< إِشَعْيَاءَ 65 >

«أَصْغَيْتُ إِلَى ٱلَّذِينَ لَمْ يَسْأَلُوا. وُجِدْتُ مِنَ ٱلَّذِينَ لَمْ يَطْلُبُونِي. قُلْتُ: هَأَنَذَا، هَأَنَذَا. لِأُمَّةٍ لَمْ تُسَمَّ بِٱسْمِي. ١ 1
« Namimonisaki, Ngai moko, epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai kutu toli te, namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te. Epai ya ekolo oyo ezalaki kobelela Kombo na Ngai te, nalobaki: ‹ Ngai oyo, Ngai oyo! ›
بَسَطْتُ يَدَيَّ طُولَ ٱلنَّهَارِ إِلَى شَعْبٍ مُتَمَرِّدٍ سَائِرٍ فِي طَرِيقٍ غَيْرِ صَالِحٍ وَرَاءَ أَفْكَارِهِ. ٢ 2
Mikolo nyonso, natandaki maboko na Ngai epai ya bato ya mito makasi, oyo balandaka nzela ya mabe, oyo batambolaka kolanda makanisi na bango;
شَعْبٍ يُغِيظُنِي بِوَجْهِي. دَائِمًا يَذْبَحُ فِي ٱلْجَنَّاتِ، وَيُبَخِّرُ عَلَى ٱلْآجُرِّ. ٣ 3
bato oyo bapesaka Ngai kanda tango nyonso na nko, babonzaka mbeka kati na bilanga mpe babonzaka malasi ya ansa na bitumbelo basala na babiliki;
يَجْلِسُ فِي ٱلْقُبُورِ، وَيَبِيتُ فِي ٱلْمَدَافِنِ. يَأْكُلُ لَحْمَ ٱلْخِنْزِيرِ، وَفِي آنِيَتِهِ مَرَقُ لُحُومٍ نَجِسَةٍ. ٤ 4
bato oyo bavandaka kati na bakunda mpe balekisaka babutu na bango kati na madusu ya mabanga; bato oyo baliaka misuni ya ngulu mpe basani na bango etonda na bilei ya mbindo;
يَقُولُ: قِفْ عِنْدَكَ. لَا تَدْنُ مِنِّي لِأَنِّي أَقْدَسُ مِنْكَ. هَؤُلَاءِ دُخَانٌ فِي أَنْفِي، نَارٌ مُتَّقِدَةٌ كُلَّ ٱلنَّهَارِ. ٥ 5
bato oyo balobaka: ‹ Zala mosika na Ngai, kopusana pene na Ngai te, pamba te nazali bule makasi na miso na yo! › Bato ya lolenge oyo bazali lokola milinga na zolo na Ngai, lokola moto oyo epelaka mikolo nyonso.
هَا قَدْ كُتِبَ أَمَامِي. لَا أَسْكُتُ بَلْ أُجَازِي. أُجَازِي فِي حِضْنِهِمْ، ٦ 6
Tala, etikali ya kokomama liboso na Ngai: nakovanda nye te kino nakozongisela bango mabe na bango; solo, nakozongisela bango penza mabe na bango koleka.
آثَامَكُمْ وَآثَامَ آبَائِكُمْ مَعًا قَالَ ٱلرَّبُّ، ٱلَّذِينَ بَخَّرُوا عَلَى ٱلْجِبَالِ، وَعَيَّرُونِي عَلَى ٱلْآكَامِ، فَأَكِيلُ عَمَلَهُمُ ٱلْأَوَّلَ فِي حِضْنِهِمْ». ٧ 7
Ezala mpo na masumu na bino to mpo na masumu ya batata na bino, » elobi Yawe, « pamba te babonzaki malasi ya ansa na likolo ya bangomba milayi mpe basambwisaki Ngai na likolo ya bangomba mikuse; solo penza, nakozongisela bango mabe, nakofuta bango kolanda misala na bango oyo eleka! »
هَكَذَا قَالَ ٱلرَّبُّ: «كَمَا أَنَّ ٱلسُّلَافَ يُوجَدُ فِي ٱلْعُنْقُودِ، فَيَقُولُ قَائِلٌ: لَا تُهْلِكْهُ لِأَنَّ فِيهِ بَرَكَةً. هَكَذَا أَعْمَلُ لِأَجْلِ عَبِيدِي حَتَّى لَا أُهْلِكَ ٱلْكُلَّ. ٨ 8
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Ndenge kaka balobaka soki bamoni liboke ya bambuma kitoko ya vino: ‹ Kobebisa te, pamba te lipamboli moko ezali wana, › ndenge mpe kaka nakosala mpo na basali na Ngai: nakoboma bango nyonso te.
بَلْ أُخْرِجُ مِنْ يَعْقُوبَ نَسْلًا وَمِنْ يَهُوذَا وَارِثًا لِجِبَالِي، فَيَرِثُهَا مُخْتَارِيَّ، وَتَسْكُنُ عَبِيدِي هُنَاكَ. ٩ 9
Nakobimisa libota moko kati na Jakobi; mpe kati na Yuda, nakobimisa mokitani oyo akozwa bangomba na Ngai lokola libula; bato na Ngai, ba-oyo naponi bakokamata yango lokola libula, mpe bawumbu na Ngai nde bakovanda kuna.
فَيَكُونُ شَارُونُ مَرْعَى غَنَمٍ، وَوَادِي عَخُورَ مَرْبِضَ بَقَرٍ، لِشَعْبِي ٱلَّذِينَ طَلَبُونِي. ١٠ 10
Etando ya Saroni ekokoma esika ya koleisa bibwele, mpe Lubwaku ya Akori ekokoma esika ya kopema mpo na bangombe. Nyonso wana ekosalema mpo na bato na Ngai, oyo balukaka Ngai.
«أَمَّا أَنْتُمُ ٱلَّذِينَ تَرَكُوا ٱلرَّبَّ وَنَسُوا جَبَلَ قُدْسِي، وَرَتَّبُوا لِلسَّعْدِ ٱلْأَكْبَرِ مَائِدَةً، وَمَلَأُوا لِلسَّعْدِ ٱلْأَصْغَرِ خَمْرًا مَمْزُوجَةً، ١١ 11
Kasi mpo na bino bato oyo bosundoli Yawe mpe bobosani ngomba na Ngai ya bule, bino oyo botandaka mesa mpo na Gadi mpe botondisaka kopo ya vino mpo na Meni,
فَإِنِّي أُعَيِّنُكُمْ لِلسَّيْفِ، وَتَجْثُونَ كُلُّكُمْ لِلذَّبْحِ، لِأَنِّي دَعَوْتُ فَلَمْ تُجِيبُوا، تَكَلَّمْتُ فَلَمْ تَسْمَعُوا، بَلْ عَمِلْتُمُ ٱلشَّرَّ فِي عَيْنَيَّ، وَٱخْتَرْتُمْ مَا لَمْ أُسَرَّ بِهِ. ١٢ 12
nakobongisa bino ete bokufa na mopanga, mpe bino nyonso bokofukama mpo ete bakata bino bakingo, pamba te nabengaki, kasi boyanolaki te; nalobaki, kasi boyokaki te: bosalaki kaka makambo mabe na miso na Ngai mpe boponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. »
لِذَلِكَ هَكَذَا قَالَ ٱلسَّيِّدُ ٱلرَّبُّ: هُوَذَا عَبِيدِي يَأْكُلُونَ وَأَنْتُمْ تَجُوعُونَ. هُوَذَا عَبِيدِي يَشْرَبُونَ وَأَنْتُمْ تَعْطَشُونَ. هُوَذَا عَبِيدِي يَفْرَحُونَ وَأَنْتُمْ تَخْزَوْنَ. ١٣ 13
Mpo na yango, Nkolo Yawe alobi: « Bawumbu na Ngai bakolia, kasi bino bokozala na nzala; bawumbu na Ngai bakomela, kasi bino bokotikala kaka na posa ya komela; bawumbu na Ngai bakosepela, kasi bino bokoyoka soni;
هُوَذَا عَبِيدِي يَتَرَنَّمُونَ مِنْ طِيبَةِ ٱلْقَلْبِ وَأَنْتُمْ تَصْرُخُونَ مِنْ كآبَةِ ٱلْقَلْبِ، وَمِنِ ٱنْكِسَارِ ٱلرُّوحِ تُوَلْوِلُونَ. ١٤ 14
bawumbu na Ngai bakoyemba na esengo, esengo oyo ekowuta solo na mitema na bango, kasi bino bokoganga mpo na pasi ya mitema na bino mpe bokolelalela mpo na milimo na bino oyo ebukani.
وَتُخْلِفُونَ ٱسْمَكُمْ لَعْنَةً لِمُخْتَارِيَّ، فَيُمِيتُكَ ٱلسَّيِّدُ ٱلرَّبُّ وَيُسَمِّي عَبِيدَهُ ٱسْمًا آخَرَ. ١٥ 15
Bokotika kombo na bino epai ya baponami na Ngai lokola lisuma; Nkolo Yawe akoboma bino; kasi epai ya baponami na Ye, akopesa kombo mosusu.
فَٱلَّذِي يَتَبَرَّكُ فِي ٱلْأَرْضِ يَتَبَرَّكُ بِإِلَهِ ٱلْحَقِّ، وَٱلَّذِي يَحْلِفُ فِي ٱلْأَرْضِ يَحْلِفُ بِإِلَهِ ٱلْحَقِّ، لِأَنَّ ٱلضِّيقَاتِ ٱلْأُولَى قَدْ نُسِيَتْ، وَلِأَنَّهَا ٱسْتَتَرَتْ عَنْ عَيْنَيَّ. ١٦ 16
Moto nyonso oyo akobelela lipamboli kati na mokili akosala bongo na Kombo ya Nzambe ya solo, mpe moto oyo akolapa ndayi kati na mokili, akolapa yango na Kombo ya Nzambe ya solo. Pamba te pasi ya kala ekomonana lisusu te, ekobombama na miso na Ngai.
«لِأَنِّي هَأَنَذَا خَالِقٌ سَمَاوَاتٍ جَدِيدَةً وَأَرْضًا جَدِيدَةً، فَلَا تُذْكَرُ ٱلْأُولَى وَلَا تَخْطُرُ عَلَى بَالٍ. ١٧ 17
Solo, nakokela likolo mpe mabele ya sika; makambo ya liboso, bakokanisa yango lisusu te, ekomata ata lisusu na motema te.
بَلِ ٱفْرَحُوا وَٱبْتَهِجُوا إِلَى ٱلْأَبَدِ فِي مَا أَنَا خَالِقٌ، لِأَنِّي هَأَنَذَا خَالِقٌ أُورُشَلِيمَ بَهْجَةً وَشَعْبَهَا فَرَحًا. ١٨ 18
Kasi bosepela mpe bozala tango nyonso na esengo mpo na misala oyo nakokela, pamba te nakokela Yelusalemi mpo ete ezala na esengo, mpe bato na yango basepela.
فَأَبْتَهِجُ بِأُورُشَلِيمَ وَأَفْرَحُ بِشَعْبِي، وَلَا يُسْمَعُ بَعْدُ فِيهَا صَوْتُ بُكَاءٍ وَلَا صَوْتُ صُرَاخٍ. ١٩ 19
Bongo nakosepela mpo na Yelusalemi mpe mpo na bato na Ngai; makelele ya kolela mpe ya koganga ekoyokana lisusu kuna te.
لَا يَكُونُ بَعْدُ هُنَاكَ طِفْلُ أَيَّامٍ، وَلَا شَيْخٌ لَمْ يُكْمِلْ أَيَّامَهُ. لِأَنَّ ٱلصَّبِيَّ يَمُوتُ ٱبْنَ مِئَةِ سَنَةٍ، وَٱلْخَاطِئُ يُلْعَنُ ٱبْنَ مِئَةِ سَنَةٍ. ٢٠ 20
Kuna, ekozala lisusu na mwana moke te oyo akokufa na bomwana na ye to ekozala lisusu na mobange te oyo akotonda te na mikolo ya bomoi na ye; pamba te moto oyo akokufa elenge akozala na mibu nkama moko ya mbotama, mpe oyo akokokisa mibu wana te, akomonana lokola moto alakelami mabe.
وَيَبْنُونَ بُيُوتًا وَيَسْكُنُونَ فِيهَا، وَيَغْرِسُونَ كُرُومًا وَيَأْكُلُونَ أَثْمَارَهَا. ٢١ 21
Bakotonga bandako mpe bakovanda kati na bandako yango, bakolona bilanga ya vino mpe bakolia bambuma na yango.
لَا يَبْنُونَ وَآخَرُ يَسْكُنُ، وَلَا يَغْرِسُونَ وَآخَرُ يَأْكُلُ. لِأَنَّهُ كَأَيَّامِ شَجَرَةٍ أَيَّامُ شَعْبِي، وَيَسْتَعْمِلُ مُخْتَارِيَّ عَمَلَ أَيْدِيهِمْ. ٢٢ 22
Bakotonga bandako te mpo ete bato mosusu bavanda kati na bandako yango, mpe bakolona bilanga te mpo ete bato mosusu balia bambuma na yango; pamba te mikolo ya mbotama ya bato na Ngai ekozala lokola mikolo ya nzete, mpe baponami na Ngai bakosepela na bambuma ya misala ya maboko na bango.
لَا يَتْعَبُونَ بَاطِلًا وَلَا يَلِدُونَ لِلرُّعْبِ، لِأَنَّهُمْ نَسْلُ مُبَارَكِي ٱلرَّبِّ، وَذُرِّيَّتُهُمْ مَعَهُمْ. ٢٣ 23
Bakosala mosala na pamba te to bakobota bana te mpo ete bakufa; pamba te bakozala bato oyo bapambolama na Yawe, bango elongo na bana na bango.
وَيَكُونُ أَنِّي قَبْلَمَا يَدْعُونَ أَنَا أُجِيبُ، وَفِيمَا هُمْ يَتَكَلَّمُونَ بَعْدُ أَنَا أَسْمَعُ. ٢٤ 24
Liboso ete babelela Ngai, nakoyanola bango; mpe wana basilisi nanu koloba te, nakoyoka bango.
ٱلذِّئْبُ وَٱلْحَمَلُ يَرْعَيَانِ مَعًا، وَٱلْأَسَدُ يَأْكُلُ ٱلتِّبْنَ كَٱلْبَقَرِ. أَمَّا ٱلْحَيَّةُ فَٱلتُّرَابُ طَعَامُهَا. لَا يُؤْذُونَ وَلَا يُهْلِكُونَ فِي كُلِّ جَبَلِ قُدْسِي، قَالَ ٱلرَّبُّ». ٢٥ 25
Mbwa ya zamba mpe mwana meme ekolia esika moko; mpe nkosi ekolia matiti lokola ngombe, kasi bilei ya nyoka ekozala nde putulu. Bakoyoka lisusu pasi te, mpe bakobebisama lisusu te na ngomba na Ngai ya bule, » elobi Yawe.

< إِشَعْيَاءَ 65 >