< اَلْمَزَامِيرُ 115 >

لَيْسَ لَنَا يَارَبُّ لَيْسَ لَنَا، لَكِنْ لِٱسْمِكَ أَعْطِ مَجْدًا، مِنْ أَجْلِ رَحْمَتِكَ مِنْ أَجْلِ أَمَانَتِكَ. ١ 1
Na biso te, Yawe, na biso te, kasi pesa nkembo na Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo.
لِمَاذَا يَقُولُ ٱلْأُمَمُ: «أَيْنَ هُوَ إِلَهُهُمْ؟». ٢ 2
Mpo na nini bikolo eloba: « Wapi Nzambe na bango? »
إِنَّ إِلَهَنَا فِي ٱلسَّمَاءِ. كُلَّمَا شَاءَ صَنَعَ. ٣ 3
Nzambe na biso azali na Lola, asalaka nyonso oyo alingi.
أَصْنَامُهُمْ فِضَّةٌ وَذَهَبٌ، عَمَلُ أَيْدِي ٱلنَّاسِ. ٤ 4
Kasi banzambe na bango ya bikeko ezali ya palata mpe ya wolo, esalema na maboko ya bato.
لَهَا أَفْوَاهٌ وَلَا تَتَكَلَّمُ. لَهَا أَعْيُنٌ وَلَا تُبْصِرُ. ٥ 5
Ezali na minoko, kasi elobaka te; ezali na miso, kasi emonaka te;
لَهَا آذَانٌ وَلَا تَسْمَعُ. لَهَا مَنَاخِرُ وَلَا تَشُمُّ. ٦ 6
ezali na matoyi, kasi eyokaka te; ezali na zolo, kasi eyokaka solo te;
لَهَا أَيْدٍ وَلَا تَلْمِسُ. لَهَا أَرْجُلٌ وَلَا تَمْشِي، وَلَا تَنْطِقُ بِحَنَاجِرِهَا. ٧ 7
ezali na maboko, kasi esimbaka te; ezali na makolo, kasi etambolaka te. Minoko na yango ebimisaka ata makelele te.
مِثْلَهَا يَكُونُ صَانِعُوهَا، بَلْ كُلُّ مَنْ يَتَّكِلُ عَلَيْهَا. ٨ 8
Bato oyo basalaka yango mpe bato nyonso oyo batielaka yango motema bakokani na yango.
يَا إِسْرَائِيلُ، ٱتَّكِلْ عَلَى ٱلرَّبِّ. هُوَ مُعِينُهُمْ وَمِجَنُّهُمْ. ٩ 9
Bana ya Isalaele, botia elikya kati na Yawe! Azali lisungi mpe nguba na bango.
يَا بَيْتَ هَارُونَ، ٱتَّكِلُوا عَلَى ٱلرَّبِّ. هُوَ مُعِينُهُمْ وَمِجَنُّهُمْ. ١٠ 10
Bakitani ya Aron, botia elikya kati na Yawe! Azali lisungi mpe nguba na bino.
يَا مُتَّقِي ٱلرَّبِّ، ٱتَّكِلُوا عَلَى ٱلرَّبِّ. هُوَ مُعِينُهُمْ وَمِجَنُّهُمْ. ١١ 11
Bino bato oyo botosaka Yawe, botia elikya kati na Yawe. Azali lisungi mpe nguba na bango.
ٱلرَّبُّ قَدْ ذَكَرَنَا فَيُبَارِكُ. يُبَارِكُ بَيْتَ إِسْرَائِيلَ. يُبَارِكُ بَيْتَ هَارُونَ. ١٢ 12
Yawe akanisaka biso, akopambola; solo, akopambola bana ya Isalaele, akopambola bakitani ya Aron.
يُبَارِكُ مُتَّقِي ٱلرَّبِّ، ٱلصِّغَارَ مَعَ ٱلْكِبَارِ. ١٣ 13
Akopambola bato oyo batosaka Yawe kobanda na bato pamba kino na bato minene.
لِيَزِدِ ٱلرَّبُّ عَلَيْكُمْ، عَلَيْكُمْ وَعَلَى أَبْنَائِكُمْ. ١٤ 14
Tika ete Yawe afulukisa bino, bino mpe bana na bino!
أَنْتُمْ مُبَارَكُونَ لِلرَّبِّ ٱلصَّانِعِ ٱلسَّمَاوَاتِ وَٱلْأَرْضِ. ١٥ 15
Tika ete Yawe apambola bino, Ye oyo asala likolo mpe mabele.
ٱلسَّمَاوَاتُ سَمَاوَاتٌ لِلرَّبِّ، أَمَّا ٱلْأَرْضُ فَأَعْطَاهَا لِبَنِي آدَمَ. ١٦ 16
Likolo ezali likolo ya Yawe; kasi apesa mabele epai ya bato.
لَيْسَ ٱلْأَمْوَاتُ يُسَبِّحُونَ ٱلرَّبَّ، وَلَا مَنْ يَنْحَدِرُ إِلَى أَرْضِ ٱلسُّكُوتِ. ١٧ 17
Ezali te bakufi nde bakumisaka Yawe, pamba te bango nyonso bakendaka na esika ya kimia.
أَمَّا نَحْنُ فَنُبَارِكُ ٱلرَّبَّ مِنَ ٱلْآنَ وَإِلَى ٱلدَّهْرِ. هَلِّلُويَا. ١٨ 18
Kasi biso, tokopambola Yawe, kobanda sik’oyo kino libela na libela. Bokumisa Yawe!

< اَلْمَزَامِيرُ 115 >