< أَمْثَالٌ 21 >

قَلْبُ ٱلْمَلِكِ فِي يَدِ ٱلرَّبِّ كَجَدَاوِلِ مِيَاهٍ، حَيْثُمَا شَاءَ يُمِيلُهُ. ١ 1
Kati na loboko na Yawe, motema ya mokonzi ezalaka lokola moluka oyo atindaka esika nyonso oyo alingi.
كُلُّ طُرُقِ ٱلْإِنْسَانِ مُسْتَقِيمَةٌ فِي عَيْنَيْهِ، وَٱلرَّبُّ وَازِنُ ٱلْقُلُوبِ. ٢ 2
Nzela nyonso ya moto emonanaka alima na miso na ye, kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.
فِعْلُ ٱلْعَدْلِ وَٱلْحَقِّ أَفْضَلُ عِنْدَ ٱلرَّبِّ مِنَ ٱلذَّبِيحَةِ. ٣ 3
Na miso na Yawe, kosala makambo ya sembo mpe ya alima ezali motuya koleka bambeka ya kotumba.
طُمُوحُ ٱلْعَيْنَيْنِ وَٱنْتِفَاخُ ٱلْقَلْبِ، نُورُ ٱلْأَشْرَارِ خَطِيَّةٌ. ٤ 4
Miso ya lofundu, motema ya lolendo mpe kongenga ya bato mabe ezali masumu.
أَفْكَارُ ٱلْمُجْتَهِدِ إِنَّمَا هِيَ لِلْخِصْبِ، وَكُلُّ عَجُولٍ إِنَّمَا هُوَ لِلْعَوَزِ. ٥ 5
Mabongisi ya moto oyo asalaka mosala ememaka ye na bomengo, kasi kozala motema moto-moto ememaka na kozanga.
جَمْعُ ٱلْكُنُوزِ بِلِسَانٍ كَاذِبٍ، هُوَ بُخَارٌ مَطْرُودٌ لِطَالِبِي ٱلْمَوْتِ. ٦ 6
Kozwa bomengo na nzela ya lokuta ezali kaka molinga oyo epanzanaka mpe motambo oyo ememaka na kufa.
اِغْتِصَابُ ٱلْأَشْرَارِ يَجْرُفُهُمْ، لِأَنَّهُمْ أَبَوْا إِجْرَاءَ ٱلْعَدْلِ. ٧ 7
Makambo ya bato mabe ebebisaka bango moko, pamba te baboyaka kosala makambo ya sembo.
طَرِيقُ رَجُلٍ مَوْزُورٍ هِيَ مُلْتَوِيَةٌ، أَمَّا ٱلزَّكِيُّ فَعَمَلُهُ مُسْتَقِيمٌ. ٨ 8
Nzela ya moto mabe ezalaka na mabaku, kasi mosala ya moto ya peto ezalaka sembo.
اَلسُّكْنَى فِي زَاوِيَةِ ٱلسَّطْحِ، خَيْرٌ مِنِ ٱمْرَأَةٍ مُخَاصِمَةٍ وَبَيْتٍ مُشْتَرِكٍ. ٩ 9
Kovanda na songe ya ndako ezali malamu koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.
نَفْسُ ٱلشِّرِّيرِ تَشْتَهِي ٱلشَّرَّ. قَرِيبُهُ لَا يَجِدُ نِعْمَةً فِي عَيْنَيْهِ. ١٠ 10
Molimo ya moto mabe elingaka kaka makambo mabe; ata moninga na ye penza azwaka ngolu te na miso na ye.
بِمُعَاقَبَةِ ٱلْمُسْتَهْزِئِ يَصِيرُ ٱلْأَحْمَقُ حَكِيمًا، وَٱلْحَكِيمُ بِٱلْإِرْشَادِ يَقْبَلُ مَعْرِفَةً. ١١ 11
Tango bapesaka motioli etumbu, zoba akomaka moto ya bwanya; mpe tango bapesaka malako epai ya moto ya bwanya, azwaka solo boyebi.
اَلْبَارُّ يَتَأَمَّلُ بَيْتَ ٱلشِّرِّيرِ وَيَقْلِبُ ٱلْأَشْرَارَ فِي ٱلشَّرِّ. ١٢ 12
Nzambe ya sembo atalaka na bokebi makambo oyo esalemaka kati na bandako ya bato mabe, mpe akweyisaka bango kati na pasi.
مَنْ يَسُدُّ أُذُنَيْهِ عَنْ صُرَاخِ ٱلْمِسْكِينِ، فَهُوَ أَيْضًا يَصْرُخُ وَلَا يُسْتَجَابُ. ١٣ 13
Soki moto akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka koganga ya mobola, ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.
اَلْهَدِيَّةُ فِي ٱلْخَفَاءِ تَفْثَأُ ٱلْغَضَبَ، وَٱلرَّشْوَةُ فِي ٱلْحِضْنِ تَفْثَأُ ٱلسَّخَطَ ٱلشَّدِيدَ. ١٤ 14
Likabo oyo bapesi na nkuku ekitisaka kanda, mpe kado oyo batie na tolo ekitisaka kanda makasi.
إِجْرَاءُ ٱلْحَقِّ فَرَحٌ لِلصِّدِّيقِ، وَٱلْهَلَاكُ لِفَاعِلِي ٱلْإِثْمِ. ١٥ 15
Ezali esengo mpo na moyengebene kosambisa makambo na sembo, kasi yango ezali pasi makasi mpo na bato oyo basalaka mabe.
اَلرَّجُلُ ٱلضَّالُّ عَنْ طَرِيقِ ٱلْمَعْرِفَةِ يَسْكُنُ بَيْنَ جَمَاعَةِ ٱلْأَخِيلَةِ. ١٦ 16
Moto oyo abungi nzela ya bwanya akovanda kati na lisanga ya bakufi.
مُحِبُّ ٱلْفَرَحِ إِنْسَانٌ مُعْوِزٌ. مُحِبُّ ٱلْخَمْرِ وَٱلدُّهْنِ لَا يَسْتَغْنِي. ١٧ 17
Moto oyo alingaka biyenga akokoma mobola; moto oyo alingaka masanga ya vino mpe mafuta akotikala kokoma mozwi te.
اَلشِّرِّيرُ فِدْيَةُ ٱلصِّدِّيقِ، وَمَكَانَ ٱلْمُسْتَقِيمِينَ ٱلْغَادِرُ. ١٨ 18
Moto mabe azalaka lokola motuya oyo bafutaka mpo na kosikola moto ya sembo; moto ya sembo te azalaka lokola motuya oyo bafutaka mpo na kosikola moto ya alima.
اَلسُّكْنَى فِي أَرْضٍ بَرِّيَّةٍ خَيْرٌ مِنِ ٱمْرَأَةٍ مُخَاصِمَةٍ حَرِدَةٍ. ١٩ 19
Kovanda kati na esobe ezali malamu koleka kovanda esika moko na mwasi oyo aswanaka-swanaka mpe asilikaka-silikaka.
كَنْزٌ مُشْتَهًى وَزَيْتٌ فِي بَيْتِ ٱلْحَكِيمِ، أَمَّا ٱلرَّجُلُ ٱلْجَاهِلُ فَيُتْلِفُهُ. ٢٠ 20
Bilei ya kitoko mpe mafuta ezalaka kati na ndako ya moto ya bwanya, kasi moto oyo azangi mayele abebisaka yango.
اَلتَّابِعُ ٱلْعَدْلَ وَٱلرَّحْمَةَ يَجِدُ حَيَاةً، حَظًّا وَكَرَامَةً. ٢١ 21
Moto oyo alukaka bosembo mpe bolingo akozwa bomoi, bomengo mpe lokumu.
اَلْحَكِيمُ يَتَسَوَّرُ مَدِينَةَ ٱلْجَبَابِرَةِ، وَيُسْقِطُ قُوَّةَ مُعْتَمَدِهَا. ٢٢ 22
Moto ya bwanya abundisaka engumba ya bato ya makasi, mpe akweyisaka bandako ya makasi oyo bato batielaka mitema.
مَنْ يَحْفَظُ فَمَهُ وَلِسَانَهُ، يَحْفَظُ مِنَ ٱلضِّيقَاتِ نَفْسَهُ. ٢٣ 23
Moto oyo abatelaka monoko mpe lolemo na ye abatelaka molimo na ye na pasi.
اَلْمُنْتَفِخُ ٱلْمُتَكَبِّرُ ٱسْمُهُ «مُسْتَهْزِئٌ»، عَامِلٌ بِفَيَضَانِ ٱلْكِبْرِيَاءِ. ٢٤ 24
Kombo ya moto ya lofundu mpe ya lolendo ezali: « Motioli. » Asalaka makambo na lolendo oyo eleka ndelo.
شَهْوَةُ ٱلْكَسْلَانِ تَقْتُلُهُ، لِأَنَّ يَدَيْهِ تَأْبَيَانِ ٱلشُّغْلَ. ٢٥ 25
Baposa ya moto ya goyigoyi ekoboma ye, pamba te maboko na ye eboyaka kosala.
اَلْيَوْمَ كُلَّهُ يَشْتَهِي شَهْوَةً، أَمَّا ٱلصِّدِّيقُ فَيُعْطِي وَلَا يُمْسِكُ. ٢٦ 26
Mokolo mobimba, akufaka na ye kaka na baposa makasi; kasi moto ya sembo apesaka na kobomba te.
ذَبِيحَةُ ٱلشِّرِّيرِ مَكْرَهَةٌ، فَكَمْ بِٱلْحَرِيِّ حِينَ يُقَدِّمُهَا بِغِشٍّ! ٢٧ 27
Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele; ezalaka nkele koleka soki amemi yango na makanisi mabe.
شَاهِدُ ٱلزُّورِ يَهْلِكُ، وَٱلرَّجُلُ ٱلسَّامِعُ لِلْحَقِّ يَتَكَلَّمُ. ٢٨ 28
Motatoli ya lokuta akokufa, kasi moto oyo ayokaka akoloba tango nyonso.
اَلشِّرِّيرُ يُوقِحُ وَجْهَهُ، أَمَّا ٱلْمُسْتَقِيمُ فَيُثَبِّتُ طُرُقَهُ. ٢٩ 29
Moto mabe akangaka elongi na ye, kasi moto ya sembo alendisaka nzela na ye.
لَيْسَ حِكْمَةٌ وَلَا فِطْنَةٌ وَلَا مَشُورَةٌ تُجَاهَ ٱلرَّبِّ. ٣٠ 30
Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.
اَلْفَرَسُ مُعَدٌّ لِيَوْمِ ٱلْحَرْبِ، أَمَّا ٱلنُّصْرَةُ فَمِنَ ٱلرَّبِّ. ٣١ 31
Mpunda ebongisama mpo na mokolo ya bitumba, kasi elonga ewutaka na Yawe.

< أَمْثَالٌ 21 >