< ٢ أخبار 7 >

وَلَمَّا ٱنْتَهَى سُلَيْمَانُ مِنَ ٱلصَّلَاةِ، نَزَلَتِ ٱلنَّارُ مِنَ ٱلسَّمَاءِ وَأَكَلَتِ ٱلْمُحْرَقَةَ وَٱلذَّبَائِحَ، وَمَلَأَ مَجْدُ ٱلرَّبِّ ٱلْبَيْتَ. ١ 1
Tango Salomo asilisaki kosambela, moto ekitaki wuta na Likolo mpe ezikisaki mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu, mpe nkembo na Yawe etondisaki Tempelo.
وَلَمْ يَسْتَطِعِ ٱلْكَهَنَةُ أَنْ يَدْخُلُوا بَيْتَ ٱلرَّبِّ لِأَنَّ مَجْدَ ٱلرَّبِّ مَلَأَ بَيْتَ ٱلرَّبِّ. ٢ 2
Banganga-Nzambe bakokaki te kokota na Tempelo ya Yawe, pamba te nkembo na Yawe etondisaki yango.
وَكَانَ جَمِيعُ بَنِي إِسْرَائِيلَ يَنْظُرُونَ عِنْدَ نُزُولِ ٱلنَّارِ وَمَجْدِ ٱلرَّبِّ عَلَى ٱلْبَيْتِ، وَخَرُّوا عَلَى وُجُوهِهِمْ إِلَى ٱلْأَرْضِ عَلَى ٱلْبَلَاطِ ٱلْمُجَزَّعِ، وَسَجَدُوا وَحَمَدُوا ٱلرَّبَّ لِأَنَّهُ صَالِحٌ وَإِلَى ٱلْأَبَدِ رَحْمَتُهُ. ٣ 3
Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki moto kokita mpe nkembo na Yawe na likolo ya Tempelo, bafukamaki bilongi kino na mabele; bongo bagumbamelaki mpe basanzolaki Yawe na maloba oyo: « Azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »
ثُمَّ إِنَّ ٱلْمَلِكَ وَكُلَّ ٱلشَّعْبِ ذَبَحُوا ذَبَائِحَ أَمَامَ ٱلرَّبِّ. ٤ 4
Mokonzi mpe bana nyonso ya Isalaele babonzaki bambeka liboso ya Yawe.
وَذَبَحَ ٱلْمَلِكُ سُلَيْمَانُ ذَبَائِحَ مِنَ ٱلْبَقَرِ ٱثْنَيْنِ وَعِشْرِينَ أَلْفًا، وَمِنَ ٱلْغَنَمِ مِئَةً وَعِشْرِينَ أَلْفًا، وَدَشَّنَ ٱلْمَلِكُ وَكُلُّ ٱلشَّعْبِ بَيْتَ ٱللهِ. ٥ 5
Mokonzi Salomo abonzaki lokola mbeka bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bameme nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso babulisaki Tempelo ya Nzambe.
وَكَانَ ٱلْكَهَنَةُ وَاقِفِينَ عَلَى مَحَارِسِهِمْ، وَٱللَّاوِيُّونَ بِآلَاتِ غِنَاءِ ٱلرَّبِّ ٱلَّتِي عَمِلَهَا دَاوُدُ ٱلْمَلِكُ لِأَجْلِ حَمْدِ ٱلرَّبِّ «لِأَنَّ إِلَى ٱلْأَبَدِ رَحْمَتَهُ» حِينَ سَبَّحَ دَاوُدُ بِهَا، وَٱلْكَهَنَةُ يَنْفُخُونَ فِي ٱلْأَبْوَاقِ مُقَابِلَهُمْ، وَكُلُّ إِسْرَائِيلَ وَاقِفٌ. ٦ 6
Banganga-Nzambe batelemaki na bisika na bango ya mosala, ndenge moko na Balevi mpe bibetelo mindule ya Yawe oyo mokonzi Davidi asalaki mpo na kosanzola na yango Yawe na maloba oyo: « Bolingo na Ye ewumelaka seko na seko. » Ezalaki Davidi moto apesaki bango mokumba ya kobeta bibetelo mindule mpo na kokumisa Yawe. Banganga-Nzambe bazalaki ya kotalana na Balevi mpe bazalaki kobeta bakelelo; bongo bana nyonso ya Isalaele bazalaki ya kotelema.
وَقَدَّسَ سُلَيْمَانُ وَسَطَ ٱلدَّارِ ٱلَّتِي أَمَامَ بَيْتِ ٱلرَّبِّ، لِأَنَّهُ قَرَّبَ هُنَاكَ ٱلْمُحْرَقَاتِ وَشَحْمَ ذَبَائِحِ ٱلسَّلَامَةِ، لِأَنَّ مَذْبَحَ ٱلنُّحَاسِ ٱلَّذِي عَمِلَهُ سُلَيْمَانُ لَمْ يَكْفِ لِأَنْ يَسَعَ ٱلْمُحْرَقَاتِ وَٱلتَّقْدِمَاتِ وَٱلشَّحْمَ. ٧ 7
Salomo abulisaki lopango ya kati oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe mpe abonzaki wana bambeka ya kotumba mpe mafuta ya bambeka ya boyokani; pamba te etumbelo ya bronze oyo Salomo atongaki ekokaki te koyamba bambeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta.
وَعَيَّدَ سُلَيْمَانُ ٱلْعِيدَ فِي ذَلِكَ ٱلْوَقْتِ سَبْعَةَ أَيَّامٍ، وَكُلُّ إِسْرَائِيلَ مَعَهُ وَجُمْهُورٌ عَظِيمٌ جِدًّا مِنْ مَدْخَلِ حَمَاةَ إِلَى وَادِي مِصْرَ. ٨ 8
Boye, na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti oyo ewumelaki mikolo sambo; ezalaki lisanga monene ya bato oyo bayaki wuta na Amati kino na mayi oyo etiolaka na kati-kati ya bangomba ya Ejipito.
وَعَمِلُوا فِي ٱلْيَوْمِ ٱلثَّامِنِ ٱعْتِكَافًا لِأَنَّهُمْ عَمِلُوا تَدْشِينَ ٱلْمَذْبَحِ سَبْعَةَ أَيَّامٍ، وَٱلْعِيدَ سَبْعَةَ أَيَّامٍ. ٩ 9
Na mokolo ya mwambe, basalaki mayangani monene, pamba te babulisaki etumbelo mikolo sambo mpe basalaki feti mikolo sambo.
وَفِي ٱلْيَوْمِ ٱلثَّالِثِ وَٱلْعِشْرِينَ مِنَ ٱلشَّهْرِ ٱلسَّابِعِ صَرَفَ ٱلشَّعْبَ إِلَى خِيَامِهِمْ فَرِحِينَ وَطَيِّبِي ٱلْقُلُوبِ لِأَجْلِ ٱلْخَيْرِ ٱلَّذِي عَمِلَهُ ٱلرَّبُّ لِدَاوُدَ وَلِسُلَيْمَانَ وَلِإِسْرَائِيلَ شَعْبِهِ. ١٠ 10
Bongo na mokolo ya tuku mibale na misato ya sanza ya sambo, Salomo azongisaki bato na bandako na bango ya kapo, na esengo mpe na nsayi kati na mitema mpo na bolamu oyo Yawe asalelaki Davidi, Salomo mpe Isalaele, bato na Ye.
وَأَكْمَلَ سُلَيْمَانُ بَيْتَ ٱلرَّبِّ وَبَيْتَ ٱلْمَلِكِ. وَكُلَّ مَا خَطَرَ بِبَالِ سُلَيْمَانَ أَنْ يَعْمَلَهُ فِي بَيْتِ ٱلرَّبِّ وَفِي بَيْتِهِ نَجَحَ فِيهِ. ١١ 11
Sima na Salomo kosilisa kotonga Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe kokokisa nyonso oyo azalaki na yango na makanisi ya kosala kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako na ye moko,
وَتَرَاءَى ٱلرَّبُّ لِسُلَيْمَانَ لَيْلًا وَقَالَ لَهُ: «قَدْ سَمِعْتُ صَلَاتَكَ، وَٱخْتَرْتُ هَذَا ٱلْمَكَانَ لِي بَيْتَ ذَبِيحَةٍ. ١٢ 12
Yawe abimelaki Salomo, na butu, mpe alobaki: — Nayoki losambo na yo mpe naponi esika oyo lokola Ndako ya bambeka mpo na Ngai.
إِنْ أَغْلَقْتُ ٱلسَّمَاءَ وَلَمْ يَكُنْ مَطَرٌ، وَإِنْ أَمَرْتُ ٱلْجَرَادَ أَنْ يَأْكُلَ ٱلْأَرْضَ، وَإِنْ أَرْسَلْتُ وَبَأً عَلَى شَعْبِي، ١٣ 13
Soki nakangi likolo mpo ete mvula ebeta te to natindi mabanki mpo ete ebebisa mokili to natindi bokono mabe kati na bato,
فَإِذَا تَوَاضَعَ شَعْبِي ٱلَّذِينَ دُعِيَ ٱسْمِي عَلَيْهِمْ وَصَلَّوْا وَطَلَبُوا وَجْهِي، وَرَجَعُوا عَنْ طُرُقِهِمِ ٱلرَّدِيةِ فَإِنَّنِي أَسْمَعُ مِنَ ٱلسَّمَاءِ وَأَغْفِرُ خَطِيَّتَهُمْ وَأُبْرِئُ أَرْضَهُمْ. ١٤ 14
soki bato na Ngai, oyo babengami na Kombo na Ngai bamikitisi, basambeli, baluki elongi na Ngai, mpe bapesi mokongo na banzela na bango ya mabe, Ngai, nakoyoka bango wuta na Likolo, nakolimbisa masumu na bango mpe nakobikisa mokili na bango.
اَلْآنَ عَيْنَايَ تَكُونَانِ مَفْتُوحَتَيْنِ، وَأُذُنَايَ مُصْغِيَتَيْنِ إِلَى صَلَاةِ هَذَا ٱلْمَكَانِ. ١٥ 15
Kobanda sik’oyo, miso na Ngai ekofungwama, mpe matoyi na Ngai ekoyoka na bokebi mabondeli oyo ekosalema na esika oyo.
وَٱلْآنَ قَدِ ٱخْتَرْتُ وَقَدَّسْتُ هَذَا ٱلْبَيْتَ لِيَكُونَ ٱسْمِي فِيهِ إِلَى ٱلْأَبَدِ، وَتَكُونُ عَيْنَايَ وَقَلْبِي هُنَاكَ كُلَّ ٱلْأَيَّامِ. ١٦ 16
Naponi mpe nabulisi Tempelo wana mpo ete Kombo na Ngai ezala kuna tango nyonso. Miso mpe motema na Ngai ekozala kuna na Tempelo yango mpo na libela.
وَأَنْتَ إِنْ سَلَكْتَ أَمَامِي كَمَا سَلَكَ دَاوُدُ أَبُوكَ، وَعَمِلْتَ حَسَبَ كُلِّ مَا أَمَرْتُكَ بِهِ، وَحَفِظْتَ فَرَائِضِي وَأَحْكَامِي، ١٧ 17
Mpo na yo, soki okotambola liboso na Ngai ndenge Davidi, tata na yo, atambolaki; soki okosala nyonso oyo natindaki yo mpe okobatela mibeko mpe malako na Ngai,
فَإِنِّي أُثَبِّتُ كُرْسِيَّ مُلْكِكَ كَمَا عَاهَدْتُ دَاوُدَ أَبَاكَ قَائِلًا: لَا يُعْدَمُ لَكَ رَجُلٌ يَتَسَلَّطُ عَلَى إِسْرَائِيلَ. ١٨ 18
nakolendisa kiti na yo ya bokonzi kolanda boyokani oyo nasalaki elongo na Davidi, tata na yo, tango nalobaki: « Okotikalaka kozanga te mokitani mpo na kokamba Isalaele lokola mokonzi. »
وَلَكِنْ إِنِ ٱنْقَلَبْتُمْ وَتَرَكْتُمْ فَرَائِضِي وَوَصَايَايَ ٱلَّتِي جَعَلْتُهَا أَمَامَكُمْ، وَذَهَبْتُمْ وَعَبَدْتُمْ آلِهَةً أُخْرَى وَسَجَدْتُمْ لَهَا، ١٩ 19
Kasi soki bopengwi mosika na Ngai, soki bosundoli mibeko mpe malako na Ngai, oyo natie liboso na bino; soki bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango,
فَإِنِّي أَقْلَعُهُمْ مِنْ أَرْضِي ٱلَّتِي أَعْطَيْتُهُمْ إِيَّاهَا، وَهَذَا ٱلْبَيْتُ ٱلَّذِي قَدَّسْتُهُ لِٱسْمِي أَطْرَحُهُ مِنْ أَمَامِي وَأَجْعَلُهُ مَثَلًا وَهُزْأَةً فِي جَمِيعِ ٱلشُّعُوبِ. ٢٠ 20
nakopikola bino na mabele na Ngai, mabele oyo napesaki bino; nakobwaka mosika ya miso na Ngai Tempelo oyo nabulisi mpo na Kombo na Ngai mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola mpe ya soni kati na bikolo nyonso.
وَهَذَا ٱلْبَيْتُ ٱلَّذِي كَانَ مُرْتَفِعًا، كُلُّ مَنْ يَمُرُّ بِهِ يَتَعَجَّبُ وَيَقُولُ: لِمَاذَا عَمِلَ ٱلرَّبُّ هَكَذَا لِهَذِهِ ٱلْأَرْضِ وَلِهَذَا ٱلْبَيْتِ؟ ٢١ 21
Atako Tempelo oyo ezali sik’oyo kitoko penza, kasi bato nyonso oyo bakoleka pembeni na yango bakokamwa mpe bakoloba: « Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na mokili oyo mpe na Tempelo oyo? »
فَيَقُولُونَ: مِنْ أَجْلِ أَنَّهُمْ تَرَكُوا ٱلرَّبَّ إِلَهَ آبَائِهِمِ ٱلَّذِي أَخْرَجَهُمْ مِنْ أَرْضِ مِصْرَ، وَتَمَسَّكُوا بِآلِهَةٍ أُخْرَى وَسَجَدُوا لَهَا وَعَبَدُوهَا، لِذَلِكَ جَلَبَ عَلَيْهِمْ كُلَّ هَذَا ٱلشَّرِّ». ٢٢ 22
Mpe bakoyanola: « Ezali mpo ete basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na Ejipito mpe bamipesaki na banzambe mosusu, bafukamelaki yango mpe basalelaki yango; yango wana Yawe ayeisi likolo na bango pasi oyo nyonso. »

< ٢ أخبار 7 >