< ԳՈՐԾՔ ԱՌԱՔԵԼՈՑ 18 >

1 Ասկէ ետք Պօղոս՝ հեռանալով Աթէնքէն՝ եկաւ Կորնթոս,
Sima na yango, Polo atikaki Ateni mpe akendeki na Kolinto.
2 գտաւ Հրեայ մը՝ Ակիւղաս անունով, ծնունդով՝ Պոնտացի, որ իր Պրիսկիղա կնոջ հետ նոր եկած էր Իտալիայէն (քանի որ Կղօդիոս պատուիրած էր բոլոր Հրեաներուն՝ հեռանալ Հռոմէն), եւ գնաց անոնց քով:
Kuna, akutanaki na Moyuda moko, kombo na ye ezalaki « Akilasi. » Azalaki moto ya mboka Ponti. Akilasi awutaki koya kala te longwa na Itali, elongo na mwasi na ye, Prisile, pamba te mokonzi Klode apesaki mitindo ete Bayuda nyonso balongwa na Rome. Boye, Polo akendeki kotala bango;
3 Քանի ինք արհեստակից էր, անոնց քով բնակեցաւ եւ աշխատեցաւ, որովհետեւ արհեստով վրանագործ էին:
mpe lokola Polo azalaki kosala mosala moko na bango, mosala ya kosala bandako ya kapo, avandaki epai na bango mpe akomaki kosala elongo na bango.
4 Իսկ ամէն Շաբաթ օր կը խօսէր ժողովարանին մէջ, եւ կը համոզէր Հրեաներն ու Յոյները:
Mikolo nyonso ya Saba, Polo azalaki koteya kati na ndako ya mayangani mpe azalaki koluka kondimisa Bayuda mpe bato ya Grese.
5 Երբ Շիղա եւ Տիմոթէոս իջան Մակեդոնիայէն, Պօղոս հոգիի կսկիծով կը վկայէր Հրեաներուն թէ Յիսուս՝ Քրիստո՛սն է:
Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka na koteya Liloba mpe kotalisa solo epai ya Bayuda ete Yesu azali Klisto.
6 Բայց երբ անոնք ընդդիմացան ու կը հայհոյէին, իր հանդերձները թօթուելով՝ ըսաւ անոնց. «Ձեր արիւնը ձեր գլո՛ւխը ըլլայ, ես անպարտ եմ. ասկէ ետք՝ հեթանոսներո՛ւն պիտի երթամ»:
Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki: — Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
7 Եւ մեկնելով անկէ՝ մտաւ Յուստոս անունով մէկու մը տունը, որ աստուածապաշտ էր. անոր տունը ժողովարանին կից էր:
Boye, Polo atikaki bango mpe akendeki na ndako ya Titisi Yusitusi, mogumbameli ya Nzambe, oyo ndako na ye ezalaki pembeni ya ndako ya mayangani.
8 Ժողովարանին պետը՝ Կրիսպոս՝ հաւատաց Տէրոջ իր ամբողջ ընտանիքով: Կորնթացիներէն շատեր ալ լսելով՝ հաւատացին ու մկրտուեցան:
Krispisi, mokambi ya ndako ya mayangani, elongo na libota na ye mobimba bazalaki na kondima epai ya Nkolo; mpe bato mingi ya Kolinto oyo bazalaki koyoka Polo bakomaki bandimi ya Nkolo mpe bazwaki libatisi.
9 Գիշերը տեսիլքի մէջ Տէրը ըսաւ Պօղոսի. «Մի՛ վախնար, հապա խօսէ՛ եւ լուռ մի՛ կենար.
Mokolo moko, na butu, Nkolo alobaki na Polo kati na emoniseli: Kobanga te, koba kaka koloba, kokanga monoko te.
10 որովհետեւ ես քեզի հետ եմ, ու ո՛չ մէկը ձեռքը վրադ պիտի դնէ՝ քեզի վնասելու համար. քանի որ ես շատ ժողովուրդ ունիմ այս քաղաքին մէջ»:
Nazali na yo elongo, mpe moto moko te akolonga kobundisa yo mpe kosala yo mabe, pamba te nazali na bato mingi kati na engumba oyo.
11 Հոն տարի մը ու վեց ամիս կեցաւ, եւ Աստուծոյ խօսքը կը սորվեցնէր անոնց մէջ:
Boye, Polo avandaki na Kolinto, mobu moko na ndambo, mpe azalaki koteya bango Liloba na Nzambe.
12 Աքայիայի փոխ-հիւպատոսին՝ Գաղիոնի օրերը, Հրեաները միաբանելով՝ ըմբոստացան Պօղոսի դէմ, եւ դատարանը տարին զայն՝
Wana Galioni azalaki moyangeli ya Akayi, Bayuda bayokanaki mpo na kokanga Polo, mpe bamemaki ye na esambiselo
13 ըսելով. «Ասիկա կը համոզէ մարդիկը՝ որ պաշտեն Աստուած Օրէնքին հակառակ կերպով»:
mpe bafundaki ye boye: — Moto oyo azali koluka kondimisa bato ete bagumbamela Nzambe na lolenge oyo mibeko epekisa.
14 Երբ Պօղոս պիտի բանար իր բերանը, Գաղիոն ըսաւ Հրեաներուն. «Եթէ անիրաւութեան մը կամ չար լրբութեան մը համար ըլլար, ո՛վ Հրեաներ, կ՚արժէր որ հանդուրժէի ձեզի.
Tango kaka Polo alingaki koloba, Galioni alobaki na Bayuda: — Bino Bayuda, soki moto oyo asalaki mabe to likambo moko ya sembo te, nalingaki solo koyokela bino.
15 բայց եթէ հարցը՝ խօսքի, անուններու եւ ձեր Օրէնքին մասին է, դուք ձեզմէ՛ տեսէք դատը. որովհետեւ ես չեմ փափաքիր այդպիսի բաներու դատաւոր ըլլալ».
Kasi lokola ezali kaka likambo ya tembe na tina na makambo oyo etali maloba, bakombo mpe mibeko na bino, wana etali kaka bino moko; ngai naboyi kozala mosambisi ya makambo ya boye.
16 ու զանոնք վռնտեց դատարանէն:
Boye, abenganaki bango na esambiselo.
17 Ուստի բոլոր Յոյները բռնեցին Սոսթենէսը, ժողովարանին պետը, եւ ծեծեցին դատարանին առջեւ: Բայց Գաղիոն բնա՛ւ հոգ չէր ըներ այս մասին:
Mpe bango nyonso bakangaki Sositeni, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe babetaki ye liboso ya esambiselo. Kasi Galioni atalaki yango se pamba.
18 Իսկ Պօղոս, տակաւին շատ օրեր հոն մնալէ ետք, հրաժեշտ առաւ եղբայրներէն ու նաւարկեց դէպի Սուրիա - Պրիսկիղա եւ Ակիւղաս ալ իրեն հետ -, նախապէս իր գլուխը խուզած ըլլալով Կենքրեայի մէջ, որովհետեւ ուխտ ըրած էր:
Polo avandaki lisusu mwa mikolo na Kolinto. Bongo, atikaki bandeko, akotaki na masuwa mpe akendeki na Siri elongo na Prisile mpe Akilasi. Liboso na Polo kolongwa na libongo ya Sankresi, akokolisaki suki ya moto na ye, pamba te alapaki ndayi.
19 Երբ հասաւ Եփեսոս՝ հոն ձգեց զանոնք, իսկ ինք մտնելով ժողովարանը՝ կը խօսէր Հրեաներուն հետ:
Tango bakomaki na Efeso, Polo atikaki Akila mpe Prisile. Akendeki ye moko na ndako ya mayangani mpo na kosolola na Bayuda.
20 Իրեն թախանձեցին որ աւելի՛ երկար ժամանակ մնայ իրենց քով. բայց չհաւանեցաւ,
Basengaki ete awumela mwa mikolo elongo na bango, kasi Polo aboyaki.
21 հապա հրաժեշտ առաւ անոնցմէ՝ ըսելով. «Պէտք է որ անպատճառ այս յառաջիկայ տօնը կատարեմ Երուսաղէմի մէջ, բայց՝՝ Աստուծոյ կամքով դարձեալ պիտի վերադառնամ ձեզի»: Ու Եփեսոսէն նաւարկեց
Atikaki bango na koloba: — Nakozongela bino lisusu, soki Nzambe alingi. Wuta na Efeso, azwaki masuwa mpe akendeki.
22 եւ Կեսարիա հասնելով՝ Երուսաղէմ բարձրացաւ, բարեւեց եկեղեցին, ու յետոյ իջաւ Անտիոք:
Tango akomaki na Sezarea, amataki na Yelusalemi mpo na kopesa Lingomba mbote; sima, akendeki na Antioshe.
23 Ժամանակ մը հոն կենալէ ետք՝ մեկնեցաւ, եւ կարգով Գաղատացիներուն երկիրն ու Փռիւգիա կը շրջէր՝ բոլոր աշակերտները ամրացնելով:
Sima na Polo kovanda mwa mikolo na Antioshe, alongwaki kuna mpe alekaki na etuka ya Galatia mpe ya Friji, na kolendisa bayekoli nyonso.
24 Ապողոս անունով Հրեայ մը, ծնունդով՝ Աղեքսանդրացի, ճարտասան մարդ մը՝ որ հմուտ էր Սուրբ Գիրքերուն, եկաւ հասաւ Եփեսոս:
Moyuda moko ayaki na Efeso, kombo na ye ezalaki « Apolosi. » Abotamaki na Alekizandri, ayebaki koloba malamu mpe ayebaki bozindo ya Makomi.
25 Ան կրթուած էր Տէրոջ ճամբային մէջ, ու եռանդուն հոգիով՝ կը խօսէր եւ ճշգրտութեամբ կը սորվեցնէր Տէրոջ մասին. բայց ինք գիտէր միայն Յովհաննէսի մկրտութիւնը:
Bateyaki ye nzela ya Nkolo; mpe, lokola azalaki molende, azalaki koloba mpe kolakisa na bosolo makambo oyo etali Yesu atako ayebaki kaka libatisi ya Yoane.
26 Ան սկսաւ ժողովարանին մէջ քարոզել համարձակութեամբ: Երբ Ակիւղաս ու Պրիսկիղա լսեցին զայն՝ իրենց քով առին զինք, եւ աւելի ճշգրտութեամբ բացատրեցին իրեն Աստուծոյ ճամբան:
Abandaki koloba na molende nyonso kati na ndako ya mayangani. Kasi tango Prisile mpe Akilasi bayokaki ye, babengisaki ye na ndako na bango mpe balimbolelaki ye malamu penza nzela ya Nzambe.
27 Երբ ան փափաքեցաւ երթալ Աքայիա, եղբայրները նամակ գրեցին ու խրախուսեցին այնտեղի աշակերտները՝ որ ընդունին զինք: Եւ հոն հասնելով՝ Աստուծոյ շնորհքով շատ օգտակար եղաւ հաւատացեալներուն.
Lokola Apolosi azalaki na likanisi ya kokende na Akayi, bandeko balendisaki ye mpe bakomelaki bayekoli ya Kolinto ete bayamba ye malamu. Tango akomaki kuna, na ngolu na Nzambe, azalaki lisungi monene mpo na bato oyo bakomaki bandimi,
28 քանի որ հրապարակաւ ուժգնօրէն կը համոզէր Հրեաները, Սուրբ Գիրքերէն ցոյց տալով թէ Յիսուս՝ Քրիստո՛սն է:
pamba te maloba na ye ezalaki kosukisa tembe ya Bayuda na miso ya bato nyonso, mpe azalaki kotalisa na polele, na nzela ya Makomi, ete Yesu azali Klisto.

< ԳՈՐԾՔ ԱՌԱՔԵԼՈՑ 18 >