< أَيُّوبَ 34 >

فَأَجَابَ أَلِيهُو وَقَالَ: ١ 1
Eliwu azwaki maloba mpe alobaki:
«ٱسْمَعُوا أَقْوَالِي أَيُّهَا ٱلْحُكَمَاءُ، وَٱصْغَوْا لِي أَيُّهَا ٱلْعَارِفُونَ. ٢ 2
« Bino bato ya bwanya, boyoka maloba na ngai; bino bato ya mayele, boyoka ngai!
لِأَنَّ ٱلْأُذُنَ تَمْتَحِنُ ٱلْأَقْوَالَ، كَمَا أَنَّ ٱلْحَنَكَ يَذُوقُ طَعَامًا. ٣ 3
Pamba te litoyi nde esosolaka maloba ndenge lolemo emekaka bilei.
لِنَمْتَحِنْ لِأَنْفُسِنَا ٱلْحَقَّ، وَنَعْرِفْ بَيْنَ أَنْفُسِنَا مَا هُوَ طَيِّبٌ. ٤ 4
Tososola mpo na biso moko makambo ya sembo, toyekola elongo makambo oyo ezali malamu.
«لِأَنَّ أَيُّوبَ قَالَ: تَبَرَّرْتُ، وَٱللهُ نَزَعَ حَقِّي. ٥ 5
Tala makambo oyo Yobo azali koloba: ‹ Nasali mabe te, kasi Nzambe aboyi kolongisa ngai.
عِنْدَ مُحَاكَمَتِي أُكَذَّبُ. جُرْحِي عَدِيمُ ٱلشِّفَاءِ مِنْ دُونِ ذَنْبٍ. ٦ 6
Atako nazali sembo, bazali kozwa ngai lokola mokosi; atako nasali mabe te, likonga na Ye ezokisi ngai pota oyo esilaka te. ›
فَأَيُّ إِنْسَانٍ كَأَيُّوبَ يَشْرَبُ ٱلْهُزْءَ كَٱلْمَاءِ، ٧ 7
Nani azali lokola Yobo, oyo amelaka kotiolama lokola mayi?
وَيَسِيرُ مُتَّحِدًا مَعَ فَاعِلِي ٱلْإِثْمِ، وَذَاهِبًا مَعَ أَهْلِ ٱلشَّرِّ؟ ٨ 8
Atambolaka elongo na banyokoli ya bato, asanganaka na bato mabe.
لِأَنَّهُ قَالَ: لَا يَنْتَفِعُ ٱلْإِنْسَانُ بِكَوْنِهِ مَرْضِيًّا عِنْدَ ٱللهِ. ٩ 9
Pamba te alobi: ‹ Ezali na litomba te epai na moto, na koluka kosepelisa Nzambe. ›
«لِأَجْلِ ذَلِكَ ٱسْمَعُوا لِي يَا ذَوِي ٱلْأَلْبَابِ. حَاشَا لِلهِ مِنَ ٱلشَّرِّ، وَلِلْقَدِيرِ مِنَ ٱلظُّلْمِ. ١٠ 10
Boye, bino bato ya mayele, boyoka ngai! Ekoki kosalema te ete Nzambe asala mabe; ekoki kosalema te ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso asala makambo oyo ezangi bosembo.
لِأَنَّهُ يُجَازِي ٱلْإِنْسَانَ عَلَى فِعْلِهِ، وَيُنِيلُ ٱلرَّجُلَ كَطَرِيقِهِ. ١١ 11
Azongiselaka moto na moto kolanda misala na ye, apesaka na moto na moto kolanda etamboli na ye.
فَحَقًّا إِنَّ ٱللهَ لَا يَفْعَلُ سُوءًا، وَٱلْقَدِيرَ لَا يُعَوِّجُ ٱلْقَضَاءَ. ١٢ 12
Te, Nzambe akoki kosala mabe te, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kobuka bosembo te.
مَنْ وَكَّلَهُ بِٱلْأَرْضِ، وَمَنْ صَنَعَ ٱلْمَسْكُونَةَ كُلَّهَا؟ ١٣ 13
Nani akomisaki Ye Mokonzi ya mokili? Nani apesaki Ye bokonzi likolo ya mokili mobimba?
إِنْ جَعَلَ عَلَيْهِ قَلْبَهُ، إِنْ جَمَعَ إِلَى نَفْسِهِ رُوحَهُ وَنَسَمَتَهُ، ١٤ 14
Soki Nzambe azalaki kaka kokanisa mpo na Ye moko, mpe soki abatelaki kati na Ye moko molimo na Ye mpe pema na Ye,
يُسَلِّمُ ٱلرُّوحَ كُلُّ بَشَرٍ جَمِيعًا، وَيَعُودُ ٱلْإِنْسَانُ إِلَى ٱلتُّرَابِ. ١٥ 15
bato nyonso balingaki kokufa elongo, mpe moto nyonso alingaki kozonga putulu.
فَإِنْ كَانَ لَكَ فَهْمٌ فَٱسْمَعْ هَذَا، وَٱصْغَ إِلَى صَوْتِ كَلِمَاتِي. ١٦ 16
Soki ozali na boyebi, yoka maloba oyo; yoka makambo oyo nazali koloba.
أَلَعَلَّ مَنْ يُبْغِضُ ٱلْحَقَّ يَتَسَلَّطُ، أَمِ ٱلْبَارَّ ٱلْكَبِيرَ تَسْتَذْنِبُ؟ ١٧ 17
Boni, moto oyo ayinaka bosembo akoki solo kozala mokonzi? Okokweyisa solo Nkolo-Na-Bosembo mpe Nkolo-Na-Nguya?
أَيُقَالُ لِلْمَلِكِ: يَا لَئِيمُ، وَلِلْنُدَبَاءِ: يَا أَشْرَارُ؟ ١٨ 18
Ezali Ye nde alobaka na bakonzi: ‹ Bozali bato pamba, › mpe na bato ya lokumu: ‹ Bozali bato mabe? ›
ٱلَّذِي لَا يُحَابِي بِوُجُوهِ ٱلرُّؤَسَاءِ، وَلَا يَعْتَبِرُ مُوسَعًا دُونَ فَقِيرٍ. لِأَنَّهُمْ جَمِيعَهُمْ عَمَلُ يَدَيْهِ. ١٩ 19
Aponaka bilongi ya bakambi te, mpe asalelaka bazwi bolamu te mpo na bozwi na bango koleka babola, pamba te bango nyonso basalemaki na maboko na Ye.
بَغْتَةً يَمُوتُونَ وَفِي نِصْفِ ٱللَّيْلِ. يَرْتَجُّ ٱلشَّعْبُ وَيَزُولُونَ، وَيُنْزَعُ ٱلْأَعِزَّاءُ لَا بِيَدٍ. ٢٠ 20
Bato bazali kokufa mbala moko, kati na butu; bazali kobunda-bunda mpe kolimwa, bato ya nguya bazali kolongwa atako loboko ya moto etindiki bango te.
لِأَنَّ عَيْنَيْهِ عَلَى طُرُقِ ٱلْإِنْسَانِ، وَهُوَ يَرَى كُلَّ خَطَوَاتِهِ. ٢١ 21
Miso na Ye ezali likolo ya banzela ya bato, amonaka etamboli na bango nyonso.
لَا ظَلَامَ وَلَا ظِلَّ مَوْتٍ حَيْثُ تَخْتَفِي عُمَّالُ ٱلْإِثْمِ. ٢٢ 22
Ezala molili, ezala libulu ya kufa, eloko moko te ekoki kobomba bato mabe.
لِأَنَّهُ لَا يُلَاحِظُ ٱلْإِنْسَانَ زَمَانًا لِلدُّخُولِ فِي ٱلْمُحَاكَمَةِ مَعَ ٱللهِ. ٢٣ 23
Nzambe azali na posa ya kolanda-landa bato te mpo ete bakoka koya liboso na Ye mpo na kosambisama.
يُحَطِّمُ ٱلْأَعِزَّاءَ مِنْ دُونِ فَحْصٍ، وَيُقِيمُ آخَرِينَ مَكَانَهُمْ. ٢٤ 24
Abomaka bato ya makasi ata soki aluki koyeba tina te mpe atiaka bato mosusu na esika na bango.
لَكِنَّهُ يَعْرِفُ أَعْمَالَهُمْ، وَيُقَلِّبُهُمْ لَيْلًا فَيَنْسَحِقُونَ. ٢٥ 25
Pamba te ayebi misala na bango, akweyisi bango na butu moko, mpe babebisami.
لِكَوْنِهِمْ أَشْرَارًا، يَصْفِقُهُمْ فِي مَرْأَى ٱلنَّاظِرِينَ. ٢٦ 26
Apesaka bango etumbu lokola bato mabe na esika oyo bato nyonso bakoki komona,
لِأَنَّهُمُ ٱنْصَرَفُوا مِنْ وَرَائِهِ، وَكُلُّ طُرُقِهِ لَمْ يَتَأَمَّلُوهَا، ٢٧ 27
pamba te baboyaki kolanda Ye mpe kososola banzela na Ye.
حَتَّى بَلَّغُوا إِلَيْهِ صُرَاخَ ٱلْمِسْكِينِ، فَسَمِعَ زَعْقَةَ ٱلْبَائِسِينَ. ٢٨ 28
Bakomisaki koganga ya babola kino epai ya Nzambe, mpe koganga ya banyokolami eyokanaki epai na Ye.
إِذَا هُوَ سَكَّنَ، فَمَنْ يَشْغَبُ؟ وَإِذَا حَجَبَ وَجْهَهُ، فَمَنْ يَرَاهُ سَوَاءٌ كَانَ عَلَى أُمَّةٍ أَوْ عَلَى إِنْسَانٍ؟ ٢٩ 29
Kasi soki avandi kimia, nani akokweyisa Ye? Soki abombi elongi na Ye, nani akoki komona Ye? Nzokande, akengelaka bikolo mpe bato
حَتَّى لَا يَمْلِكَ ٱلْفَاجِرُ وَلَا يَكُونَ شَرَكًا لِلشَّعْبِ. ٣٠ 30
mpo na kopekisa bato mabe ete bakamba mokili te mpe batiela bato mitambo te.
«وَلَكِنْ هَلْ لِلهِ قَالَ: ٱحْتَمَلْتُ. لَا أَعُودُ أُفْسِدُ؟ ٣١ 31
Soki moto moko alobi na Nzambe: ‹ Nasali mabe, nazwi etumbu ya masumu na ngai, kasi nakosala lisusu mabe te.
مَا لَمْ أُبْصِرْهُ فَأَرِنِيهِ أَنْتَ. إِنْ كُنْتُ قَدْ فَعَلْتُ إِثْمًا فَلَا أَعُودُ أَفْعَلُهُ. ٣٢ 32
Lakisa ngai makambo oyo nazali kokoka komona te; soki nasali mabe, nakozongela yango lisusu te. ›
هَلْ كَرَأْيِكَ يُجَازِيهِ، قَائِلًا: لِأَنَّكَ رَفَضْتَ؟ فَأَنْتَ تَخْتَارُ لَا أَنَا، وَبِمَا تَعْرِفُهُ تَكَلَّمْ. ٣٣ 33
Boni, Nzambe akoki kopesa yo etumbu? Nayebi ete ondimi na yo te. Yo nde osengeli kozwa mokano, kasi ngai te! Yebisa ngai makambo oyo yo oyebi.
ذَوُو ٱلْأَلْبَابِ يَقُولُونَ لِي، بَلِ ٱلرَّجُلُ ٱلْحَكِيمُ ٱلَّذِي يَسْمَعُنِي يَقُولُ: ٣٤ 34
Bato ya mayele mpe bato ya bwanya oyo bazali koyoka ngai balobaki:
إِنَّ أَيُّوبَ يَتَكَلَّمُ بِلَا مَعْرِفَةٍ، وَكَلَامُهُ لَيْسَ بِتَعَقُّلٍ. ٣٥ 35
‹ Yobo azali koloba na boyebi te, maloba na ye ezali na tina te. ›
فَلَيْتَ أَيُّوبَ كَانَ يُمْتَحَنُ إِلَى ٱلْغَايَةِ مِنْ أَجْلِ أَجْوِبَتِهِ كَأَهْلِ ٱلْإِثْمِ. ٣٦ 36
Oh! Tika ete Yobo asambisama kino na suka mpo ete apesa biyano lokola moto mabe!
لَكِنَّهُ أَضَافَ إِلَى خَطِيَّتِهِ مَعْصِيَةً. يُصَفِّقُ بَيْنَنَا، وَيُكْثِرُ كَلَامَهُ عَلَى ٱللهِ». ٣٧ 37
Pamba te, na lisumu na ye, azali kobakisa kotomboka, azali kotia tembe kati na biso mpe azali kokoba kobakisa maloba mpo na kotelemela Nzambe. »

< أَيُّوبَ 34 >