ᏂᎦᎵᏍᏗᎭ ᎾᎦᏠᏯᏍᏛᎾ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏂᎦᏛ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎭᏫᏂᏗᏢ ᎢᏳᏩᏁᎸᎯ.
Pamba te atiaki biloko nyonso na se ya matambe na Ye. Kasi wana alobi: « Nyonso ezali na se ya bokonzi na Ye, » etalisami polele ete esengeli te kotanga Nzambe oyo atiaki nyonso na se ya bokonzi na Ye.
28 ᎾᎯᏳᏃ ᏂᎦᏗᏳ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎭᏫᏂᏗᏢ ᎢᏯᎬᏁᎸᎯ ᎨᏎᏍᏗ, ᎿᎭᏉ ᎾᏍᏉ ᎤᏪᏥ ᎤᏩᏒ ᎭᏫᏂᏗᏢ ᏅᏛᏛᏁᎵ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏂᎦᏛ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎭᏫᏂᏗᏢ ᎢᏳᏩᏁᎸᎯ, ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏂᎦᎥ ᎢᎬᏂᏏᏍᎩ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᎾᏂᎥ ᎠᏁᎲᎢ.
Mpe sima na Nzambe kotia nyonso na se ya bokonzi na Ye, Ye moko Mwana akomitia na se ya bokonzi ya Nzambe oyo atiaki nyonso na se ya bokonzi na Ye, mpo ete Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso.
29 ᎢᏳᏃ ᎾᏍᎩ ᏄᏍᏛᎾ ᏱᎩ, ᎦᏙ ᏛᎾᏛᏁᎵ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ ᏥᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎪ ᏥᏕᎨᎦᏬᏍᎪᎢ? ᎢᏳᏃ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ ᎠᏎ ᏧᎾᎴᎯᏐᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᎨᏎᏍᏗ, ᎦᏙᏃ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎪ ᏙᎨᎦᏬᏍᎪᎢ?
Soki lisekwa ezali te, bato oyo bazwaka libatisi mpo na bakufi bakosala nini? Soki bakufi bakosekwa te, mpo na nini bato bazwaki libatisi mpo na bango?
30 ᎠᎴ ᎦᏙᏃ ᎤᎾᏰᎯᏍᏗ ᏂᎦᏛᎿᎭᏕᎦ ᏂᎪᎯᎸᎢ?
Bongo biso, mpo na nini tokutanaka na makama tango nyonso?
31 ᏥᏁᎢᏍᏗᎭ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎤᎵᎮᎵᏍᏗ ᏣᎩᎭ ᏂᎯ ᏥᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ, ᎾᏍᎩ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎣᎦᏤᎵ ᏨᏗᏓᎴᎲᏍᎦ, ᏥᏲᎱᏍᎪ ᏂᏚᎩᏨᏂᏒᎢ.
Bandeko na ngai, mokolo na mokolo, nandimaka kokufa, wana namikumisaka na tina na bino kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
32 ᎢᏳᏃ ᏴᏫ ᎢᏳᎾᏛᏁᏗ ᎢᏯᏆᏛᏁᎸᎯ ᏱᎩ, ᏅᎩ ᏗᏂᏅᏌᏗ ᎤᏂᏍᎦᏎᏗ ᎣᎦᎵᎸᎯ ᏱᎩ ᎡᏈᏌ ᎦᏚᎲᎢ, ᎦᏙ ᎬᎩᏁᏉᏤᏗ ᎣᏍᏛ ᎨᏒ, ᎢᏳᏃ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ ᏧᎾᎴᎯᏐᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᏱᎩ? ᎢᏓᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎨᏍᏗ, ᎠᎴ ᎢᏓᏗᏔᏍᎨᏍᏗ; ᏑᎾᎴᏉᏰᏃ ᏙᏓᏗᏲᎱᏏ.
Soki ezali kaka mpo na makambo ya bomoto nde nabundisaki banyama ya zamba kati na Efeso, litomba nini nazwaki? Soki bakufi bakosekwa te, « wana tika ete tolia mpe tomela, pamba te, lobi, tokokufa! »
33 ᏞᏍᏗ ᎡᏥᎵᏓᏍᏔᏅᎩ; ᎾᏲ ᏗᎵᏃᎮᎵᏓᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᏲᏍᏗᏍᎪ ᎣᏍᏛ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒᎢ.
Bomikosa te: « Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu! »
34 ᎢᏥᏰᎩ ᏚᏳᎪᏛ ᎢᏣᏛᏁᏗᏱ, ᎠᎴ ᏞᏍᏗ ᏱᏥᏍᎦᏅᎨᏍᏗ; ᎢᎦᏛᏰᏃ ᎥᏝ ᏯᏂᎦᏔᎭ ᎤᏁᎳᏅᎯ; ᎤᏕᎰᎯᏍᏗᏳ ᎢᏨᏃᎮᎭ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏥᏂᏥᏪᎭ.
Bozongela makanisi ya malamu na ndenge ekoki mpe botika kosala masumu, pamba te bato mosusu kati na bino bayebi Nzambe te; nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni.
35 ᎠᏎᏃ ᎩᎶ ᎯᎠ ᏱᏅᎦᏫ, ᎦᏙ ᏓᎨᎬᏁᎵ ᏙᏓᎨᎦᎴᏔᏂ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ? ᎠᎴ ᎦᏙ ᎤᏍᏕᏍᏗ ᎤᏙᏢᏒ ᏗᏂᏰᎸ ᎠᏂᎷᏨᎭ?
Kasi bato mosusu bakoki kotuna: « Bakufi bakosekwa ndenge nini? Bakozonga na bomoi na nzoto nini? »
36 ᏣᏁᎫ! ᎾᏍᎩ ᏥᏫᏍᎪᎢ ᎥᏝ ᏴᎬᎵᏰᎲᎦ ᎬᏂ ᎤᎪᎯ;
Bozangi nde mayele! Nkona oyo oloni ekoki te kozongela bomoi soki ekufi te.
37 ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏥᏫᏍᎪᎢ, ᎥᏝ ᎾᏍᎩ ᎠᏰᎸ ᎤᏙᏢᏗ ᎨᏒ ᏱᏫᏍᎪᎢ, ᎤᎦᏔᎭᏉᏍᎩᏂ, ᎤᏣᎴᏍᏗᏉ ᏱᎩ, ᎠᎴ ᎪᎱᏍᏗᏉ ᎤᏍᏗ ᏅᏩᏓᎴ ᏱᎩ;
Mpe nkona oyo oloni ezali te nzoto oyo nzete ekozala na yango tango ekobima; kasi ezali mbuma ya pamba, tango mosusu mbuma ya ble to mbuma mosusu.
38 ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᎠᏁᎰ ᎠᏰᎸ ᎾᏍᎩᏯ ᎣᏏ ᎤᏰᎸᏅᎢ, ᎠᎴ ᏄᏓᎴᏒ ᎤᎦᏔ ᎤᏤᎵᎦᏯ ᎠᏰᎸᎢ.
Kasi ezali Nzambe nde apesaka yango nzoto oyo Ye moko abongisa, mpe apesaka nkona moko na moko nzoto na yango.
39 ᏂᎦᏛ ᎤᏇᏓᎵ ᎨᏒ ᎥᏝ ᎤᏠᏱᎭ ᏱᎩ; ᏴᏫᏰᏃ ᎤᏂᏇᏓᎸ ᏑᏓᎴᎩ; ᏅᏩᏓᎴᏃ ᏅᎩ ᏗᏂᏅᏌᏗ ᎤᏂᏇᏓᎸᎢ, ᏅᏩᏓᎴᏃ ᎠᏣᏗ, ᏅᏩᏓᎴᏃ ᏥᏍᏆ.
Bikelamu nyonso ya bomoi ezalaka na lolenge moko te ya nzoto: ezali na bokeseni kati na nzoto ya bato, ya banyama, ya bandeke mpe ya mbisi.
40 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎦᎸᎳᏗ ᎠᏁᎭ ᏗᎪᏢᏅᎯ, ᎠᎴ ᎡᎶᎯ ᎠᏁᎭ ᏗᎪᏢᏅᎯ; ᎠᏎᏃ ᏧᏬᏚᎯᏳ ᎨᏒ ᎦᎸᎳᏗ ᎠᏁᎯ ᏅᏩᏓᎴᎢ, ᎠᎴ ᏧᏬᏚᎯᏳ ᎨᏒ ᎡᎶᎯ ᎠᏁᎯ ᏅᏩᏓᎴᎢ.
Ezali mpe na banzoto ya Likolo mpe na banzoto ya se; mpe kongenga ya banzoto ya Likolo ekeseni na kongenga ya banzoto ya se:
41 ᏅᏙ ᎢᎦ ᎡᎯ ᎤᏤᎵᏛ ᎤᏬᏚᎯᏳ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᏬᏚᎯᏳ ᎨᏒ ᏅᏙ ᏒᏃᏱ ᎡᎯ ᏅᏩᏓᎴᎢ, ᎠᎴ ᏧᏃᏚᎯᏳ ᎨᏒ ᏃᏈᏏ ᏅᏩᏓᎴᎢ; ᎠᎴ ᏃᏈᏏ ᎧᎸ ᎤᏬᏚᎯᏳ ᎨᏒ ᏅᏩᏓᎴ ᏄᏍᏙ ᏃᏈᏏ ᏄᏍᏛ ᎤᏬᏚᎯᏳ ᎨᏒᎢ.
moyi ezali na kongenga na yango, sanza ezali na kongenga na yango, minzoto mpe ezali na kongenga na yango; kutu monzoto moko ekeseni na monzoto mosusu na kongenga.
42 ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᏄᏍᏗ ᏧᎾᎴᎯᏐᏗ ᎨᏒ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ. ᎠᏲᎩ ᎠᏫᏒᎯ ᎨᏐᎢ; ᎠᏲᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᏗᎴᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ.
Boye, ezali mpe ndenge moko mpo na lisekwa ya bakufi: ekundami nzoto oyo epolaka, kasi ekosekwa nzoto oyo epolaka te;
43 ᎦᎸᏉᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎠᏫᏒᎯ ᎨᏐᎢ, ᎦᎸᏉᏗᏳ ᏗᎴᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ; ᎠᏩᎾᎦᎳ ᎠᏫᏒᎯ ᎨᏐᎢ, ᎤᎵᏂᎩᏛ ᏗᎴᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ;
ekundami nzoto ya soni, kasi ekosekwa nzoto ya lokumu; ekundami nzoto ya bolembu, kasi ekosekwa nzoto ya nguya;
44 ᎢᏗᏫᏍᎪ ᎤᏇᏓᎵ ᎠᏰᎸ ᎠᏫᏒᎯ ᎨᏐᎢ, ᎠᏓᏅᏙ ᎤᏙᏢᏒ ᏗᎴᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ. ᎤᏇᏓᎵ ᎠᏰᎸ ᎡᎭ, ᎠᎴ ᎠᏓᏅᏙ ᎤᏙᏢᏒ ᎡᎭ.
ekundami nzoto ya bomoto, kasi ekosekwa nzoto ya molimo. Soki nzoto ya bomoto ezali, nzoto ya molimo mpe ezali.
45 ᎾᏍᎩᏯᏃ ᎯᎠ ᏂᎬᏅ ᎦᏪᎳ, ᎢᎬᏱᏱ ᏴᏫ ᎠᏓᏫ ᎬᏃᏛ ᏄᎵᏍᏔᏁᎢ; ᎣᏂᏱᏃ ᎠᏓᏫ ᎠᏓᏅᏙ ᎬᏂᏛ ᏗᏁᎯ ᏄᎵᏍᏔᏁᎢ.
Yango wana ekomama: « Moto ya liboso, Adamu, akomaki ekelamu na bomoi, azalaki na bomoi ya bomoto; » kasi Adamu ya suka akomaki Molimo oyo apesaka bomoi.
46 ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᎢᎬᏱ ᏱᎨᏎ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᏓᏅᏙ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩᏍᎩᏂ Ꮎ ᎠᏇᏓᎵ ᏥᎩ; ᎣᏂᏃ ᎢᏴᏛ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᏓᏅᏙ ᏥᎩ.
Ezali te bomoi ya molimo nde eyaki liboso, ezali nde bomoi ya bomoto; bomoi ya molimo eyaki na sima.
47 ᎢᎬᏱᏱ ᎠᏍᎦᏯ ᎦᏙᎯ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ, ᎦᏓᏉ ᎨᏎᎢ; ᏔᎵᏁ ᎠᏍᎦᏯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎦᎸᎳᏗ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ.
Moto ya liboso asalemaki na putulu ya mabele, azali moto ya mabele; kasi moto ya mibale awutaka na Likolo.
48 ᏄᏍᏛ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎦᏓᏉ ᎠᎪᏢᏔᏅᎯ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᏄᎾᏍᏗ ᎦᏓᏉ ᎨᎪᏢᏔᏅᎯ; ᎠᎴ ᏄᏍᏛ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᏄᎾᏍᏗ ᎦᎸᎳᏗ ᎠᏁᎯ.
Ndenge moto ya mabele azali, ndenge wana mpe bato ya mabele bazali; mpe ndenge moto ya Lola azali, ndenge wana mpe bato ya Lola bazali.
49 ᎠᎴ ᎦᏓ ᎠᎪᏢᏔᏅᎯ ᏄᏍᏛ ᎾᏍᎩᏯ ᏥᏂᎦᏍᏗ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᏂᎦᏍᏕᏍᏗ ᏄᏍᏛ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ.
Mpe lokola tolataki elilingi ya moto ya mabele, tokolata mpe elilingi ya moto ya Lola.
50 ᎾᏍᎩᏃ ᎯᎠ ᏂᏥᏪᎭ ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᎾᏍᎩ ᎤᏇᏓᎵ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎩᎬ ᎥᏝ ᎤᎾᏤᎵ ᎢᎬᏩᎵᏍᏙᏗ ᏱᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎪᎯ; ᎥᏝ ᎠᎴ ᎠᏲᎩ ᎨᏒ ᎤᏤᎵ ᎢᎬᏩᎵᏍᏙᏗ ᏱᎩ ᎠᏲᎯ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ.
Bandeko na ngai, nazali koyebisa bino ete nzoto ya mosuni mpe makila ekoki te kokota na Bokonzi ya Nzambe, mpe oyo epolaka ekoki te kosangana na oyo epolaka te.
51 ᎬᏂᏳᏉ, ᎢᏨᎾᏄᎪᏫᏎ ᎤᏕᎵᏛ ᎨᏒᎢ; ᎥᏝ ᏂᎦᏛ ᏴᏓᏗᎵᏅᏥ, ᏂᎦᏗᏳᏍᎩᏂ ᎡᎩᏁᏟᏴᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ
Boyoka, nazali kotalisa bino mabombami: Biso nyonso, tokokufa te; kasi biso nyonso, tokobongolama,
52 ᎩᎳᏉ ᎢᏴᏛ, ᏥᏛᎦᏔᎾᏫᏍᏗᏉ ᎢᎪᎯᏛ, ᎤᎵᏍᏆᎸᏗ ᎠᏤᎷᎩ ᏂᎦᎵᏍᏔᏅᎭ; ᎠᏤᎷᎩᏰᏃ ᏓᏳᏃᏴᎳᏏ, ᏧᏂᏲᎱᏒᎯᏃ ᏙᏓᎨᎦᎴᏔᏂ ᎠᏂᏲᎩ ᏁᎨᏒᎾ, ᎠᏴᏃ ᏓᏰᎩᏁᏟᏴᏏ.
na mbalakata, noki penza, tango kelelo ya suka ekobeta. Pamba te kelelo ekobeta, bakufi bakosekwa na nzoto oyo epolaka te; bongo biso, tokobongolama.
53 ᎯᎠᏰᏃ ᎠᏲᎩ ᎨᏒ ᎠᏲᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᏛᏄᏬᏍᏔᏂ, ᎠᎴ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎠᏲᎱᏍᎩ ᎨᏒ ᎠᏲᎱᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᏛᏄᏬᏍᏔᏂ.
Solo, oyo epolaka esengeli kolata kozanga kopola, mpe oyo ekufaka esengeli kolata kozanga kokufa.
54 ᎾᏍᎩᏃ ᎿᎭᏉ ᎯᎠ ᎠᏲᎩ ᎨᏒ ᎠᏲᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒ ᎤᏄᏬᏍᏔᏁᏍᏗ, ᎠᎴ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎠᏲᎱᏍᎩ ᎠᏲᎱᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒ ᎤᏄᏬᏍᏔᏁᏍᏗ, ᎿᎭᏉ ᏄᎵᏍᏔᏁᏍᏗ ᎯᎠ ᎢᎦᏪᏛ ᎨᏒ ᏥᎪᏪᎳ, ᎠᏓᎵᏁᎯᏗᏍᎩ ᎨᏒ ᎤᎩᏐᏅ ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ.
Tango oyo epolaka ekolata kozanga kopola, mpe oyo ekufaka ekolata kozanga kokufa, na tango wana nde Liloba oyo ya Makomi ekokokisama: « Elonga emeli kufa.
55 ᏂᎯ ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎭᏢ ᏣᏓᏨᏯᏍᏗᎨᏒᎢ? ᏂᎯ ᏗᏓᏂᏐᏗᏱ ᎨᏒᎢ, ᎭᏢ ᏣᏓᏎᎪᎩᏍᏗ ᎨᏒᎢ? (Hadēs g86)
Oh kufa, wapi elonga na yo? Oh kufa, wapi nguya na yo? » (Hadēs g86)
56 ᎠᏲᎱᏍᏗ ᎤᏓᏨᏯᏍᏗ ᎨᏒ, ᎾᏍᎩ ᎠᏍᎦᏂ; ᎠᏍᎦᏂᏃ ᎤᎵᏂᎪᎯᏍᏗᏍᎩ ᎾᏍᎩ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ.
Nguya ya kufa ezali masumu, mpe nguya ya masumu ezali Mibeko.
57 ᎠᏎᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎵᎮᎵᏤᏗ ᎨᏎᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᏥᎩᏁᎭ ᎢᎦᏓᏎᎪᎩᏍᏗᏱ, ᏨᏗᏓᎴᎲᏍᎦ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᎦᏤᎵ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ.
Kasi tika ete Nzambe apesamela matondi, pamba te apesaka biso elonga na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto!
58 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ, ᎢᏨᎨᏳᎢ ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᏗᏣᎵᏂᎩᏗᏳ ᎨᏎᏍᏗ, ᎦᏰᏥᏖᎸᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏎᏍᏗ, ᏂᎪᎯᎸ ᎤᏣᏘ ᏕᏥᎸᏫᏍᏓᏁᎮᏍᏗ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎤᏤᎵ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒᎢ, ᎢᏥᎦᏔᎭᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎢᏣᎵᏂᎬᏁᎲ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎤᏤᎵ ᏕᏥᎸᏫᏍᏓᏁᎲ ᎠᏎᏉᏉ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ.
Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.

< ᎪᎵᏂᏗᏱ ᎠᏁᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᎨᎪᏪᎳᏁᎸᎯ 15 >