< نَاحُوم 3 >

وَيْلٌ لِمَدِينَةِ ٱلدِّمَاءِ. كُلُّهَا مَلْآنَةٌ كَذِبًا وَخَطْفًا. لَا يَزُولُ ٱلِٱفْتِرَاسُ. ١ 1
Mawa na engumba oyo mosala na yango kosopa makila ya bato, engumba oyo etonda na makambo ya lokuta mpe na moyibi, engumba oyo ezangaka te koboma bato!
صَوْتُ ٱلسَّوطِ وَصَوْتُ رَعْشَةِ ٱلْبَكَرِ، وَخَيْلٌ تَخُبُّ وَمَرْكَبَاتٌ تَقْفِزُ، ٢ 2
Tango nyonso, kaka makelele ya bafimbu, makelele ya bapine: bampunda ezali kopumbwa, mpe bashar ezali koningana.
وَفُرْسَانٌ تَنْهَضُ، وَلَهِيبُ ٱلسَّيْفِ وَبَرِيقُ ٱلرُّمْحِ، وَكَثْرَةُ جَرْحَى، وَوَفْرَةُ قَتْلَى، وَلَا نِهَايَةَ لِلْجُثَثِ. يَعْثُرُونَ بِجُثَثِهِمْ. ٣ 3
Basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda bazali kotambola-tambola, mipanga ezali kongenga, makonga ezali koleka-leka lokola mikalikali! Bato bazali kozoka, kokufa ebele penza! Bongo bibembe elali-lali bisika nyonso, mpe makolo ya bato ekomi kotuta bibembe tango bazali kotambola.
مِنْ أَجْلِ زِنَى ٱلزَّانِيَةِ ٱلْحَسَنَةِ ٱلْجَمَالِ صَاحِبَةِ ٱلسِّحْرِ ٱلْبَائِعَةِ أُمَمًا بِزِنَاهَا، وَقَبَائِلَ بِسِحْرِهَا. ٤ 4
Makambo oyo nyonso esalemi likolo ya makambo ya nkele ya engumba oyo etonda na kindumba, engumba ya kitoko makasi kasi etonda na misala ya soloka, engumba oyo epengwisaka bikolo na nzela ya kindumba na yango mpe epengwisaka bato na nzela ya misala na yango ya soloka.
«هَأَنَذَا عَلَيْكِ، يَقُولُ رَبُّ ٱلْجُنُودِ، فَأَكْشِفُ أَذْيَالَكِ إِلَى فَوْقِ وَجْهِكِ، وَأُرِي ٱلْأُمَمَ عَوْرَتَكِ وَٱلْمَمَالِكَ خِزْيَكِ. ٥ 5
« Natombokeli yo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga; « nakotombola yo elamba kino na elongi, nakolakisa bolumbu na yo na miso ya bikolo mosusu mpe nakoyokisa yo soni na miso ya bamboka nyonso.
وَأَطْرَحُ عَلَيْكِ أَوْسَاخًا، وَأُهِينُكِ وَأَجْعَلُكِ عِبْرَةً. ٦ 6
Nakobwakela yo bosoto, nakosambwisa yo mpe nakokomisa yo eloko ya maseki.
وَيَكُونُ كُلُّ مَنْ يَرَاكِ يَهْرُبُ مِنْكِ وَيَقُولُ: خَرِبَتْ نِينَوَى، مَنْ يَرْثِي لَهَا؟ مِنْ أَيْنَ أَطْلُبُ لَكِ مُعَزِّينَ؟». ٧ 7
Bato nyonso oyo bakomona yo bakokima mpe bakoganga: ‹ Engumba Ninive ebebisami boye! Nani akoyokela yango mawa? › »
هَلْ أَنْتِ أَفْضَلُ مِنْ نُوَ أَمُونَ ٱلْجَالِسَةِ بَيْنَ ٱلْأَنْهَارِ، حَوْلَهَا ٱلْمِيَاهُ ٱلَّتِي هِيَ حِصْنُ ٱلْبَحْرِ، وَمِنَ ٱلْبَحْرِ سُورُهَا؟ ٨ 8
Boni, okanisi ete ozali kitoko koleka engumba Tebesi oyo ezalaka pembeni ya ebale Nili mpe ezingelama na mayi, bongo ebale ebatelaka yango mpe mayi ezalaka lokola mir oyo ebombaka yango?
كُوشٌ قُوَّتُهَا مَعَ مِصْرَ وَلَيْسَتْ نِهَايَةٌ. فُوطٌ وَلُوبِيمُ كَانُوا مَعُونَتَكِ. ٩ 9
Makasi na yango ezalaki kowuta na Kushi mpe na Ejipito; bato ya Puti mpe ya Libi bazalaki kosunga yango.
هِيَ أَيْضًا قَدْ مَضَتْ إِلَى ٱلْمَنْفَى بِٱلسَّبْيِ، وَأَطْفَالُهَا حُطِّمَتْ فِي رَأْسِ جَمِيعِ ٱلْأَزِقَّةِ، وَعَلَى أَشْرَافِهَا أَلْقَوْا قُرْعَةً، وَجَمِيعُ عُظَمَائِهَا تَقَيَّدُوا بِٱلْقُيُودِ. ١٠ 10
Nzokande, yango mpe ekweyaki, mpe bamemaki bato na yango na bowumbu. Bakataki-kataki na biteni bana na bango na babalabala nyonso, babetaki zeke mpo na kopona bato na yango ya lokumu mpo ete bamema bango na bowumbu, mpe bakangaki bakambi na yango minyololo.
أَنْتِ أَيْضًا تَسْكَرِينَ. تَكُونِينَ خَافِيَةً. أَنْتِ أَيْضًا تَطْلُبِينَ حِصْنًا بِسَبَبِ ٱلْعَدُوِّ. ١١ 11
Yo mpe okokoma lokola moto oyo alangwe masanga, yo mpe okoluka ekimelo mpo na kokima banguna na yo.
جَمِيعُ قِلَاعِكِ أَشْجَارُ تِينٍ بِٱلْبَوَاكِيرِ، إِذَا ٱنْهَزَّتْ تَسْقُطُ فِي فَمِ ٱلْآكِلِ. ١٢ 12
Bandako na yo nyonso, oyo batonga makasi ezali lokola banzete ya figi etonda na bambuma ya liboso ekomela; soki kaka bameki koningisa yango, bambuma ekweyaka kino na monoko ya moto ya lokoso.
هُوَذَا شَعْبُكِ نِسَاءٌ فِي وَسَطِكِ! تَنْفَتِحُ لِأَعْدَائِكِ أَبْوَابُ أَرْضِكِ. تَأْكُلُ ٱلنَّارُ مَغَالِيقَكِ. ١٣ 13
Tala malamu mampinga na yo, balemba lokola basi; bikuke ya mokili na yo ezali polele liboso ya banguna na yo, pamba te moto ezikisi bikangelo na yango.
اِسْتَقِي لِنَفْسِكِ مَاءً لِلْحِصَارِ. أَصْلِحِي قِلَاعَكِ. ٱدْخُلِي فِي ٱلطِّينِ وَدُوسِي فِي ٱلْمِلَاطِ. أَصْلِحِي ٱلْمِلْبَنَ. ١٤ 14
Bino bato ya engumba oyo, bomitokela libela mayi mpo ete bakozingela bino; bolendisa libela bamir oyo ebatelaka engumba na bino; bokamata mabele oyo batongelaka bandako, bosangisa yango mpo ete ekoma potopoto, bongo bobeta babiliki mpe botumba yango.
هُنَاكَ تَأْكُلُكِ نَارٌ، يَقْطَعُكِ سَيْفٌ، يَأْكُلُكِ كَٱلْغَوْغَاءِ، تَكَاثَرِي كَٱلْغَوْغَاءِ. تَعَاظَمِي كَٱلْجَرَادِ! ١٥ 15
Kuna nde moto ekoya kozikisa yo, mopanga ekoya koboma yo mpe kosilisa yo lokola mabanki. Tika ete bato na yo bakoma ebele lokola mabanki, bakoma lisusu ebele makasi lokola mankoko.
أَكْثَرْتِ تُجَّارَكِ أَكْثَرَ مِنْ نُجُومِ ٱلسَّمَاءِ. ٱلْغَوْغَاءُ جَنَّحَتْ وَطَارَتْ. ١٦ 16
Okomisi motango ya bato na yo ya mombongo ebele koleka ata minzoto ya likolo, kasi babebisi mokili nyonso mpe bapumbwe na bango ndenge kaka mankoko esalaka.
رُؤَسَاؤُكِ كَٱلْجَرَادِ، وَوُلَاتُكِ كَحَرْجَلَةِ ٱلْجَرَادِ ٱلْحَالَّةِ عَلَى ٱلْجُدْرَانِ فِي يَوْمِ ٱلْبَرْدِ. تُشْرِقُ ٱلشَّمْسُ فَتَطِيرُ وَلَا يُعْرَفُ مَكَانُهَا أَيْنَ هُوَ. ١٧ 17
Bakengeli na yo bazali lokola mankoko, bakonzi ya basoda na yo bazali lokola maboke ya mabanki oyo eyaka kovanda na bamir ya lopango na tango ya malili; kasi soki kaka moyi ebimi, yango nyonso epanzani, mpe moto moko te ayebaka esika yango ekendaka.
نَعِسَتْ رُعَاتُكَ يَا مَلِكَ أَشُّورَ. ٱضْطَجَعَتْ عُظَمَاؤُكَ. تَشَتَّتَ شَعْبُكَ عَلَى ٱلْجِبَالِ وَلَا مَنْ يَجْمَعُ. ١٨ 18
Oh mokonzi ya Asiri, bakambi na yo bazali kolala pongi, basoda na yo ya mpiko balali pongi ya makasi, mampinga na yo bapalangani na bangomba mpe moto akosangisa bango azali komonana te.
لَيْسَ جَبْرٌ لِٱنْكِسَارِكَ. جُرْحُكَ عَدِيمُ ٱلشِّفَاءِ. كُلُّ ٱلَّذِينَ يَسْمَعُونَ خَبَرَكَ يُصَفِّقُونَ بِأَيْدِيهِمْ عَلَيْكَ، لِأَنَّهُ عَلَى مَنْ لَمْ يَمُرَّ شَرُّكَ عَلَى ٱلدَّوَامِ؟ ١٩ 19
Ezali ata na kisi moko te oyo ekoki kobikisa pota na yo; pota na yo ezali monene makasi! Moto nyonso oyo akoyoka sango ya makambo oyo ekomeli yo akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo. Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe?

< نَاحُوم 3 >