< إِشَعْيَاءَ 11 >

وَيَخْرُجُ قَضِيبٌ مِنْ جِذْعِ يَسَّى، وَيَنْبُتُ غُصْنٌ مِنْ أُصُولِهِ، ١ 1
Moto ya nzete ekobima na mobimbi ya Izayi; wuta na misisa na ye, Etape moko ekobota mbuma.
وَيَحُلُّ عَلَيْهِ رُوحُ ٱلرَّبِّ، رُوحُ ٱلْحِكْمَةِ وَٱلْفَهْمِ، رُوحُ ٱلْمَشُورَةِ وَٱلْقُوَّةِ، رُوحُ ٱلْمَعْرِفَةِ وَمَخَافَةِ ٱلرَّبِّ. ٢ 2
Molimo na Yawe akowumela na likolo na Ye: Molimo ya bwanya mpe ya mayele, Molimo ya toli mpe ya nguya, Molimo ya boyebi mpe ya kotosa Yawe;
وَلَذَّتُهُ تَكُونُ فِي مَخَافَةِ ٱلرَّبِّ، فَلَا يَقْضِي بِحَسَبِ نَظَرِ عَيْنَيْهِ، وَلَا يَحْكُمُ بِحَسَبِ سَمْعِ أُذُنَيْهِ، ٣ 3
esengo na ye ekozala na kotosa Yawe. Akokata makambo ndenge emonanaka na libanda te to mpe akozwa mikano te kolanda biyoka-yoka;
بَلْ يَقْضِي بِٱلْعَدْلِ لِلْمَسَاكِينِ، وَيَحْكُمُ بِٱلْإِنْصَافِ لِبَائِسِي ٱلْأَرْضِ، وَيَضْرِبُ ٱلْأَرْضَ بِقَضِيبِ فَمِهِ، وَيُمِيتُ ٱلْمُنَافِقَ بِنَفْخَةِ شَفَتَيْهِ. ٤ 4
kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.
وَيَكُونُ ٱلْبِرُّ مِنْطَقَهَ مَتْنَيْهِ، وَٱلْأَمَانَةُ مِنْطَقَةَ حَقْوَيْهِ. ٥ 5
Bosembo ekozala mokaba na ye, mpe boyengebene ekozala na loketo na ye lokola mokaba oyo bamemelaka bibundeli.
فَيَسْكُنُ ٱلذِّئْبُ مَعَ ٱلْخَرُوفِ، وَيَرْبُضُ ٱلنَّمِرُ مَعَ ٱلْجَدْيِ، وَٱلْعِجْلُ وَٱلشِّبْلُ وَٱلْمُسَمَّنُ مَعًا، وَصَبِيٌّ صَغِيرٌ يَسُوقُهَا. ٦ 6
Mbwa ya zamba ekovanda esika moko na mwana meme, nkoyi ekolala esika moko na mwana ntaba; mwana ngombe ya mobali, mwana nkosi mpe banyama ya mafuta ekolia esika moko, bongo mwana moke nde akoyeisa yango.
وَٱلْبَقَرَةُ وَٱلدُّبَّةُ تَرْعَيَانِ. تَرْبُضُ أَوْلَادُهُمَا مَعًا، وَٱلْأَسَدُ كَٱلْبَقَرِ يَأْكُلُ تِبْنًا. ٧ 7
Ngombe ya mwasi mpe ngombolo ekolia esika moko, bana na yango mpe ekolala esika moko, bongo nkosi ekolia matiti lokola ngombe.
وَيَلْعَبُ ٱلرَّضِيعُ عَلَى سَرَبِ ٱلصِّلِّ، وَيَمُدُّ ٱلْفَطِيمُ يَدَهُ عَلَى جُحْرِ ٱلْأُفْعُوَانِ. ٨ 8
Mwana moke akosakana pene ya lidusu ya nyoka, mpe elenge mwana akokotisa loboko na ye na zala ya nyoka.
لَا يَسُوؤُونَ وَلَا يُفْسِدُونَ فِي كُلِّ جَبَلِ قُدْسِي، لِأَنَّ ٱلْأَرْضَ تَمْتَلِئُ مِنْ مَعْرِفَةِ ٱلرَّبِّ كَمَا تُغَطِّي ٱلْمِيَاهُ ٱلْبَحْرَ. ٩ 9
Mabe to kobebisama ekosalema lisusu te na likolo nyonso ya ngomba na Ngai ya bule, pamba te mokili ekotonda na boyebi ya Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.
وَيَكُونُ فِي ذَلِكَ ٱلْيَوْمِ أَنَّ أَصْلَ يَسَّى ٱلْقَائِمَ رَايَةً لِلشُّعُوبِ، إِيَّاهُ تَطْلُبُ ٱلْأُمَمُ، وَيَكُونُ مَحَلُّهُ مَجْدًا. ١٠ 10
Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.
وَيَكُونُ فِي ذَلِكَ ٱلْيَوْمِ أَنَّ ٱلسَّيِّدَ يُعِيدُ يَدَهُ ثَانِيَةً لِيَقْتَنِيَ بَقِيَّةَ شَعْبِهِ، ٱلَّتِي بَقِيَتْ، مِنْ أَشُّورَ، وَمِنْ مِصْرَ، وَمِنْ فَتْرُوسَ، وَمِنْ كُوشَ، وَمِنْ عِيلَامَ، وَمِنْ شِنْعَارَ، وَمِنْ حَمَاةَ، وَمِنْ جَزَائِرِ ٱلْبَحْرِ. ١١ 11
Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.
وَيَرْفَعُ رَايَةً لِلْأُمَمِ، وَيَجْمَعُ مَنْفِيِّي إِسْرَائِيلَ، وَيَضُمُّ مُشَتَّتِي يَهُوذَا مِنْ أَرْبَعَةِ أَطْرَافِ ٱلْأَرْضِ. ١٢ 12
Akotombola bendele mpo na bikolo mpe akosangisa bana ya Isalaele oyo bazali na bowumbu; akosangisa esika moko bato ya Yuda oyo bapalangana na mokili mobimba.
فَيَزُولُ حَسَدُ أَفْرَايِمَ، وَيَنْقَرِضُ ٱلْمُضَايِقُونَ مِنْ يَهُوذَا. أَفْرَايِمُ لَا يَحْسِدُ يَهُوذَا، وَيَهُوذَا لَا يُضَايِقُ أَفْرَايِمَ. ١٣ 13
Motema likunya ya Efrayimi ekosila, mpe banguna ya Yuda bakobebisama; Efrayimi akozala lisusu na motema likunya te mpo na Yuda to mpe Yuda akozala lisusu monguna ya Efrayimi te.
وَيَنْقَضَّانِ عَلَى أَكْتَافِ ٱلْفِلِسْطِينِيِّينَ غَرْبًا، وَيَنْهَبُونَ بَنِي ٱلْمَشْرِقِ مَعًا. يَكُونُ عَلَى أَدُومَ وَمُوآبَ ٱمْتِدَادُ يَدِهِمَا، وَبَنُو عَمُّونَ فِي طَاعَتِهِمَا. ١٤ 14
Bakosangela elongo bato ya mboka Filisitia na bangomba mikuse ya ngambo ya weste; bakobebisa elongo bikolo ya ngambo ya este, bakokonza bato ya Edomi mpe ya Moabi, bongo bato ya Amoni bakokoma bawumbu na bango.
وَيُبِيدُ ٱلرَّبُّ لِسَانَ بَحْرِ مِصْرَ، وَيَهُزُّ يَدَهُ عَلَى ٱلنَّهْرِ بِقُوَّةِ رِيحِهِ، وَيَضْرِبُهُ إِلَى سَبْعِ سَوَاقٍ، وَيُجِيزُ فِيهَا بِٱلْأَحْذِيَةِ. ١٥ 15
Yawe akokawusa mayi ya eteni ya ebale oyo ekota na mabele ya Ejipito; loboko na Ye ekoningisa ebale mpe akokabola yango na biteni sambo na mopepe makasi mpo ete bato bakoka kokatisa na makolo.
وَتَكُونُ سِكَّةٌ لِبَقِيَّةِ شَعْبِهِ ٱلَّتِي بَقِيَتْ مِنْ أَشُّورَ، كَمَا كَانَ لِإِسْرَائِيلَ يَوْمَ صُعُودِهِ مِنْ أَرْضِ مِصْرَ. ١٦ 16
Nzela moko ekosalema mpo na ndambo ya bato na Ye oyo batikalaki na bomoi wuta na Asiri ndenge esalemaki tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito.

< إِشَعْيَاءَ 11 >