< اَلْمَزَامِيرُ 44 >

لِإِمَامِ ٱلْمُغَنِّينَ. لِبَنِي قُورَحَ. قَصِيدَةٌ اَللَّهُمَّ، بِآذَانِنَا قَدْ سَمِعْنَا. آبَاؤُنَا أَخْبَرُونَا بِعَمَلٍ عَمِلْتَهُ فِي أَيَّامِهِمْ، فِي أَيَّامِ ٱلْقِدَمِ. ١ 1
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzambe, toyokaki na matoyi na biso; bakoko na biso babetelaki biso lisolo ya makambo oyo osalaki na tango na bango, na tango ya kala.
أَنْتَ بِيَدِكَ ٱسْتَأْصَلْتَ ٱلْأُمَمَ وَغَرَسْتَهُمْ. حَطَّمْتَ شُعُوبًا وَمَدَدْتَهُمْ. ٢ 2
Na nguya na Yo, obenganaki bikolo mpe otiaki bakoko na biso; obetaki bikolo ya bapaya mpe ofulukisaki bakoko na biso.
لِأَنَّهُ لَيْسَ بِسَيْفِهِمْ ٱمْتَلَكُوا ٱلْأَرْضَ، وَلَا ذِرَاعُهُمْ خَلَّصَتْهُمْ، لَكِنْ يَمِينُكَ وَذِرَاعُكَ وَنُورُ وَجْهِكَ، لِأَنَّكَ رَضِيتَ عَنْهُمْ. ٣ 3
Pamba te ezalaki na mopanga na bango te nde babotolaki mokili, ezalaki mpe maboko na bango te nde ebikisaki bango; kasi ezalaki nde loboko na Yo ya mobali, nguya na Yo mpe pole ya elongi na Yo, pamba te ozalaki kolinga bango.
أَنْتَ هُوَ مَلِكِي يَا ٱللهُ، فَأْمُرْ بِخَلَاصِ يَعْقُوبَ. ٤ 4
Oh Nzambe, Yo oyo ozali Mokonzi na ngai, pesa mitindo mpo na elonga ya Jakobi.
بِكَ نَنْطَحُ مُضَايِقِينَا. بِٱسْمِكَ نَدُوسُ ٱلْقَائِمِينَ عَلَيْنَا. ٥ 5
Na lisungi na Yo, tolongaka banguna na biso, mpe na Kombo na Yo, tonyataka bayini na biso.
لِأَنِّي عَلَى قَوْسِي لَا أَتَّكِلُ، وَسَيْفِي لَا يُخَلِّصُنِي. ٦ 6
Pamba te natiaka elikya te na tolotolo na ngai, mpe mopanga na ngai ebikisaka ngai te.
لِأَنَّكَ أَنْتَ خَلَّصْتَنَا مِنْ مُضَايِقِينَا، وَأَخْزَيْتَ مُبْغِضِينَا. ٧ 7
Kasi ezali Yo nde obikisaka biso wuta na maboko ya bayini na biso, mpe oyokisaka bayini na biso soni.
بِٱللهِ نَفْتَخِرُ ٱلْيَوْمَ كُلَّهُ، وَٱسْمَكَ نَحْمَدُ إِلَى ٱلدَّهْرِ. سِلَاهْ. ٨ 8
Tomikumisaka mikolo nyonso kati na Nzambe mpe tokokumisa Kombo na Yo mpo na libela.
لَكِنَّكَ قَدْ رَفَضْتَنَا وَأَخْجَلْتَنَا، وَلَا تَخْرُجُ مَعَ جُنُودِنَا. ٩ 9
Kasi obwaki biso, oyokisi biso soni mpe ozali lisusu kotambola te elongo na mampinga na biso.
تُرْجِعُنَا إِلَى ٱلْوَرَاءِ عَنِ ٱلْعَدُوِّ، وَمُبْغِضُونَا نَهَبُوا لِأَنْفُسِهِمْ. ١٠ 10
Otiki biso kokima liboso ya banguna na biso; mpe bayini na biso bazwi biloko na biso na makasi.
جَعَلْتَنَا كَٱلضَّأْنِ أُكْلًا. ذَرَّيْتَنَا بَيْنَ ٱلْأُمَمِ. ١١ 11
Osundoli biso na maboko na bango lokola bameme ya koboma mpe opanzi biso kati na bikolo.
بِعْتَ شَعْبَكَ بِغَيْرِ مَالٍ، وَمَا رَبِحْتَ بِثَمَنِهِمْ. ١٢ 12
Oteki bato na Yo na pamba mpe ozwi ata litomba te kowuta na boteki yango.
تَجْعَلُنَا عَارًا عِنْدَ جِيرَانِنَا، هُزْأَةً وَسُخْرَةً لِلَّذِينَ حَوْلَنَا. ١٣ 13
Okomisi biso eloko ya lisuma na miso ya bato oyo bazali pembeni na biso, eloko ya litio mpe ya liseki na miso ya bato oyo bazali zingazinga na biso.
تَجْعَلُنَا مَثَلًا بَيْنَ ٱلشُّعُوبِ. لِإِنْغَاضِ ٱلرَّأْسِ بَيْنَ ٱلْأُمَمِ. ١٤ 14
Okomisi biso lisapo kati na bikolo, mpe bato bakomi koningisa mito na bango mpo na biso.
ٱلْيَوْمَ كُلَّهُ خَجَلِي أَمَامِي، وَخِزْيُ وَجْهِي قَدْ غَطَّانِي. ١٥ 15
Kosambwa ekomi tango nyonso liboso na ngai mpe soni ezipi elongi na ngai,
مِنْ صَوْتِ ٱلْمُعَيِّرِ وَٱلشَّاتِمِ. مِنْ وَجْهِ عَدُوٍّ وَمُنْتَقِمٍ. ١٦ 16
mpo na litio ya bato oyo bazali kofinga mpe kopamela ngai, mpe ya monguna oyo akangela ngai kanda.
هَذَا كُلُّهُ جَاءَ عَلَيْنَا، وَمَا نَسِينَاكَ وَلَا خُنَّا فِي عَهْدِكَ. ١٧ 17
Makambo wana nyonso ekweyeli biso atako tobosanaki Yo te mpe tobebisaki Boyokani na Yo te,
لَمْ يَرْتَدَّ قَلْبُنَا إِلَى وَرَاءٍ، وَلَا مَالَتْ خَطْوَتُنَا عَنْ طَرِيقِكَ، ١٨ 18
atako mitema na biso epengwaki te mpe totamboli libanda ya nzela na Yo te.
حَتَّى سَحَقْتَنَا فِي مَكَانِ ٱلتَّنَانِينِ، وَغَطَّيْتَنَا بِظِلِّ ٱلْمَوْتِ. ١٩ 19
Pamba te onyokolaki biso kati na etando ya bambwa ya zamba mpe ozipaki biso na molili makasi.
إِنْ نَسِينَا ٱسْمَ إِلَهِنَا أَوْ بَسَطْنَا أَيْدِيَنَا إِلَى إِلَهٍ غَرِيبٍ، ٢٠ 20
Soki tobosanaki Kombo ya Nzambe na biso to totombolaki maboko na biso epai ya nzambe ya mopaya,
أَفَلَا يَفْحَصُ ٱللهُ عَنْ هَذَا؟ لِأَنَّهُ هُوَ يَعْرِفُ خَفِيَّاتِ ٱلْقَلْبِ. ٢١ 21
boni, Nzambe na biso alingaki koyeba yango te, lokola asosolaka mozindo ya mitema?
لِأَنَّنَا مِنْ أَجْلِكَ نُمَاتُ ٱلْيَوْمَ كُلَّهُ. قَدْ حُسِبْنَا مِثْلَ غَنَمٍ لِلذَّبْحِ. ٢٢ 22
Pamba te, likolo na Yo, babomaka biso mikolo nyonso mpe bazwaka biso lokola bameme ya koboma.
اِسْتَيْقِظْ! لِمَاذَا تَتَغَافَى يَارَبُّ؟ ٱنْتَبِهْ! لَا تَرْفُضْ إِلَى ٱلْأَبَدِ. ٢٣ 23
Nkolo, lamuka! Mpo na nini ozali kolala? Lamuka, kobwaka biso te mpo na libela.
لِمَاذَا تَحْجُبُ وَجْهَكَ وَتَنْسَى مَذَلَّتَنَا وَضِيقَنَا؟ ٢٤ 24
Yawe, mpo na nini ozali kobomba elongi na Yo? Mpo na nini ozali kobosana pasi mpe minyoko na biso?
لِأَنَّ أَنْفُسَنَا مُنْحَنِيَةٌ إِلَى ٱلتُّرَابِ. لَصِقَتْ فِي ٱلْأَرْضِ بُطُونُنَا. ٢٥ 25
Pamba te tokweyi na putulu, mpe nzoto na biso ekangami na mabele.
قُمْ عَوْنًا لَنَا وَٱفْدِنَا مِنْ أَجْلِ رَحْمَتِكَ. ٢٦ 26
Telema, yaka kosunga biso, kangola biso mpo na bolingo na Yo!

< اَلْمَزَامِيرُ 44 >