< إِرْمِيَا 33 >

ثُمَّ صَارَتْ كَلِمَةُ ٱلرَّبِّ إِلَى إِرْمِيَا ثَانِيَةً وَهُوَ مَحْبُوسٌ بَعْدُ فِي دَارِ ٱلسِّجْنِ قَائِلَةً: ١ 1
Yawe alobaki na Jeremi, na mbala ya mibale, wana azalaki nanu ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli:
«هَكَذَا قَالَ ٱلرَّبُّ صَانِعُهَا، ٱلرَّبُّ مُصَوِّرُهَا لِيُثَبِّتَهَا، يَهْوَهُ ٱسْمُهُ: ٢ 2
« Tala liloba oyo Yawe, Ye oyo akela mabele, oyo abongisa yango malamu mpe alendisa yango, oyo Kombo na Ye ezali Yawe, alobi:
اُدْعُنِي فَأُجِيبَكَ وَأُخْبِرَكَ بِعَظَائِمَ وَعَوَائِصَ لَمْ تَعْرِفْهَا. ٣ 3
‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. ›
لِأَنَّهُ هَكَذَا قَالَ ٱلرَّبُّ إِلَهُ إِسْرَائِيلَ عَنْ بُيُوتِ هَذِهِ ٱلْمَدِينَةِ وَعَنْ بُيُوتِ مُلُوكِ يَهُوذَا ٱلَّتِي هُدِمَتْ لِلْمَتَارِيسِ وَٱلْمَجَانِيقِ: ٤ 4
Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na bandako ya engumba oyo mpe ya bandako ya bakonzi ya Yuda, oyo babukaki mpo na kotelemela bangomba mike ya kokimela mpe mopanga ya monguna
يَأْتُونَ لِيُحَارِبُوا ٱلْكَلْدَانِيِّينَ وَيَمْلَأُوهَا مِنْ جِيَفِ ٱلنَّاسِ ٱلَّذِينَ ضَرَبْتُهُمْ بِغَضَبِي وَغَيْظِي، وَٱلَّذِينَ سَتَرْتُ وَجْهِي عَنْ هَذِهِ ٱلْمَدِينَةِ لِأَجْلِ كُلِّ شَرِّهِمْ. ٥ 5
kati na etumba na bato ya Babiloni: ‹ Bandako yango ekotonda na bibembe ya bato oyo nakoboma na nguya ya kotomboka mpe ya kanda na Ngai. Nakobombela engumba oyo elongi na Ngai likolo ya mabe na yango nyonso.
هَأَنَذَا أَضَعُ عَلَيْهَا رِفَادَةً وَعِلَاجًا، وَأَشْفِيهِمْ وَأُعْلِنُ لَهُمْ كَثْرَةَ ٱلسَّلَامِ وَٱلْأَمَانَةِ. ٦ 6
Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami.
وَأَرُدُّ سَبْيَ يَهُوذَا وَسَبْيَ إِسْرَائِيلَ وَأَبْنِيهِمْ كَٱلْأَوَّلِ. ٧ 7
Nakokangola bato ya Yuda mpe ya Isalaele longwa na bowumbu mpe nakokomisa bango lisusu ndenge bazalaki liboso.
وَأُطَهِّرُهُمْ مِنْ كُلِّ إِثْمِهِمِ ٱلَّذِي أَخْطَأُوا بِهِ إِلَيَّ، وَأَغْفِرُ كُلَّ ذُنُوبِهِمِ ٱلَّتِي أَخْطَأُوا بِهَا إِلَيَّ، وَٱلَّتِي عَصَوْا بِهَا عَلَيَّ. ٨ 8
Nakopetola bango na masumu nyonso oyo basalaki liboso na Ngai. Nakolimbisa masumu nyonso ya botomboki oyo basalaki liboso na Ngai.
فَتَكُونُ لِيَ ٱسْمَ فَرَحٍ لِلتَّسْبِيحِ وَلِلزِّينَةِ لَدَى كُلِّ أُمَمِ ٱلْأَرْضِ، ٱلَّذِينَ يَسْمَعُونَ بِكُلِّ ٱلْخَيْرِ ٱلَّذِي أَصْنَعُهُ مَعَهُمْ، فَيَخَافُونَ وَيَرْتَعِدُونَ مِنْ أَجْلِ كُلِّ ٱلْخَيْرِ وَمِنْ أَجْلِ كُلِّ ٱلسَّلَامِ ٱلَّذِي أَصْنَعُهُ لَهَا. ٩ 9
Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›
هَكَذَا قَالَ ٱلرَّبُّ: سَيُسْمَعُ بَعْدُ فِي هَذَا ٱلْمَوْضِعِ ٱلَّذِي تَقُولُونَ إِنَّهُ خَرِبٌ بِلَا إِنْسَانٍ وَبِلَا حَيَوَانٍ، فِي مُدُنِ يَهُوذَا، وَفِي شَوَارِعِ أُورُشَلِيمَ ٱلْخَرِبَةِ بِلَا إِنْسَانٍ وَلَا سَاكِنٍ وَلَا بَهِيمَةٍ، ١٠ 10
Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Bozali koloba na tina na esika oyo: ‘Eh! Esika oyo ebeba! Ezalaka lisusu na bato mpe banyama te!’ Nzokande, kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi oyo ekoma polele, ezanga bato mpe banyama, ekozala lisusu na lokito:
صَوْتُ ٱلطَّرَبِ وَصَوْتُ ٱلْفَرَحِ، صَوْتُ ٱلْعَرِيسِ وَصَوْتُ ٱلْعَرُوسِ، صَوْتُ ٱلْقَائِلِينَ: ٱحْمَدُوا رَبَّ ٱلْجُنُودِ لِأَنَّ ٱلرَّبَّ صَالِحٌ، لِأَنَّ إِلَى ٱلْأَبَدِ رَحْمَتَهُ. صَوْتُ ٱلَّذِينَ يَأْتُونَ بِذَبِيحَةِ ٱلشُّكْرِ إِلَى بَيْتِ ٱلرَّبِّ، لِأَنِّي أَرُدُّ سَبْيَ ٱلْأَرْضِ كَٱلْأَوَّلِ، يَقُولُ ٱلرَّبُّ. ١١ 11
ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba: ‘Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.
هَكَذَا قَالَ رَبُّ ٱلْجُنُودِ: سَيَكُونُ بَعْدُ فِي هَذَا ٱلْمَوْضِعِ ٱلْخَرِبِ بِلَا إِنْسَانٍ وَلَا بَهِيمَةٍ وَفِي كُلِّ مُدُنِهِ، مَسْكَنُ ٱلرُّعَاةِ ٱلْمُرْبِضِينَ ٱلْغَنَمَ. ١٢ 12
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Kati na esika oyo ebebisama mpe ezanga bato to banyama, mpe kati na bingumba na yango nyonso, ekozala na lisusu na bitando ya matiti mpo na babateli bibwele, bitando epai wapi bakoleisa bibwele na bango.
فِي مُدُنِ ٱلْجَبَلِ وَمُدُنِ ٱلسَّهْلِ وَمُدُنِ ٱلْجَنُوبِ، وَفِي أَرْضِ بِنْيَامِينَ وَحَوَالَيْ أُورُشَلِيمَ، وَفِي مُدُنِ يَهُوذَا، تَمُرُّ أَيْضًا ٱلْغَنَمُ تَحْتَ يَدَيِ ٱلْمُحْصِي، يَقُولُ ٱلرَّبُّ. ١٣ 13
Kati na bingumba ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi, kati na etuka ya Benjame, kati na bamboka oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi mpe kati na bingumba ya Yuda, bibwele ekoleka lisusu na se ya loboko ya moto oyo atangaka yango, › elobi Yawe.
«هَا أَيَّامٌ تَأْتِي، يَقُولُ ٱلرَّبُّ، وَأُقِيمُ ٱلْكَلِمَةَ ٱلصَّالِحَةَ ٱلَّتِي تَكَلَّمْتُ بِهَا إِلَى بَيْتِ إِسْرَائِيلَ وَإِلَى بَيْتِ يَهُوذَا. ١٤ 14
‹ Na mikolo ekoya, › elobi Yawe, ‹ nakokokisa elaka kitoko oyo napesaki na mabota ya Isalaele mpe ya Yuda.
فِي تِلْكَ ٱلْأَيَّامِ وَفِي ذَلِكَ ٱلزَّمَانِ أُنْبِتُ لِدَاوُدَ غُصْنَ ٱلْبِرِّ، فَيُجْرِي عَدْلًا وَبِرًّا فِي ٱلْأَرْضِ. ١٥ 15
Na mikolo yango mpe na tango yango, nakobimisa Moto ya nzete ya sembo wuta na libota ya Davidi; akosala makambo ya sembo mpe ya boyengebene kati na mokili.
فِي تِلْكَ ٱلْأَيَّامِ يَخْلُصُ يَهُوذَا، وَتَسْكُنُ أُورُشَلِيمُ آمِنَةً، وَهَذَا مَا تَتَسَمَّى بِهِ: ٱلرَّبُّ بِرُّنَا. ١٦ 16
Na mikolo wana, Yuda ekobikisama, mpe Yelusalemi ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela yango: Yawe azali Bosembo na biso. ›
لِأَنَّهُ هَكَذَا قَالَ ٱلرَّبُّ: لَا يَنْقَطِعُ لِدَاوُدَ إِنْسَانٌ يَجْلِسُ عَلَى كُرْسِيِّ بَيْتِ إِسْرَائِيلَ، ١٧ 17
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Davidi akozalaka tango nyonso na moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya libota ya Isalaele;
وَلَا يَنْقَطِعُ لِلْكَهَنَةِ ٱللَّاوِيِّينَ إِنْسَانٌ مِنْ أَمَامِي يُصْعِدُ مُحْرَقَةً، وَيُحْرِقُ تَقْدِمَةً، وَيُهَيِّيءُ ذَبِيحَةً كُلَّ ٱلْأَيَّامِ». ١٨ 18
Banganga-Nzambe oyo bazali bakitani ya Levi bakozalaka tango nyonso na bakitani oyo bakobanda kotelema tango nyonso liboso na Ngai mpo na kotumba mbeka, kobonza mbeka ya gato mpe kobonza makabo. › »
ثُمَّ صَارَتْ كَلِمَةُ ٱلرَّبِّ إِلَى إِرْمِيَا قَائِلَةً: ١٩ 19
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi:
«هَكَذَا قَالَ ٱلرَّبُّ: إِنْ نَقَضْتُمْ عَهْدِي مَعَ ٱلنَّهَارِ، وَعَهْدِي مَعَ ٱللَّيْلِ حَتَّى لَا يَكُونَ نَهَارٌ وَلَا لَيْلٌ فِي وَقْتِهِمَا، ٢٠ 20
« Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Soki bolongi kokata boyokani na Ngai elongo na moyi, mpe boyokani na Ngai elongo na butu, mpo ete moyi mpe butu ekoma lisusu te na tango na yango,
فَإِنَّ عَهْدِي أَيْضًا مَعَ دَاوُدَ عَبْدِي يُنْقَضُ، فَلَا يَكُونُ لَهُ ٱبْنٌ مَالِكًا عَلَى كُرْسِيِّهِ، وَمَعَ ٱللَّاوِيِّينَ ٱلْكَهَنَةِ خَادِمِيَّ. ٢١ 21
wana bokolonga penza kokata boyokani na Ngai elongo na Davidi, mosali na Ngai, mpe Davidi akotikala kozala lisusu te na mokitani na kiti ya bokonzi, mpe bokolonga kokata boyokani na Ngai elongo na Balevi oyo bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ngai.
كَمَا أَنَّ جُنْدَ ٱلسَّمَاوَاتِ لَا يُعَدُّ، وَرَمْلَ ٱلْبَحْرِ لَا يُحْصَى، هَكَذَا أُكَثِّرُ نَسْلَ دَاوُدَ عَبْدِي وَٱللَّاوِيِّينَ خَادِمِيَّ». ٢٢ 22
Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › »
ثُمَّ صَارَتْ كَلِمَةُ ٱلرَّبِّ إِلَى إِرْمِيَا قَائِلَةً: ٢٣ 23
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi:
«أَمَا تَرَى مَا تَكَلَّمَ بِهِ هَذَا ٱلشَّعْبُ قَائِلًا: إِنَّ ٱلْعَشِيرَتَيْنِ ٱللَّتَيْنِ ٱخْتَارَهُمَا ٱلرَّبُّ قَدْ رَفَضَهُمَا. فَقَدِ ٱحْتَقَرُوا شَعْبِي حَتَّى لَا يَكُونُوا بَعْدُ أُمَّةً أَمَامَهُمْ. ٢٤ 24
« Boni! Bozali koyoka te makambo bato oyo bazali kosala? Bazali koloba: ‹ Yawe asundoli bituka mibale oyo aponaki. › Na bongo, bazali kotiola bato na Ngai, mpe moto ata moko te azali kozwa bango lokola ekolo.
هَكَذَا قَالَ ٱلرَّبُّ: إِنْ كُنْتُ لَمْ أَجْعَلْ عَهْدِي مَعَ ٱلنَّهَارِ وَٱللَّيْلِ، فَرَائِضَ ٱلسَّمَاوَاتِ وَٱلْأَرْضِ، ٢٥ 25
Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Soki nasalaki boyokani te elongo na moyi mpe elongo na butu, mpe soki napesaki likolo mpe mabele mibeko te,
فَإِنِّي أَيْضًا أَرْفُضُ نَسْلَ يَعْقُوبَ وَدَاوُدَ عَبْدِي، فَلَا آخُذُ مِنْ نَسْلِهِ حُكَّامًا لِنَسْلِ إِبْرَاهِيمَ وَإِسْحَاقَ وَيَعْقُوبَ، لِأَنِّي أَرُدُّ سَبْيَهُمْ وَأَرْحَمُهُمْ». ٢٦ 26
wana nakokaki kobwaka bakitani ya Jakobi mpe ya Davidi, mosali na Ngai, mpe nalingaki te kopona moko kati na bana na ye mpo ete akamba bakitani ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi. Nakozongisa lisusu kitoko ya mokili na bango mpe nakoyokela bango mawa. › »

< إِرْمِيَا 33 >