< ᎪᎵᏂᏗᏱ ᎠᏁᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᎨᎪᏪᎳᏁᎸᎯ 13 >

1 ᎾᏍᏉ ᏴᏫ ᎠᎴ ᎦᎸᎳᏗ ᎠᏁᎯ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᏧᏂᏬᏂᎯᏍᏗ ᏱᏥᏬᏂᎭ, ᎾᎩᎲᎾᏃ ᏱᎩ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒᎢ, ᎥᏣᏱᏉ ᎤᏃᏴᎵᏛ ᎠᎴ ᎤᏃᏴᎩ ᎤᎭᎸᏂᎯ ᏕᎦᏤᎳᎦ.
Soki nalobi nkota ya bato to ya ba-anjelu, kasi nazangi bolingo, nazali kaka lokola ngonga oyo ezali kobeta to lokola manzanza oyo ezali kotia makelele.
2 ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏯᎩᎭ ᎠᏆᏙᎴᎰᎯᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᏱᎪᎵᎦ ᏂᎦᏗᏳ ᎤᏕᎵᏛ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᏂᎦᏗᏳ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ; ᎠᎴ ᏂᎦᎥ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᏯᎩᎭ, ᎾᏍᎩ ᏰᎵᏉ ᏗᎬᎩᎲᏍᏗ ᏱᎩ ᏙᏓᎸᎢ; ᎠᏓᎨᏳᏗᏃ ᎨᏒ ᎾᎩᎲᎾ ᏱᎩ, ᎪᎱᏍᏗᏉ ᏂᎨᏒᎾ ᎠᏴ.
Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.
3 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏂᎦᎥ ᎠᎩᎾᎥ ᏱᎦᏓᏃᏁᎭ, ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏥᏰᎸ ᏱᏓᎩᏲᏒ ᎤᎾᎪᎲᏍᏙᏗᏱ, ᎾᎩᎲᎾᏃ ᏱᎩ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒᎢ, ᎥᏝ ᎪᎱᏍᏗ ᎠᎩᏁᏉᏤᎯ ᏱᎩ.
Soki napesi biloko na ngai nyonso epai ya babola, mpe nakabi nzoto na ngai mpo ete batumba yango, kasi nazangi bolingo, nakozwa ata litomba moko te.
4 ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᎬᏂᏗᏳ, ᎠᎴ ᎤᏓᏅᏘᏳ; ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᎥᏝ ᏱᎬᏳᎪᎢ; ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᎥᏝ ᏯᏢᏆᏍᎪᎢ; ᎥᏝ ᎤᏟ ᏳᏕᏋᎯᏍᏙᎢ;
Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te,
5 ᎥᏝ ᎤᏕᎰᎯᏍᏗ ᏱᎾᏛᏁᎰᎢ; ᎥᏝ ᎤᏩᏒᏉ ᎤᏤᎵ ᏳᏲᎰᎢ; ᎥᏝ ᏳᏔᎳᏬᎯᏌᏙᎢ; ᎥᏝ ᎤᏲ ᏯᏓᎳᏫᏎᎰᎢ;
ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe.
6 ᎥᏝ ᏯᎵᎮᎵᎪ ᎤᏲ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒᎢ, ᏚᏳᎪᏛᏍᎩᏂ ᎨᏒ ᎾᎿᎭᎠᎵᎮᎵᎪᎢ;
Bolingo eyokaka mawa liboso ya bozangi bosembo, kasi esepelaka na bosolo.
7 ᎤᏁᎳᎩᏉ ᎡᎵᏍᎪ ᏂᎦᎥ ᎪᎱᏍᏗ; ᎪᎯᏳᎲᏍᎪ ᏂᎦᎥ ᎪᎱᏍᏗ; ᏂᎦᎥᏉ ᎪᎱᏍᏗ ᎤᏚᎩ ᎤᏩᏐᎢ; ᎬᏂᏗᏳ ᎨᏐ ᏂᎦᎥᎢ.
Tango nyonso mpe na makambo nyonso, bolingo elimbisaka, endimaka, ezalaka na elikya, eyikaka mpiko.
8 ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᎠᎵᏛᏗᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ; ᎠᏙᎴᎰᎯᏍᏗᏍᎩᏂ ᎨᏒ ᏛᎵᏛᏔᏂᏉ; ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏗᎦᏬᏂᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏙᏓᎦᎶᏐᏂ; ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎾᏍᏉ ᎨᏒ ᏛᎵᏛᏔᏂ.
Bolingo ekotikala kokufa te. Kasi masakoli ekokatana, nkota ekosila, boyebi ekolimwa.
9 ᎢᎦᏛᏉᏰᏃ ᎨᏒ ᎢᏗᎦᏔᎭ, ᎠᎴ ᎢᎦᏛᏉ ᎨᏒ ᎢᏓᏙᎴᎰᏍᎦ;
Pamba te toyebaka kaka moke, mpe tosakolaka kaka moke.
10 ᎠᎧᎵᎢᏍᎩᏂ ᎨᏒ ᎠᎵᏰᎢᎶᎸᎭ, ᎿᎭᏉ ᎾᏍᎩ ᎢᎦᏛᏉ ᎨᏒ ᏛᎵᏛᏔᏂ.
Kasi tango kokokisama ekokoma, oyo ezali moke ekolimwa.
11 ᏥᏲᎵ ᏥᎨᏒᎩ ᎠᏲᎵ ᎤᏬᏂᎯᏍᏗ ᏥᏬᏂᏍᎬᎩ, ᎠᏲᎵ ᎤᏬᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎪᎵᎬᎩ, ᎠᏲᎵ ᎤᏓᏅᏖᏗ ᎨᏒ ᎦᏓᏅᏖᏍᎬᎩ; ᎠᏆᏛᏅᏍᎩᏂ ᎿᎭᏉ ᎾᏆᎵᏍᏔᏅ, ᎠᏲᎵ ᏧᏤᎵ ᎨᏒ ᎢᏴᏛ ᏂᏓᏋᏁᎸᎩ.
Tango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nazalaki kokanisa lokola mwana moke, mpe nazalaki na mayele lokola ya mwana moke; kasi tango nakomaki mokolo, natikaki oyo ekoki na mwana moke.
12 ᎪᎯᏰᏃ ᎨᏒ ᎤᏍᎪᎸ ᎢᏗᎪᏩᏗᎭ ᎠᏓᎨᏗᏱ; ᎾᎯᏳᏍᎩᏂ ᎨᏎᏍᏗ ᏕᎦᎧᏛ ᏙᏓᏓᏓᎪᎯ; ᎪᎯ ᎨᏒ ᎢᎦᏛᏉ ᏥᎦᏔᎭ; ᎾᎯᏳᏍᎩᏂ ᎨᏎᏍᏗ ᏥᎦᏔᎮᏍᏗ ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᎥᎩᎦᏔᎲᎢ.
Solo, sik’oyo, tozali komona kaka elilingi, lokola kati na talatala; kasi mokolo ezali, mokolo oyo tokomona penza ndenge esengeli. Sik’oyo nayebi kaka moke; kasi mokolo ezali, mokolo oyo nakoyeba penza nyonso, ndenge Nzambe ayebi ngai.
13 ᎪᎯᏃ ᎨᏒ ᎠᏁᎭ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᏚᎩ ᎬᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒᎢ, ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏦᎢ; ᏭᏓᎪᎾᏛᏛᏍᎩᏂ ᎦᎸᏉᏗ ᎬᏒ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒᎢ.
Boye sik’oyo, makambo oyo misato ezali kowumela: kondima, elikya mpe bolingo; kasi kati na yango, likambo oyo eleki monene ezali nde bolingo.

< ᎪᎵᏂᏗᏱ ᎠᏁᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᎨᎪᏪᎳᏁᎸᎯ 13 >