< اَلْمَزَامِيرُ 51 >

لِإِمَامِ ٱلْمُغَنِّينَ. مَزْمُورٌ لِدَاوُدَ عِنْدَمَا جَاءَ إِلَيْهِ نَاثَانُ ٱلنَّبِيُّ بَعْدَ مَا دَخَلَ إِلَى بَثْشَبَعَ اِرْحَمْنِي يَا ٱللهُ حَسَبَ رَحْمَتِكَ. حَسَبَ كَثْرَةِ رَأْفَتِكَ ٱمْحُ مَعَاصِيَّ. ١ 1
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki tango mosakoli Natan akomaki epai ya Davidi sima na ye kosala ekobo elongo na Batisheba. Oh Nzambe, yokela ngai mawa kolanda bolingo monene na Yo; longola masumu na ngai kolanda mawa monene na Yo!
ٱغْسِلْنِي كَثِيرًا مِنْ إِثْمِي، وَمِنْ خَطِيَّتِي طَهِّرْنِي. ٢ 2
Sukola ngai mobimba mpo na kolongola mabe na ngai, mpe petola ngai na masumu na ngai.
لِأَنِّي عَارِفٌ بِمَعَاصِيَّ، وَخَطِيَّتِي أَمَامِي دَائِمًا. ٣ 3
Pamba te nayebi mabe na ngai, mpe masumu na ngai ezalaka tango nyonso liboso na ngai.
إِلَيْكَ وَحْدَكَ أَخْطَأْتُ، وَٱلشَّرَّ قُدَّامَ عَيْنَيْكَ صَنَعْتُ، لِكَيْ تَتَبَرَّرَ فِي أَقْوَالِكَ، وَتَزْكُوَ فِي قَضَائِكَ. ٤ 4
Epai na Yo, epai na Yo kaka, nasali masumu mpe mabe na miso na Yo. Boye, okozala sembo tango okozwa mokano, mpe okozala na pamela te tango okokata makambo.
هَأَنَذَا بِٱلْإِثْمِ صُوِّرْتُ، وَبِٱلْخَطِيَّةِ حَبِلَتْ بِي أُمِّي. ٥ 5
Solo, nabotamaki kati na lisumu; wuta na libumu ya mama na ngai, nazali mosumuki.
هَا قَدْ سُرِرْتَ بِٱلْحَقِّ فِي ٱلْبَاطِنِ، فَفِي ٱلسَّرِيرَةِ تُعَرِّفُنِي حِكْمَةً. ٦ 6
Nzokande Yo, osepelaka na bosembo, ata kati na libumu; mpe okoteya ngai bwanya kati na esika ebombama.
طَهِّرْنِي بِٱلزُّوفَا فَأَطْهُرَ. ٱغْسِلْنِي فَأَبْيَضَّ أَكْثَرَ مِنَ ٱلثَّلْجِ. ٧ 7
Petola ngai na nzela ya izope, mpe nakokoma peto; sukola ngai, mpe nakokoma pembe koleka mvula ya pembe.
أَسْمِعْنِي سُرُورًا وَفَرَحًا، فَتَبْتَهِجَ عِظَامٌ سَحَقْتَهَا. ٨ 8
Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema; mpe mikuwa na ngai oyo obukaki ekosepela makasi.
ٱسْتُرْ وَجْهَكَ عَنْ خَطَايَايَ، وَٱمْحُ كُلَّ آثَامِي. ٩ 9
Kotala lisusu masumu na ngai te, mpe longola bambeba na ngai nyonso.
قَلْبًا نَقِيًّا ٱخْلُقْ فِيَّ يَا ٱللهُ، وَرُوحًا مُسْتَقِيمًا جَدِّدْ فِي دَاخِلِي. ١٠ 10
Oh Nzambe, mpo na ngai, kela motema ya peto; mpe kati na ngai, yeisa molimo sika mpe elenda.
لَا تَطْرَحْنِي مِنْ قُدَّامِ وَجْهِكَ، وَرُوحَكَ ٱلْقُدُّوسَ لَا تَنْزِعْهُ مِنِّي. ١١ 11
Kobengana ngai te mosika ya elongi na Yo, mpe kolongola te kati na ngai Molimo Mosantu na Yo.
رُدَّ لِي بَهْجَةَ خَلَاصِكَ، وَبِرُوحٍ مُنْتَدِبَةٍ ٱعْضُدْنِي. ١٢ 12
Zongisela ngai esengo ya lobiko na Yo, mpe kabela ngai molimo oyo emibongisi malamu mpo na kolendisaka ngai.
فَأُعَلِّمَ ٱلْأَثَمَةَ طُرُقَكَ، وَٱلْخُطَاةُ إِلَيْكَ يَرْجِعُونَ. ١٣ 13
Nakoteya banzela na Yo epai ya babuki mibeko, mpe bato ya masumu bakozonga epai na Yo.
نَجِّنِي مِنَ ٱلدِّمَاءِ يَا ٱللهُ، إِلَهَ خَلَاصِي، فَيُسَبِّحَ لِسَانِي بِرَّكَ. ١٤ 14
Oh Nzambe! Nzambe, Mobikisi na ngai, kangola ngai wuta na mokumba ya makila, mpe lolemo na ngai ekosakola bosembo na Yo.
يَارَبُّ ٱفْتَحْ شَفَتَيَّ، فَيُخْبِرَ فَمِي بِتَسْبِيحِكَ. ١٥ 15
Nkolo, fungola bibebu na ngai, mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
لِأَنَّكَ لَا تُسَرُّ بِذَبِيحَةٍ وَإِلَّا فَكُنْتُ أُقَدِّمُهَا. بِمُحْرَقَةٍ لَا تَرْضَى. ١٦ 16
Mpo ete osepelaka na mbeka te, nakobonza te mbeka ya kotumba oyo ondimaka te.
ذَبَائِحُ ٱللهِ هِيَ رُوحٌ مُنْكَسِرَةٌ. ٱلْقَلْبُ ٱلْمُنْكَسِرُ وَٱلْمُنْسَحِقُ يَا ٱللهُ لَا تَحْتَقِرُهُ. ١٧ 17
Nzambe, bambeka oyo osepelaka na yango ezali: molimo oyo ebukani. Nzambe, oyinaka te motema oyo etutami mpe emikitisi.
أَحْسِنْ بِرِضَاكَ إِلَى صِهْيَوْنَ. ٱبْنِ أَسْوَارَ أُورُشَلِيمَ. ١٨ 18
Na ngolu na Yo, salela Siona bolamu, tonga bamir ya Yelusalemi.
حِينَئِذٍ تُسَرُّ بِذَبَائِحِ ٱلْبِرِّ، مُحْرَقَةٍ وَتَقْدِمَةٍ تَامَّةٍ. حِينَئِذٍ يُصْعِدُونَ عَلَى مَذْبَحِكَ عُجُولًا. ١٩ 19
Bongo okosepela na bambeka ya bosembo, bambeka ya kotumba mpe makabo ya kokoka; mpe bangombe ya mibali ekobonzama na bitumbelo na Yo.

< اَلْمَزَامِيرُ 51 >