< حِزْقِيَال 32 >

وَكَانَ فِي ٱلسَّنَةِ ٱلثَّانِيَةِ عَشَرَةَ، فِي ٱلشَّهْرِ ٱلثَّانِي عَشَرَ، فِي أَوَّلِ ٱلشَّهْرِ، أَنَّ كَلَامَ ٱلرَّبِّ صَارَ إِلَيَّ قَائِلًا: ١ 1
Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na mibale, na mobu ya zomi na mibale, Yawe alobaki na ngai:
«يَا ٱبْنَ آدَمَ، ٱرْفَعْ مَرْثَاةً عَلَى فِرْعَوْنَ مَلِكِ مِصْرَ وَقُلْ لَهُ: أَشْبَهْتَ شِبْلَ ٱلْأُمَمِ وَأَنْتَ نَظِيرُ تِمْسَاحٍ فِي ٱلْبِحَارِ. ٱنْدَفَقْتَ بِأَنْهَارِكَ، وَكَدَّرْتَ ٱلْمَاءَ بِرِجْلَيْكَ، وَعَكَّرْتَ أَنْهَارَهُمْ. ٢ 2
« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa mpo na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe yebisa ye: ‹ Ozali lokola nkosi kati na bikolo, ozali lokola dalagona kati na bibale minene, otambolaka-tambolaka kati na bibale na yo, opanzaka mayi na makolo na yo mpe okomisaka bibale potopoto.
هَكَذَا قَالَ ٱلسَّيِّدُ ٱلرَّبُّ: إِنِّي أَبْسُطُ عَلَيْكَ شَبَكَتِي مَعَ جَمَاعَةِ شُعُوبٍ كَثِيرَةٍ، وَهُمْ يُصْعِدُونَكَ فِي مِجْزَفَتِي. ٣ 3
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakotiela yo motambo na Ngai tango nakosangisa bato ya bikolo ebele; boye bakokanga yo na motambo yango.
وَأَتْرُكُكَ عَلَى ٱلْأَرْضِ، وَأَطْرَحُكَ عَلَى وَجْهِ ٱلْحَقْلِ، وَأُقِرُّ عَلَيْكَ كُلَّ طُيُورِ ٱلسَّمَاءِ، وَأُشْبِعُ مِنْكَ وُحُوشَ ٱلْأَرْضِ كُلَّهَا. ٤ 4
Nakobwaka yo na mabele mpe nakosundola yo na libanda ya bilanga. Nakosala ete bandeke nyonso ya likolo eya komatela yo mpe banyama ya mokili mobimba eya kolia misuni ya nzoto na yo.
وَأُلْقِي لَحْمَكَ عَلَى ٱلْجِبَالِ، وَأَمْلَأُ ٱلْأَوْدِيَةَ مِنْ جِيَفِكَ. ٥ 5
Nakopanza misuni ya nzoto na yo na bangomba mpe nakotondisa mabwaku na biteni oyo ekotikala.
وَأُسْقِي أَرْضَ فَيَضَانِكَ مِنْ دَمِكَ إِلَى ٱلْجِبَالِ، وَتَمْتَلِئُ مِنْكَ ٱلْآفَاقُ. ٦ 6
Nakotondisa mokili, na makila oyo ekowuta epai na yo, na balabala nyonso kino na bangomba; mpe mabulu minene ekotonda na misuni ya nzoto na yo.
وَعِنْدَ إِطْفَائِي إِيَّاكَ أَحْجُبُ ٱلسَّمَاوَاتِ، وَأُظْلِمُ نُجُومَهَا، وَأُغْشِي ٱلشَّمْسَ بِسَحَابٍ، وَٱلْقَمَرُ لَا يُضِيءُ ضَوْءَهُ. ٧ 7
Tango nakoboma yo ndenge babomaka mwinda, nakozipa likolo, nakokomisa molili minzoto na yango; nakozipa moyi na mapata, mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.
وَأُظْلِمُ فَوْقَكَ كُلَّ أَنْوَارِ ٱلسَّمَاءِ ٱلْمُنِيرَةِ، وَأَجْعَلُ ٱلظُّلْمَةَ عَلَى أَرْضِكَ، يَقُولُ ٱلسَّيِّدُ ٱلرَّبُّ. ٨ 8
Likolo na yo, nakokomisa molili biloko nyonso ya likolo, oyo ebimisaka pole, mpe nakoyeisa molili na mokili na yo, elobi Nkolo Yawe.
وَأَغُمُّ قُلُوبَ شُعُوبٍ كَثِيرِينَ عِنْدَ إِتْيَانِي بِكَسْرِكَ بَيْنَ ٱلْأُمَمِ فِي أَرَاضٍ لَمْ تَعْرِفْهَا. ٩ 9
Nakotungisa mitema ya bato ebele tango nakomema yo na bowumbu kati na bikolo ya bapaya, na mikili oyo otikala kutu koyeba te.
وَأُحَيِّرُ مِنْكَ شُعُوبًا كَثِيرِينَ، مُلُوكُهُمْ يَقْشَعِرُّونَ عَلَيْكَ ٱقْشِعْرَارًا عِنْدَمَا أَخْطِرُ بِسَيْفِي قُدَّامَ وُجُوهِهِمْ، فَيَرْجِفُونَ كُلَّ لَحْظَةٍ، كُلُّ وَاحِدٍ عَلَى نَفْسِهِ فِي يَوْمِ سُقُوطِكَ. ١٠ 10
Nakosala ete bato ya bikolo ebele bakamwa yo mpe bakonzi na bango balenga na somo likolo na yo tango nakolakisa bango mopanga na Ngai. Na mokolo ya kokweya na yo, moko na moko kati na bango akokoma kolenga tango nyonso mpo na bomoi na ye.
«لِأَنَّهُ هَكَذَا قَالَ ٱلسَّيِّدُ ٱلرَّبُّ: سَيْفُ مَلِكِ بَابِلَ يَأْتِي عَلَيْكَ. ١١ 11
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mopanga ya mokonzi ya Babiloni ekobundisa yo.
بِسُيُوفِ ٱلْجَبَابِرَةِ أُسْقِطُ جُمْهُورَكَ. كُلُّهُمْ عُتَاةُ ٱلْأُمَمِ، فَيَسْلُبُونَ كِبْرِيَاءَ مِصْرَ، وَيَهْلِكُ كُلُّ جُمْهُورِهَا. ١٢ 12
Nakosala ete bato ebele bakufa kati na yo na mopanga ya bilombe ya bitumba ya ekolo oyo eleki bikolo nyonso na kanza. Bakosukisa lolendo ya mokili ya Ejipito mpe bato na yango nyonso bakobebisama.
وَأُبِيدُ جَمِيعَ بَهَائِمِهَا عَنِ ٱلْمِيَاهِ ٱلْكَثِيرَةِ، فَلَا تُكَدِّرُهَا مِنْ بَعْدُ رِجْلُ إِنْسَانٍ، وَلَا تُعَكِّرُهَا أَظْلَافُ بَهِيمَةٍ. ١٣ 13
Nakoboma ngombe na yango nyonso pembeni ya mayi ya mozindo oyo ekoningana lisusu te na makolo ya bato to ya banyama.
حِينَئِذٍ أُنْضِبُ مِيَاهَهُمْ وَأُجْرِي أَنْهَارَهُمْ كَٱلزَّيْتِ، يَقُولُ ٱلسَّيِّدُ ٱلرَّبُّ. ١٤ 14
Bongo nakosala ete mayi na yango evanda kimia mpe bibale na yango etiola lokola mafuta, elobi Nkolo Yawe.
حِينَ أَجْعَلُ أَرْضَ مِصْرَ خَرَابًا، وَتَخْلُو ٱلْأَرْضُ مِنْ مِلْئِهَا. عِنْدَ ضَرْبِي جَمِيعَ سُكَّانِهَا يَعْلَمُونَ أَنِّي أَنَا ٱلرَّبُّ. ١٥ 15
Tango nakosala ete Ejipito etikala lisusu na bato te, tango nakobebisa biloko nyonso oyo ezali kati na yango mpe nakoboma bavandi na yango nyonso; boye bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
هَذِهِ مَرْثَاةٌ يَرْثُونَ بِهَا. بَنَاتُ ٱلْأُمَمِ تَرْثُو بِهَا. عَلَى مِصْرَ وَعَلَى كُلِّ جُمْهُورِهَا تَرْثُو بِهَا، يَقُولُ ٱلسَّيِّدُ ٱلرَّبُّ». ١٦ 16
Yango nde nzembo ya mawa oyo bakoyembela Ejipito; bilenge basi ya bikolo mosusu nde bakoyemba yango, bakoyemba yango na tina na Ejipito elongo na bato na yango nyonso, elobi Nkolo Yawe. »
وَكَانَ فِي ٱلسَّنَةِ ٱلثَّانِيَةِ عَشَرَةَ، فِي ٱلْخَامِسِ عَشَرَ مِنَ ٱلشَّهْرِ، أَنَّ كَلَامَ ٱلرَّبِّ كَانَ إِلَيَّ قَائِلًا: ١٧ 17
Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza wana kaka, na mobu ya zomi na mibale, Yawe alobaki na ngai:
«يَا ٱبْنَ آدَمَ، وَلْوِلْ عَلَى جُمْهُورِ مِصْرَ، وَأَحْدِرْهُ هُوَ وَبَنَاتِ ٱلْأُمَمِ ٱلْعَظِيمَةِ إِلَى ٱلْأَرْضِ ٱلسُّفْلَى مَعَ ٱلْهَابِطِينَ فِي ٱلْجُبِّ. ١٨ 18
« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na bato nyonso ya Ejipito mpe kitisa na mokili ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu, mokili ya Ejipito elongo na bato ya bikolo ya nguya.
مِمَّنْ نَعِمْتَ أَكْثَرَ؟ ٱنْزِلْ وَٱضْطَجِعْ مَعَ ٱلْغُلْفِ. ١٩ 19
Loba na bango: ‹ Boni, boleki bato mosusu na nini? Bokita mpe bolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te! ›
يَسْقُطُونَ فِي وَسْطِ ٱلْقَتْلَى بِٱلسَّيْفِ. قَدْ أُسْلِمَ ٱلسَّيْفُ. اُمْسُكُوُهَا مَعَ كُلِّ جُمْهُورِهَا. ٢٠ 20
Bakokweya kati na bato oyo bakufaki na mopanga. Mopanga esili kobima! Tika ete eboma Ejipito mpe bato na yango nyonso!
يُكَلِّمُهُ أَقْوِيَاءُ ٱلْجَبَابِرَةِ مِنْ وَسْطِ ٱلْهَاوِيَةِ مَعَ أَعْوَانِهِ. قَدْ نَزَلُوا، ٱضْطَجَعُوا غُلْفًا قَتْلَى بِٱلسَّيْفِ. (Sheol h7585) ٢١ 21
Wuta na mboka ya bakufi, bankumu bakoloba na Ejipito mpe na bikolo oyo esanganaki na yango: ‹ Bakiti mpe balali elongo na bato oyo bakatama ngenga te, esika moko na bato oyo bakufaki na mopanga. › (Sheol h7585)
هُنَاكَ أَشُّورُ وَكُلُّ جَمَاعَتِهَا. قُبُورُهُ مِنْ حَوْلِهِ. كُلُّهُمْ قَتْلَى سَاقِطُونَ بِٱلسَّيْفِ. ٢٢ 22
Mokili ya Asiri ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, ezingelami na malita ya bato na yango nyonso oyo babomaki: bango nyonso oyo bakufaki na mopanga.
اَلَّذِينَ جُعِلَتْ قُبُورُهُمْ فِي أَسَافِلِ ٱلْجُبِّ، وَجَمَاعَتُهَا حَوْلَ قَبْرِهَا، كُلُّهُمْ قَتْلَى سَاقِطُونَ بِٱلسَّيْفِ، ٱلَّذِينَ جَعَلُوا رُعْبًا فِي أَرْضِ ٱلْأَحْيَاءِ. ٢٣ 23
Malita na bango ezali kati na libulu moko ya mozindo, mpe mampinga na yango elali zingazinga ya bakunda na ye. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo na mokili ya bato ya bomoi basili kokweya, bakufi na mopanga.
هُنَاكَ عِيلَامُ وَكُلُّ جُمْهُورِهَا حَوْلَ قَبْرِهَا، كُلُّهُمْ قَتْلَى سَاقِطُونَ بِٱلسَّيْفِ، ٱلَّذِينَ هَبَطُوا غُلْفًا إِلَى ٱلْأَرْضِ ٱلسُّفْلَى، ٱلَّذِينَ جَعَلُوا رُعْبَهُمْ فِي أَرْضِ ٱلْأَحْيَاءِ. فَحَمَلُوا خِزْيَهُمْ مَعَ ٱلْهَابِطِينَ فِي ٱلْجُبِّ. ٢٤ 24
Mokili ya Elami ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango; bato na yango nyonso bakweyaki, bakufaki na mopanga. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo kati na mokili ya bato ya mokili yango basili kokita elongo na bato oyo bakatama ngenga te, na mokili ya bakufi; bakoyoka soni bango moko elongo na bato oyo bakitaka na libulu.
قَدْ جَعَلُوا لَهَا مَضْجَعًا بَيْنَ ٱلْقَتْلَى، مَعَ كُلِّ جُمْهُورِهَا. حَوْلَهُ قُبُورُهُمْ كُلُّهُمْ غُلْفٌ قَتْلَى بِٱلسَّيْفِ، مَعَ أَنَّهُ قَدْ جُعِلَ رُعْبُهُمْ فِي أَرْضِ ٱلْأَحْيَاءِ. قَدْ حَمَلُوا خِزْيَهُمْ مَعَ ٱلْهَابِطِينَ فِي ٱلْجُبِّ. قَدْ جُعِلَ فِي وَسْطِ ٱلْقَتْلَى. ٢٥ 25
Basalaki mbeto moko mpo na mokili yango kati na bato oyo bakufaki na mopanga, esika moko na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te. Lokola somo na bango epanzanaki na mokili ya bato ya bomoi, bamemaki soni na bango elongo na bato oyo bakitaka na libulu; bazali kolala esika moko na bato oyo babomaki na mopanga.
هُنَاكَ مَاشِكُ وَتُوبَالُ وَكُلُّ جُمْهُورِهَا، حَوْلَهُ قُبُورُهَا. كُلُّهُمْ غُلْفٌ قَتْلَى بِٱلسَّيْفِ، مَعَ أَنَّهُمْ جَعَلُوا رُعْبَهُمْ فِي أَرْضِ ٱلْأَحْيَاءِ. ٢٦ 26
Mokili ya Mesheki mpe ya Tubali ezali kuna elongo na bato na yango nyonso, zingazinga ya malita na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te, pamba te bayeisaki somo makasi kati na mokili ya bato ya bomoi.
وَلَا يَضْطَجِعُونَ مَعَ ٱلْجَبَابِرَةِ ٱلسَّاقِطِينَ مِنَ ٱلْغُلْفِ ٱلنَّازِلِينَ إِلَى ٱلْهَاوِيَةِ بِأَدَوَاتِ حَرْبِهِمْ، وَقَدْ وُضِعَتْ سُيُوفُهُمْ تَحْتَ رُؤُوسِهِمْ، فَتَكُونُ آثَامُهُمْ عَلَى عِظَامِهِمْ مَعَ أَنَّهُمْ رُعْبُ ٱلْجَبَابِرَةِ فِي أَرْضِ ٱلْأَحْيَاءِ. (Sheol h7585) ٢٧ 27
Boni, balali te esika moko na basoda mosusu oyo bakatama ngenga te to balali te esika moko na basoda ya mpiko oyo bakufaki mpe bakitaki na mboka ya bakufi na bibundeli na bango, na mipanga na bango na se ya mito na bango? Etumbu mpo na masumu na bango ekweyaki na mikuwa na bango, atako bazalaki kolengisa basoda ya mpiko ya mokili ya bato ya bomoi na somo. (Sheol h7585)
أَمَّا أَنْتَ فَفِي وَسْطِ ٱلْغُلْفِ تَنْكَسِرُ وَتَضْطَجِعُ مَعَ ٱلْقَتْلَى بِٱلسَّيْفِ. ٢٨ 28
Oh Faraon, yo mpe okobukana, okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, bato oyo bakufaki na mopanga!
هُنَاكَ أَدُومُ وَمُلُوكُهَا وَكُلُّ رُؤَسَائِهَا ٱلَّذِينَ مَعَ جَبَرُوتِهِمْ قَدْ أُلْقُوا مَعَ ٱلْقَتْلَى بِٱلسَّيْفِ، فَيَضْطَجِعُونَ مَعَ ٱلْغُلْفِ وَمَعَ ٱلْهَابِطِينَ فِي ٱلْجُبِّ. ٢٩ 29
Mokili ya Edomi ezali kuna, bakonzi na yango mpe bakambi na yango balali esika moko na bato oyo bakufaki na mopanga atako bazalaki na nguya; balali esika moko na bato oyo bakatama ngenga te mpe bato oyo bakitaka na libulu.
هُنَاكَ أُمَرَاءُ ٱلشِّمَالِ كُلُّهُمْ وَجَمِيعُ ٱلصَّيْدُونِيِّينَ ٱلْهَابِطِينَ مَعَ ٱلْقَتْلَى بِرُعْبِهِمْ، خَزُوا مِنْ جَبَرُوتِهِمْ وَٱضْطَجَعُوا غُلْفًا مَعَ قَتْلَى ٱلسَّيْفِ، وَحَمَلُوا خِزْيَهُمْ مَعَ ٱلْهَابِطِينَ إِلَى ٱلْجُبِّ. ٣٠ 30
Bakambi nyonso ya etuka ya nor mpe bato nyonso ya Sidoni bazali kuna; bakitaki na soni elongo na bato oyo bakufaki atako nguya na bango ezalaki kopesa bato somo makasi; balali lokola bato bakatama ngenga te elongo na bato oyo bakufaki na mopanga, mpe bakufaki na soni makasi elongo na bato oyo bakitaka na libulu.
يَرَاهُمْ فِرْعَوْنُ وَيَتَعَزَّى عَنْ كُلِّ جُمْهُورِهِ. قَتْلَى بِٱلسَّيْفِ فِرْعَوْنُ وَكُلُّ جُمْهُورِهِ، يَقُولُ ٱلسَّيِّدُ ٱلرَّبُّ. ٣١ 31
Ye Faraon elongo na mampinga na ye nyonso bakomona bango mpe bakobondisama na tina na bato nyonso oyo bakufaki na mopanga, elobi Nkolo Yawe.
لِأَنِّي جَعَلْتُ رُعْبَهُ فِي أَرْضِ ٱلْأَحْيَاءِ، فَيُضْجَعُ بَيْنَ ٱلْغُلْفِ مَعَ قَتْلَى ٱلسَّيْفِ، فِرْعَوْنُ وَكُلُّ جُمْهُورِهِ، يَقُولُ ٱلسَّيِّدُ ٱلرَّبُّ». ٣٢ 32
Atako nayeisaki somo na mokili ya bato ya bomoi na nzela na ye, Faraon mpe bato na ye nyonso bakolala kati na bato oyo bakatama ngenga te, bato oyo bakufa na mopanga, elobi Nkolo Yawe. »

< حِزْقِيَال 32 >