< أَمْثَالٌ 13 >

اَلِٱبْنُ ٱلْحَكِيمُ يَقْبَلُ تَأْدِيبَ أَبِيهِ، وَٱلْمُسْتَهْزِئُ لَا يَسْمَعُ ٱنْتِهَارًا. ١ 1
Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye, kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.
مِنْ ثَمَرَةِ فَمِهِ يَأْكُلُ ٱلْإِنْسَانُ خَيْرًا، وَمَرَامُ ٱلْغَادِرِينَ ظُلْمٌ. ٢ 2
Mbuma ya monoko eleisaka moto bilei ya malamu, kasi molimo ya moto oyo atambolaka na bosembo te ememaka na mobulu.
مَنْ يَحْفَظُ فَمَهُ يَحْفَظُ نَفْسَهُ. مَنْ يَشْحَرْ شَفَتَيْهِ فَلَهُ هَلَاكٌ. ٣ 3
Moto oyo abatelaka monoko na ye abatelaka molimo na ye, kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasi akosuka na libebi.
نَفْسُ ٱلْكَسْلَانِ تَشْتَهِي وَلَا شَيْءَ لَهَا، وَنَفْسُ ٱلْمُجْتَهِدِينَ تَسْمَنُ. ٤ 4
Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.
اَلصِّدِّيقُ يُبْغِضُ كَلَامَ كَذِبٍ، وَٱلشِّرِّيرُ يُخْزِي وَيُخْجِلُ. ٥ 5
Moto ya sembo ayinaka maloba ya lokuta, kasi moto mabe amiyinisaka mpe apanzaka soni.
اَلْبِرُّ يَحْفَظُ ٱلْكَامِلَ طَرِيقَهُ، وَٱلشَّرُّ يَقْلِبُ ٱلْخَاطِئَ. ٦ 6
Bosembo ebatelaka moto oyo atambolaka alima na nzela na ye, kasi mabe ebebisaka bongo ya moto ya masumu.
يُوجَدُ مَنْ يَتَغَانَى وَلَا شَيْءَ عِنْدَهُ، وَمَنْ يَتَفَاقَرُ وَعِنْدَهُ غِنًى جَزِيلٌ. ٧ 7
Ezali na moto moko oyo asalaka makambo lokola mozwi, nzokande azali na ye ata na eloko moko te; mpe ezali na moto mosusu oyo asalaka makambo lokola mobola, nzokande azali na bozwi mingi.
فِدْيَةُ نَفْسِ رَجُلٍ غِنَاهُ، أَمَّا ٱلْفَقِيرُ فَلَا يَسْمَعُ ٱنْتِهَارًا. ٨ 8
Bomengo ya mozwi ebatelaka bomoi na ye, kasi bato mabe batungisaka mobola te.
نُورُ ٱلصِّدِّيقِينَ يُفَرِّحُ، وَسِرَاجُ ٱلْأَشْرَارِ يَنْطَفِئُ. ٩ 9
Pole ya bato ya sembo engengaka makasi, kasi mwinda ya bato mabe ekufaka.
اَلْخِصَامُ إِنَّمَا يَصِيرُ بِٱلْكِبْرِيَاءِ، وَمَعَ ٱلْمُتَشَاوِرِينَ حِكْمَةٌ. ١٠ 10
Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.
غِنَى ٱلْبُطْلِ يَقِلُّ، وَٱلْجَامِعُ بِيَدِهِ يَزْدَادُ. ١١ 11
Bomengo oyo ezwami na lombangu mpe na nzela ya mabe esilaka noki, kasi bomengo oyo babakisaka na moke-moke ekomaka ebele.
ٱلرَّجَاءُ ٱلْمُمَاطَلُ يُمْرِضُ ٱلْقَلْبَ، وَٱلشَّهْوَةُ ٱلْمُتَمَّمَةُ شَجَرَةُ حَيَاةٍ. ١٢ 12
Elikya oyo ekokisami te epesaka bokono na motema, kasi posa oyo ekokisami ezali nzete ya bomoi.
مَنِ ٱزْدَرَى بِٱلْكَلِمَةِ يُخْرِبُ نَفْسَهُ، وَمَنْ خَشِيَ ٱلْوَصِيَّةَ يُكَافَأُ. ١٣ 13
Moto oyo atiolaka liloba amiyokisaka pasi, kasi moto oyo atosaka malako akozwa lifuti.
شَرِيعَةُ ٱلْحَكِيمِ يَنْبُوعُ حَيَاةٍ لِلْحَيَدَانِ عَنْ أَشْرَاكِ ٱلْمَوْتِ. ١٤ 14
Mateya ya moto ya bwanya ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.
اَلْفِطْنَةُ ٱلْجَيِّدَةُ تَمْنَحُ نِعْمَةً، أَمَّا طَرِيقُ ٱلْغَادِرِينَ فَأَوْعَرُ. ١٥ 15
Boyebi ememelaka bato ngolu, kasi nzela ya bato oyo babukaka mibeko ezalaka pasi.
كُلُّ ذَكِيٍّ يَعْمَلُ بِٱلْمَعْرِفَةِ، وَٱلْجَاهِلُ يَنْشُرُ حُمْقًا. ١٦ 16
Moto ya mayele asalaka makambo kolanda boyebi, kasi zoba, atandaka bozoba na ye.
اَلرَّسُولُ ٱلشِّرِّيرُ يَقَعُ فِي ٱلشَّرِّ، وَٱلسَّفِيرُ ٱلْأَمِينُ شِفَاءٌ. ١٧ 17
Motindami ya mabe akweyaka kati na pasi, kasi motindami ya sembo amemaka lobiko.
فَقْرٌ وَهَوَانٌ لِمَنْ يَرْفُضُ ٱلتَّأْدِيبَ، وَمَنْ يُلَاحِظ ٱلتَّوْبِيخَ يُكْرَمْ. ١٨ 18
Bobola mpe soni ekomelaka bato oyo baboyaka koyekola, kasi moto oyo andimaka pamela akozwa lokumu.
اَلشَّهْوَةُ ٱلْحَاصِلَةُ تَلُذُّ ٱلنَّفْسَ، أَمَّا كَرَاهَةُ ٱلْجُهَّالِ فَهِيَ ٱلْحَيَدَانُ عَنِ ٱلشَّرِّ. ١٩ 19
Posa oyo ekokisami esalaka esengo na motema, kasi kokabwana na mabe ezali likambo ya nkele na miso ya zoba.
اَلْمُسَايِرُ ٱلْحُكَمَاءَ يَصِيرُ حَكِيمًا، وَرَفِيقُ ٱلْجُهَّالِ يُضَرُّ. ٢٠ 20
Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.
اَلشَّرُّ يَتْبَعُ ٱلْخَاطِئِينَ، وَٱلصِّدِّيقُونَ يُجَازَوْنَ خَيْرًا. ٢١ 21
Mabe elandaka bato ya masumu, kasi bolamu ezali lifuti ya bato ya sembo.
اَلصَّالِحُ يُورِثُ بَنِي ٱلْبَنِينَ، وَثَرْوَةُ ٱلْخَاطِئِ تُذْخَرُ لِلصِّدِّيقِ. ٢٢ 22
Moto oyo asalaka bolamu atikelaka bakitani na ye libula, kasi bomengo ya moto ya masumu ebombamaka mpo na moyengebene.
فِي حَرْثِ ٱلْفُقَرَاءِ طَعَامٌ كَثِيرٌ، وَيُوجَدُ هَالِكٌ مِنْ عَدَمِ ٱلْحَقِّ. ٢٣ 23
Bilanga ya mobola ekoki kobotela ye bilei ebele, kasi ezali na bato oyo bazali kobeba mpo na kozanga bosembo.
مَنْ يَمْنَعُ عَصَاهُ يَمْقُتِ ٱبْنَهُ، وَمَنْ أَحَبَّهُ يَطْلُبُ لَهُ ٱلتَّأْدِيبَ. ٢٤ 24
Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu alingaka ye te, kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.
اَلصِّدِّيقُ يَأْكُلُ لِشَبَعِ نَفْسِهِ، أَمَّا بَطْنُ ٱلْأَشْرَارِ فَيَحْتَاجُ. ٢٥ 25
Moyengebene aliaka mpe atondaka, kasi libumu ya moto mabe ezalaka na nzala.

< أَمْثَالٌ 13 >